Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Zomi na Moko 8–14. Malongi mpe Mayokani 129–132: “Ntango Tozwi Lipamboli Nyonso uta na Nzambe, Ezali na Botosi”


Sanza ya Zomi na Moko 8–14. Malongi mpe Mayokani 129–132: ‘Ntango Tozwi Lipamboli Nyonso uta na Nzambe, Ezali na Botosi’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

Sanza ya Zomi na Moko 8–14. Malongi mpe Mayokani 129–132,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Joseph Smith Joseph Smith koteyaka na Nauvoo

Joseph Smith na Nauvoo, na Theodora Gorka

Sanza ya Zomi na Moko 8–14.

Malongi mpe Mayokani 129–132

“Ntango Tozwi Lipamboli Nyonso uta na Nzambe, Ezali na Botosi”

Biteni 129–32 teya mabongi mingi, bobele moke na yango etiami mokoloto na mateya mokuse oyo. Bosolo mosusu nini ozwi?

Koma Mayoki na Yo

Brigham Young alobaki mokolo moko mpo na oyo etali Joseph Smith, “Ye akoki kokitisa makambo ya lola mpo na bososoli ya baye bazali bansuka” (na Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith, 499–500). Oyo emonani mingi mingi ya solo mpo na mateya ya Profeta na Nauvoo na 1840, ndambo mosusu na yango ekomami na Malongi mpe Mayokani 129-32. Mobikisi azali lokola nani? “Ye azali moto lokola biso moko.” Lola ezali lokola nini? “Lolenge ya kobika na lisanga kaka oyo ezali kati na biso awa ekozala kati na biso kuna” (Malongi mpe Mayokani 130:1–2), mpe mikangano na biso oyo tolulaka mingi mpenza na mokili, soki tokangisami na likoki elongobani, “ekozala na makasi mobimba” na mokili ekoya (Malongi mpe Mayokani 132:19). Bosolo lokola oyo ekoki kokomisa lola mosika mingi te—ya nkembo, kasi pete mpo na kozwama.

Kasi nde, ntango mosusu Nzambe akoki kosenga biso tosala makambo oyo ezali mpenza ya kpokoso ete yango emonanaka lokola ekoki kozwama te. Mpo na Basantu mingi ya ebandeli, libala na basi mingi ezalaki moko ya motindo ya bongo. Motindo ya kobala basi basusu ezalaki momekano ya mpasi ya bondimi mpo na Joseph Smith, mwasi na ye Emma, mpe penepene na banso oyo bazwaki yango. Mpo na kolonga momekano oyo, basengelaki mingi kozala kaka na mayoki ya malamu mpo na nsango malamu ezongisami, basengelaki kozala na bondimi na Nzambe oyo ekendaki mosika na mozindo koleka mposa to bipale ya moto na moto. Mobeko wana ezali lisusu te lelo, kasi ndakisa ya bondimi ya baoyo basalelaki yango ezali naino. Mpe ndakisa wana ezali kofulaka biso ntango basengi biso tosala ya biso moko “mabonza na botosi” (Malongi mpe Mayokani 132:50).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 130–31

Joseph Smith amonisaki bosolo na ntina ya Bonzambe mpe “mokili ekoya.”

Okoki komona ete biteni 130–31 etangami na mwa bokeseni koleka biteni mosusu na Malongi mpe Mayokani. Oyo ezali mpamba te biteni 130–31 biwuti na nkoma oyo William Clayton, moko ya bakalaka ya Joseph Smith, abatelaki na makambo ayokaki Profeta koteya. Kolandela yango, biteni oyo ezali mingi lokola maboke ya bosolo na esika ya kozala bimoniseli ya kosangisa makasi, ya etinda na molimo. Atako bongo, ezali na ndambu ya mama na makombo ya momesano kati na mingi ya bosolo oyo. Ndakisa, okoki kotanga biteni 130–131 na mituna lokola oyo na makanisi: Nini nayekoli na ntina ya Nzambe? Nayekoli nini na etali bomoi nsima ya kufa? Lolenge nini bosolo oyo ebongoli bomoi na ngai?

Tala lisusu “Our Hearts Rejoiced to Hear Him Speak,” Revelations in Context, 277–80.

Malongi mpe Mayokani 131:1–4; 132:7, 13–25

Tata ya Lola asali ete ekoka kosalema mpo mabota ezala seko.

Moko ya bosolo ya kolendisa mingi koleka ezongisamaki na nzela ya Profeta Joseph Smith ezali ete mikangano ya libala mpe libota ekoki kowumela libela. Na nzela ya Profeta Joseph Smith, Nkolo azongisaki makuli mpe likoki esengelamaki mpo na kokomisa mikangano oyo ya seko (tala Malongi mpe Mayokani 132:7, 18–19). Kanisa na ntina ya mikangano ya libota ozali na yango to elikyi kozala na yango lobi ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 131:1–4; 132:7, 13–15. Boniboni milongo oyo ebongoli lolenge ozali kokanisela mikangano oyo?

