Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya zomi na moko 29–Sanza ya zomi na mibale 5. Malongi mpe Mayokani 137–138: “Limoni ya Bosikoli ya Bawei”


“Sanza ya zomi na moko 29–Sanza ya zomi na mibale 5. Malongi mpe Mayokani 137–138: ‘Limoni ya Bosikoli ya Bawei,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya zomi na moko 29–Sanza ya zomi na mibale 5. Malongi mpe Mayokani 137–138,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
bato kati ya mokili ya milimo

Joseph amoni tata na ye, mama mpe ndeko na ye ya mobali na bokonzi ya selesitiale (Limoni ya Joseph Smith ya Bokonzi ya Selesitiale, Robert Barrett).

Sanza ya zomi na moko 29–Sanza ya zomi na mibale 5.

Malongi mpe Mayokani 137–138

“Limoni ya Bosikoli ya Bawei”

Mokambi M. Russell Ballard ateyaki: “nabengisi yo otanga yango mobimba mpe na bokebi [Malongi mpe Mayokani 138]. Ntango osali bongo, tika ete Nkolo apambola yo makasi ososola mpe osepela na bolingo ya Nzambe mpe moango na Ye ya lobiko mpe ya esengo mpo na bana na Ye” (“Limoni ya Bosikoli ya Bawei,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 73).

Koma Makanisi na Yo

Bimoniseli oyo ekomamaki na kati ya Malongi mpe Mayokani 137 mpe 138 ezali ya kokabwana na mibu koleka 80 mpe bakilometele 2,414.02. Eteni 137 ezwamaki na Profeta Joseph Smith na 1836 na Tempelo ya Kirtland oyo ezalaki ya kosila te, mpe mokapo 138 ezwamaki na Joseph F. Smith, Profeta ya motoba ya Eklezia, na 1918 na Salt Lake City. Na lolenge ya malongi, mamoni mibale oyo ezali ya ngambo na ngambo. Nyonso mibale eyanoli mituna na ntina ya nsuka ya bana ya Nzambe na bomoi oyo ekoya nsima. Mpe nyonso mibale ezwi ndimbola ya mozindo mosusu ntango totali mayele ya bomoi ya baprofeta oyo bazwaki yango.

Limoni ya Joseph Smith esungaki ye kososola nsuka ya bomoi ya seko ya ndeko na ye ya mobali ya bolingo Alvin, oyo akufaki mibu motoba yambo likoki ya kobatisa ezongisama. Mituna na ntina ya lobiko ya seko ya Alvin etikala libela kati na Joseph uta ntango wana. Limoni ya Joseph F. Smith emonisaki bosolo ya nkembo na ntina ya mokili ya milimo—ya solo emoniseli ya bolendisi epai ya moto oyo alelaki liwa ya bato ya libota na ye ya penepene. Joseph F. Smith abungisaki tata na ye, Hyrum Smith, na mibu 5 mpe mama na ye, Mary Fielding Smith, na mibu 13. Na ntango ya limoni na ye na 1918, alelaki liwa ya bana 13.

Mituna mingi oyo bato bazalaki na yango na ntina ya bomoi nsima ya kufa eyanolamaki na bimoniseli oyo. Eteni 137 epesi pole na mituna ya lolenge wana, mpe eteni 138 efungoli balido kutu minene mpenza. Elongo, batatoli na ntina ya “bolingo monene mpe ya kokamwa oyo emonisamaki na Tata mpe Mwana” (Malongi mpe Mayokani 138:3).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 137

Milimo nionso ekozwa libaku ya kopona nkembo ya selesitiale.

Bososoli moko kati na Bakilisto na 1836 ezalaki ete soki moko akufi na ozangaka kozwa libatisi—lokola ndeko mobali ya Joseph Smith Alvin akufaki—moto wana akokaki te kokota na lola. Nzokande Joseph amonaki Alvin na limoni na bokonzi ya selesitiale. Ntango otangi eteni 137, manyola nini oyekoli na ntina ya Tata na Lola, moango na Ye ya lobiko, mpe bokonzi ya selesitiale.

Tala lisusu Basantu, 1:232–35.

Malongi mpe Mayokani 138:1–11, 25–30

Kotanga mpe komanyola makomi elengelaka ngai nazwa emoniseli.

Mbala mosusu emoniseli eyaka kutu atako toluki yango te. Kasi mbala mingi, eyaka mpo tozali koluka na molende mpe tolengelami mpo na yango. Ntango otangi Malongi mpe Mayokani 138:1–11, 25–30, koma oyo Mokambi Joseph F. Smith azalaki kosala ntango “misu ya bososoli na [ye] efungwamaki” mpo na kososola malamu mpenza etinda ya bosikoli ya Mobikisi. Nsima kanisa lolenge nini okoki kolanda ndakisa ya Mokambi Smith. Ndakisa, mbongwana nini okoki kosala na kati ya boyekoli makomi na yo mpo na kopesa nzela na “bomanyoli mingi likolo ya makomi” mpe koleka “kokanisaka likabo monene ya bosikoli ya [Mobikisi]”? (milongo 1–2).

