Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya zomi na mibale 20–26. Noele: Likabo Ezanga Bokokanisi ya Bonzambe ya Mwana ya Nzambe


“Sanza ya zomi na mibale 20–26. Noele: Likabo Ezanga Bokokanisi ya Bonzambe ya Mwana ya Nzambe,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya zomi na mibale 20–26. Noele,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
ekeko ya Maliya mpe mwana Yesu

Mbotama na Palata mpe Mabele ya Bodongo, na J. Kirk Richards

Sanza ya zomi na mibale 20–26

Noele

Likabo Ezanga Bokokanisi ya Bonzambe ya Mwana ya Nzambe

Lolenge moko ya kofandisa makanisi na yo likolo ya Mobikisi na Noele oyo ezali ya koyekola “Klisto na Bomoi: Litatoli ya Bapostolo.” Liteya oyo elobeli ndenge oyo okoki kokomisa litatoli oyo ya baprofeta eteni ya boyekoli ya nsango malamu mpo na yo moko to ya libota na yo.

Koma Makanisi na Yo

Na 1838, Profeta Joseph Smith asakolaki, “Mabongi ya ntina ya lingomba na biso ezali litatoli ya Bapostolo mpe Baprofeta, mpo na oyo etali Yesu Klisto, ete Akufaki, akundamaki, mpe asekwaki lisusu mokolo ya misato, mpe amataki na lola; mpe makambo mosusu oyo ezali ya lingomba na biso ezali bobele mabakisi na yango” (Mateya ya Baprofeta ya Eklezia: Joseph Smith, 49). Mibu nsima, Mokambi Russell M. Nelson akomaki ete “ezalaki esakola oyo ya ntina ya Profeta nde epesaki bolendisi mpo na baprofeta, bamoni mpe babimisi 15 mpo na kobimisa mpe kotia loboko na litatoli na bango mpo na kosepela eyenga ya mibu 2,000 ya mbotama ya Nkolo. Nkombo ya litatoli ya komikundola na lisitwale ezali ‘Klisto na Bomoi.’ Bandimi mingi basili kokanga bosolo na yango na mitu. Basusu bayebi bozali na yango malamu te. Ntango bozali koluka koyekola mingi na ntina ya Yesu Klisto, natombeli bino boyekola na lombango ‘Klisto na Bomoi’” (“Tobenda Nguya ya Yesu Klisto na Bomoi na Biso,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2017, 40).

Lokola Basantu ya Mikolo ya Nsuka, tosepelaka na mapamboli ya bokobi ya emoniseli na nzela ya baprofeta na bomoi mpe bapostolo. Tozali na botondi mpo na maloba na bango mafulama na toli, likebisi, mpe bolendisi. Kasi mingi kati na biso, topambolami na matatoli na bango ya nguya ya Yesu Klisto—na eleko ya Noele mpe mobu mobimba. Oyo ezali mingi mosika koleka maloba ya esengo ya bakomi ya bwanya to basakoli to boyebi uta na bato ya mayele na makomi. Ezali maloba ya “banzeneneke ya malonga ya nkombo ya Klisto na mokili mobimba” baye baponama, babiangema, mpe bapesama likoki ya Nzambe (Malongi mpe Mayokani 107:23).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

“Moto mosusu moko te atikala kozala na nguya ya makasi bongo.”

Makanisi nini ezali koyela yo ntango ozali kotanga Luka 2:10–11 mpe eteni ya yambo ya “Klisto na Bomoi”? Nini okoki koloba mpo na kosunga esakola oyo “moto mosusu moko te atikala kozala na nguya ya makasi bongo [lokola Yesu Klisto] likolo ya banso oyo bazalaki na bomoi mpe baoyo bakozala na mabele”? Luka bosolo na kati ya “Klisto na Bomoi” oyo elimboli nguya makasi ya Mobikisi. Lolenge nini Azalaki ndakisa mpe Amemelaki yo “esengo ya monene”? (LLuka 2:10).

“Asekwaki uta na nkunda.”

Na “Klisto ya Bomoi,” Bapostolo batatolaki Lisekwa ya Mobikisi, kotangaka mbala misato ya komonisama ya Nkolo asekwa (tala eteni ya mitano). Kanisa kotanga na ntina ya mbala mingi oyo ayaki kotala bato na kati ya Yoane 20–21; 3 Nefi 11–26; mpe Mambi ya Kala ya— Joseph Smith 1:14–20. Oyekoli nini na ntina ya Mobikisi uta na maloba na Ye mpe misala ntango ya komonisama oyo?

“Bonganganzambe na Ye mpe Eklezia na Ye ezongisamaki.”