Nzokande, ntango mosusu, libongi ya mabota ya seko ezali ya kolendisa mpenza te—ekoki komema mitungisi, ata mawa, ntango ezaleli ya libota na biso ya lelo ekokani te na lotomo ya selestiale. Ntango Mokambi Henry B. Eyring amitungisaki mpo na ezalela ya boye na libota na ye moko, azwaki toli oyo ya bwania uta na mokambi moko ya Lisanga Likoki ya Baposotolo Zomi na Mibale: “Osengeli bobele kotambwisa bomoi elongobani na bokonzi ya selesitiale, mpe mabongisi ya libota na yo ekozala kitoko mingi koleka oyo okoki kobanza” (na “A Home Where the Spirit of the Lord Dwells,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 25). Lolenge nini kolanda toli oyo ekoki kopambola yo na ezalela ya lelo ya libota na yo?

Tala lisusu Kristen M. Oaks, “To the Singles of the Church” (Church Educational System devotional for young adults, Sanza ya libwa 11, 2011), broadcasts.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
moto moko mpe mwasi moko libanda ya Tempelo ya Accra na Ghana.

Mikangano ya libota ekoki kokomisama ya seko na nzela ya makuli ya tempelo.

Malongi mpe Mayokani 132:1–2, 29–40

Libala na balongani mingi endimami na Nzambe bobele ntango Ye atindi yango.

Moto nyonso oyo atangaka Boyokani ya Kala ntango mosusu amitunaka na ntina ya Abalayama, Yakobo, Mose, mpe basusu oyo babalaki basi mingi. Bato oyo ya malamu bazalaki kosala ekobo? To Nzambe andimaki misala na bango? Luka biyano na Malongi mpe Mayokani 132:1–2, 29–40.

Libala ya mobali moko mpe mwasi moko ezali motindo ya Nzambe ya libala (tala moto ya eteni ya Esakola ya Bakambi 1; tala lisusu Yakobo 2:27, 30). Nzokande, azalaki na bileko na mambi ya kala ya bato ntango Nzambe atindaki bana na Ye basalela libala na basi mingi.

Mibu ya ebandeli ya Eklezia ezongisami ezalaki moko ya bileko wana ya bokeseni. Nsima ya kozwa motindo oyo, Joseph Smith mpe Basantu ba Mikolo mya Nsuka basusu basalelaki libala na basi mingi. Soki olingi koyekola mingi mpo na oyo etali libala na basi mingi na kati ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka na ebandeli, tala“Mercy Thompson and the Revelation on Marriage” (Revelations in Context, 281–93); Les Saints, 1:290–92, 432–35, 482–92, 502–4; “Plural Marriage in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints” (Gospel Topics, topics.ChurchofJesusChrist.org); “Why Was It Necessary for Joseph Smith and Others to Practice Polygamy?” (video, ChurchofJesusChrist.org).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 130:2, 18–19; 132:13, 19.Lolenge nini okoki kosalela milongo oyo mpo na kosunga libota kotia na esika ya yambo makambo oyo ewumelaka libela? Ntango mosusu okoki kokanga biloko na sanduku mpe kozonga kokanga na liboke biloko oyo ezali kolakisa makambo oyo, engebene na Malongi mpe Mayokani 130:2, 18–19; 132:19, tokoki komeme elongo na biso na bomoi ekoya, biloko lokola bafoto ya libota to makomi. Nini Malongi mpe Mayokani 132:13 eteyi biso mpo na oyo etali makambo ya mokili? Yango ekoki kokamba na lisolo etali kofandisa makanisi na makambo oyo ezali na ntina ya seko.

Malongi mpe Mayokani 130:20–21okoki koyemba nzembo moko na ntina ya botondi, lokola “Count Your Blessings” (Hymns, no. 241), mpe kosala molongo ya mapamboli libota na yo ezwi na kotosaka mibeko ya Nzambe. Mapamboli kani tolikyi kozwa? Lolenge nini ekoki biso kozwa mapamboli wana?

Malongi mpe Mayokani 131:1–4; 132:15–19.Video “Marriage Is Sacred” (ChurchofJesusChrist.org) ekoki kosunga libota na yo kosolola bosolo oyo ezali na milongo oyo. Lolenge nini Nkolo ayokaka mpo na libala? Lolenge nini—ezala tobala to likombe—ekoki biso kolengela kozala na libala moko ya seko?

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo ekoki koyembama: “Families Can Be Together Forever,” Children’s Songbook, 188.

Kobongisa Boyekoli Makomi Ya Moto ye Moko

Luka bosolo ya nsango malamu. Ntango mosusu bosolo ya nsango malamu elobami mbala moko, na ngonga mosusu etalisami na nzela ya ndakisa to lisolo. Ntango ozali kotanga, mituna, “Bosolo ya seko kani eteyami na milongo oyo?”

Elilingi
kisuku to chambre ya kokangisa na Tempelo ya Paris na France.

Kisuku to chambre ya kokangisa mabota na Tempelo ya Paris na France.

Bimisa na lokasa