Na kati ya nsango na ye, “Limoni ya Bosikoli ya Bawei” (Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 71–74), Mokambi M. Russell Ballard atalisi banzela mosusu wapi Mokambi Smith alengelamaki mpo na kozwa emoniseli oyo. Kanisa lolenge nini olengelamaki mpo na makambo ozali kokutana to okokutana na yango mikolo ya nsima.

Tala lisusu “Mosala ya Joseph F. Smith: Limoni ya Bosikoli ya Bawei,” video, ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
Elilingi ya langi ya Joseph F. Smith

Joseph F. Smith, na Albert E. Salzbrenner

Malongi mpe Mayokani 138:25–60

Mosala ya lobiko ezali kosalama na ngambo mibale ya elamba.

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki, “Nsango na biso na mokili ezali pete mpe sembo: tobengisaka bana nyonso ya Nzambe na ngambo mibale ya elamba baya epai ya Mobikisi na bango, bazwa mapamboli ya tempelo esanto, bazwa na esengo ya libela, mpe balongobana mpo na bomoi ya seko” (“Banso Tokenda Liboso,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2018, 118–19). Manyola esakola oyo ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 138:25–60. Okoki lisusu kotalela mituna oyo:

  • Oyekoli nini uta na milongo oyo na ntina ya lolenge nini mosala ya lobiko ezali kokokisama na mokili ya molimo? Mpo na nini ezali ntina mpo yo oyeba ete mosala oyo ezali kosalama? Lolenge nini milongo oyo elendisi bondimi na yo na Bomikabi ya Mobikisi?

  • Milongo oyo eteyi yo nini na ntina ya baoyo basalaka mosala ya lobiko na mokili ya molimo? Mpo na nini ezali ntina mpo na kososola ete mosala ya lobiko ezali kosalema na ngambo nyonso mibale ya elamba?

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “Ndimela Nkolo,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2019, 26–29; “Susa Young Bikuke mpe Limoni ya Bosikoli ya Bawei,” Revelations in Context, 315–22.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 137:1–5.Bengisa libota na yo eyema oyo bakanisi na ntina ya lolenge bokonzi ya selesitiale ekoki kozala na kotalaka milongo oyo. Nini ozwi na kati ya milongo oyo oyo ezali kosunga yo otala liboso mpo na kofanda kuna? Nini tozali kosala sikawa mpo na komilengela mpo na kofanda kati ya bokonzi ya selesitiale elongo na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto?

Malongi mpe Mayokani 137:5–10.Mpo na koyekola na ntina ya nini yango elakisi mpo na Joseph Smith komona mingi ya bato ya libota na ye elongo na kati ya bokonzi ya selesitiale, libota na yo ekoki kotala video “Mosala ya Joseph Smith: Batempelo” (ChurchofJesusChrist.org). Ntango mosusu bokoki kosolola na ntina ya moto moko oyo boyebi akufa na kozangaka libaku ya kobatisama. Nini Malongi mpe Mayokani 137:5–10 eteyi biso na ntina ya moto wana?

Malongi mpe Mayokani 138:12–24.Nini Malongi mpe Mayokani 138:12–24 eteyi biso na ntina ya bato oyo Mobikisi akendaki kotala na mokili ya milimo? Mapamboli nini bazwaki? Toyekoli nini uta na ndakisa na bango?

Malongi mpe Mayokani 138:38–55.Milongo oyo elimboli baoyo Mokambi Joseph F. Smith amonaki na kati ya mokili ya milimo mpe ndambo ya ndimbola na ntina na bango. Ntango mosusu libota na yo ekoki kokoma bankombo ya bankoko oyo bazali na kati ya mokili ya milimo, mpe na makambo na ntina ya bomoi na bango.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo kati ya Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Search, Ponder, and Pray,” Chants pour Enfants, 109.

Kobongisa Boyekoli na Biso

Manyola makomi. Mokambi David O. McKay abiangaki bomanyoli “moko ya … bikuke ya bule koleka nyonso oyo na nzela ya oyo wapi tokokende liboso ya Nkolo” (Mateya ya Bakambi ya Eklezia: David O. McKay [2003], 32).

Elilingi
Yesu Klisto na kati ya mokili ya milimo

Motindami, na Harold I. Hopkinson. Yesu Klisto atindaki milimo ya basembo mpo na kosakola nsango malamu na mokili ya milimo.

Bimisa na lokasa