Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Zomi na Moko 22–28 Malongi mpe Mayokani 135–136: “Ye ‘Akangisaki Etinda na Ye mpe Misala na Ye na Makila na Ye Moko’”


“Sanza ya Zomi na Moko 22–28. Malongi mpe Mayokani 135–136: ‘Ye “Akangisaki Etinda na Ye mpe Misala na Ye na Makila na Ye Moko”’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya Zomi na Moko 22–28. Malongi mpe Mayokani 135–136,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
libanda ya Boloko ya Carthage

Boloko ya Carthage

Sanza ya Zomi na Moko 22–28.

Malongi mpe Mayokani 135–136

Ye ”Akangisaki Etinda na Ye mpe Misala na Ye na Makila na Ye Moko”

Ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 135–36, Nkolo akoki kotindela yo boyebi na makanisi mpo na kosalisa yo osalalela maye oyekoli. Ntango yango esalemi bongo, koma maye Ye ateyi yo.

Koma Makanisi na Yo

Mpokwa ya sanza ya motoba 27, 1844, ekutaka Joseph mpe Hyrum Smith na boloko mbala moko lisusu, elongo na John Taylor and Willard Richards. Bakanisaki basalaki mabe moko te, kasi bamitikaki bakangami, kolikyaka ete yango ekopekisa mabe bazali kosala Basantu na Nauvoo. Oyo ezalaki te mbala ya yambo banguna ya Eklezia batiaki Profeta Joseph na boloko, kasi mbala oyo emonanaki lokola ayebaki ete akozonga na bomoi te. Ye mpe baninga na ye bamekaki kolendisana na kotangaka Buku ya Mormon mpe koyembaka banzembo. Bayokaki manduki kobetama, mpe mwa miniti mingi nsima bomoi ya kufa ya Joseph Smith mpe ndeko na ye ya mobali Hyrum ekomaki na nsuka.

Kasi ezalaki nzokande nsuka ya ntina ya bonzambe bango bayambaka. Mpe ezalaki nsuka ya Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu Klisto te. Mosala ya kosala ezalaki mingi lisusu mpe bimoniseli mingi lisusu oyo elingaki komema Eklezia liboso. Koboma Profeta ekokaki te koboma mosala ya Nzambe.

Tala Les Saints, 1:521–52.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 135; 136:37–39

Joseph mpe Hyrum Smith bakangisaki matatoli na bango na makila na bango.

Banza lolenge nini okokaki koyoka soki ozalaki kofanda na Nauvoo ntango babomaki Joseph mpe Hyrum Smith (tala Les Saints, 1:554–55). Boniboni olingaki komeka kososola likambo oyo ya liwa? Malongi mpe Mayokani 135, na ebandeli babimisaki yango moke koleka sanza misatu nsima ya liwa ya martiru, ekokaki kosalisa. Okoki kotia elembo na maloba mpe masakola oyo ekokaki komemela yo bososoli mpe elikya. Nini okokaki koloba na moto moko oyo atuni, “Ntina nini Nzambe akopesaka nzela baboma Profeta na Ye?”

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 5:21–22; 6:29–30; “Remembering the Martyrdom,” Revelations in Context, 299–306; Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith, 522–23, 529–40; M. Russell Ballard, “Ekokkota Biso Te na Likambo ya Ntina Monene Boye?Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 8–11.

Malongi mpe Mayokani 135:3

Joseph Smitu asala mingi mpo na lobiko na biso koleka moto nyonso longola se Yesu Klisto.

Kanisa na ntina ya mapamboli oyo eyeli yo lokola mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto. Motango boni na yango ezali mbano ya etinda ekokisamaki na Profeta Joseph Smith? Malongi mpe Mayokani 135:3 epesi nkombo ya mwa makambo Joseph Smith asalaki na mibu 24 nsima ya Limoni ya Yambo. Boniboni makambo oyo ebongoli yo mpe mokangano na yo na Tata na Lola mpe Yesu Klisto? Kanisa kokoma litatoli na yo ya Profeta Joseph Smith. Nani akokaki na mposa ya koyoka litatoli na yo?

Malongi mpe Mayokani 136

Nkolo apesi ngai toli mpo na “mibembo na ngai” na bomoi.

Nsima ya kobenganama mosika ya Nauvoo, Basantu bakutanaki na mobembo moko molai tii na Salt Lake Valley, mpe bakilometele pene na nkama ya yambo ekendaki malembe mpe ezalaki ya mawa mpenza. Brigham Young, oyo akambaki Eklezia lokola Mokambi ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale sikawa, amitungisaki na ntina ya lolenge nini Basantu balingaki kotikala na bomoi na molai ya nzela oyo etikalaki. Ye atongaki esika ya kofanda mpo na mwa ntango moke oyo babengaki Winter Quarters mpo abondelaki mpo na kozwa bokambi. Na eyano, Nkolo apesaki ye emoniseli moko, sikawa eteni 136. Kati na makambo masusu, emoniseli oyo ekundolisaki Basantu “ete ezaleli na bango na mobembo ezalaki na motuya mpe lokola esika bazalaki kokende” mpe “esungaki kobongola mobembo epai ya westi uta na lotomo ya mawa na mayele ya motuya ya kokabola na molimo” (“This Shall Be Our Covenant,” Revelations in Context, 308).

Bomba makambo manso maye na makanisi ntango ozali koyekola eteni 136. Toli nini omoni oyo ekoki kosunga kobongala momekano ya mpasi na bomoi na yo “na likambo moko ya motuya … na molimo”? Okoki lisusu komanyola lolenge nini toli ekoki kosunga yo kosala bolingi ya Nkolo na bomoi na yo moko, lokola esungaki Basantu ya ebandeli basala mobembo ya mpasi na Wesiti.

Tala lisusu “This Shall Be Our Covenant,” Revelations in Context, 307–14; Church History Topics, “Succession of Church Leadership,” ChurchofJesusChrist.org/study/history/topics.

Elilingi
Winter Quarters

Winter Quarters, na Greg Olsen

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 135:1,3Mpo na kosunga bato ya libota kososola nini yango elingi koloba ete Joseph Smith “asukisaki etinda na ye mpe misala na ye na makila na ye moko,” libota na yo ekoki kotala video “Testimony of the Book of Mormon” (ChurchofJesusChrist.org; tala lisusu Jeffrey R. Holland, “Safety for the Soul,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2009, 88–90). Nini etuti biso na kotangaka milongo oyo? Lolenge nini tokoki kozala na bondimi mingi na litatoli na biso, ata soki esengi te ete topesa bomoi na biso mpo na yango?

Malongi mpe Mayokani 135:3Mpo na kosolola nini yango elingi koloba na lisakola ete Joseph Smith asalaki “mingi koleka moto nyonso longola se Yesu, mpo na lobiko ya bato na mokili oyo,,” kanisa kotala lisusu nini libota na yo eyekolaki na ntina ya Joseph Smith mobu oyo. Okoki kosalela bafoto uta na makoki oyo mpo na kosunga bango bamikundola nini bango bayekoli mpe kobengisa bango bakabola nsango to mateya elingami mingi. Ntina nini tozali na botondi mpo na Profeta Joseph Smith mpo mpo na maye Nkolo asalaki na nzela na ye? Okoki lisusu kotala video “Joseph Smith: The Prophet of the Restoration” (ChurchofJesusChrist.org).

Malongi mpe Mayokani 136.Ntango Nkolo amonisaki eteni 136, Basantu bazalaki na mobembo moko ya molai, ya mpasi, na nse ya bokambemi ya Brigham Young (tala mikapo 5860, mpe 62 na Doctrine and Covenants Stories, 206–8, 211–16, 222–24). Ntango bozali kotanga eteni 136 elongo, bokanisa na ntina ya makambo ya mpasi libota na bino ekokaki kokutana na yango. Toli nini tomoni na emoniseli oyo wapi tokoki kozwa lisalisi mpe nguya ya Nkolo?

Malongi mpe Mayokani 115:4Elingi koloba nini “kotambola na makuli manso ya Nkolo”? Lolenge nini makuli tozwi ebongoli bomoi na biso ya mokolo na mokolo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Praise to the Man,” Hymns, no. 27.

Kobongisa Boyekoli ya Moto Ye Moko

Mona bolingo ya Nzambe. Mokambi M. Russell Ballard ateyaki, “[N]sango malamu ezali nsango malamu ya bolingo—bolingo mpo na Nzambe mpe bolingo mpo na basusu” (“God’s Love for His Children,” Ensign, May 1988, 59). Ntango ozali kotanga makomi, kanisa kokoma to kotia bilembo wapi balobeli bosolo ya bolingo ya Nzambe.

Elilingi
batomboki na Boloko ya Carthage kobundisaka Joseph Smith mpe basusu

Bolingo Eleki Monene Moto Azala na Yango te, na Casey Childs

Bimisa na lokasa