Na ntango ya boyekoli na yo ya Malongi mpe Mayokani na mobu oyo, ozalaki na libaku malamu ya koyekola mingi na ntina ya lolenge nini “bonganganzambe ya Mobikisi mpe Eklezia na Ye ezongisamaki.” Bosolo nini ezongisama to mabongi nini ezali ntina mingi mingi mpo na yo? Kanisa kotalaka lisusu ndambo ya makomi oyo malandi oyo eteyi na ntina ya Bozongisi: Malongi mpe Mayokani 1:17–23; 13; 20:1–12; 65; 110; 112:30–32; 124:39–42; 128:19–21. Manyola lolenge nini bosolo ya nsango malamu ezongisama esungaka yo oyeba mpe okumbamela Yesu Klisto (tala Malongi mpe Mayokani 93:19).

“Mokolo moko Akozonga lisusu na mabele.”

Noele ezali eleko ya kosala nyonso oyo mibale kotala nsima na mokolo oyo Yesu Klisto abotamaki mpe kotala liboso na mokolo oyo Ye akozonga lisusu. Oyekoli nini na ntina ya bozongi na Ye uta na eteni ya mibale ya nsuka ya “Klisto ya Bomoi”? Ekoki lisusu kozala malamu kotanga, koyemba, to koyoka nzembo ya Noele oyo eteyi na ntina ya Boyei ya Mibale, lokola “Joy to the World” to “It Came upon the Midnight Clear” (Hymns, nos. 201, 207).

“Ye azali pole, bomoi mpe elikya ya mokili.”

Na eteni ya nsuka ya “Klisto ya Bomoi,” koma bizalela mpe bankombo epesamaki mpo na Mobikisi. Makomi oyo elandi ekoki kosunga yo omanyola lolenge nini Yesu Klisto azali “pole, bomoi mpe elikya ya mokili”: Luka 2:25–32; 1 Bakolinto15:19–23; Moroni 7:41; Malongi mpe Mayokani 50:24; 84:44–46; 93:7–10. Lolenge nini Azali pole , bomoi mpe elikya na yo? Bizalela mosusu nini to bankombo nini ya Mobikisi elimboli ntina koleka mpo na yo?

Lolenge nini koyekolaka “Klisto ya Bomoi” esimbaki bondimi mpe bolingo na yo mpo na Mobikisi?

Elilingi
Yesu Klisto

Pole ya Mokili, na Howard Lyon

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

“Klisto na Bomoi.”Mpo na kosunga libota kososola bosolo oyo eteyami na ntina ya Mobikisi na kati ya “Klisto ya Bomoi,” okoki kopona maloba ya ntina mpe osala elongo mpo na kozwa to koyema bilili oyo etalisi maloba yango. Okoki nsima kosangisa bilili yango mpe maloba wana na kati ya buku.

“Topesi litatoli na biso.”Nini toyekoli uta na “Klisto ya Bomoi” na ntina ya nini yango elingi koloba kopesa litatoli? Okoki kolinga kokoma matatoli na yo ya Klisto mpo na kokundola mokolo ya mbotama ya Mobikisi.

“Atambolaki bipai nyonso kosalaka bolamu.”Lolenge nini libota na yo esengeli kolanda ndakisa ya Mobikisi ya mosala na Noele oyo? Lolenge nini okomwanganisa “kimia mpe bolamu” na kati ya libota mpe lingomba na yo? Lolenge nini okoki kosunga komema “libiki [na] bato na bokono”? Okoki kozwa makanisi na kati ya Bavideo ya Noele na aplikasio ya Ebombelo ya Nsango malamu to Gospel Media (medialibrary.ChurchofJesusChrist.org).

“Nzambe azwa matondi mpo na likabo ezanga kokokanisa ya bonzambe ya Mwana na Ye.”Makabo nini tozwaki na ntina ya Yesu Klisto? Ntango mosusu baye libota bakoki kozwa biyano na kati ya “Klisto ya Bomoi” mpe nsima mabonza elingama oyo elakisi mabonza maye uta na Mobikisi. Libota na yo ekoki kofungola makabo na mokolo ya Noele to na poso yango mpe kotanga makomi oyo etali moko na moko. Tala mwa makomi ya ntina, atako libota na yo ekoki kozwa mingi mosusu: Luka 2:10–14; 1 Petelo 2:21; Mozia 3:8; Alma 11:42–43; Malongi mpe Mayokani 18:10–12. Bokoki lisusu koyemba loyembo na ntina ya Mobikisi, lokola “He Sent His Son” (Chants pour Enfants, 34–35), mpo na kozwa makabo mosusu oyo ewuti epai na Ye.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo kati na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Hark! The Herald Angels Sing,” Hymns, no. 209.

Kobongisa Boyekoli Makomi mpo na Yo Moko

Talela Mobikisi. “Boyekoli na losambo ‘Klisto ya Bomoi’ ezali lokola kotangaka matatoli ya Matai, Malako, Luka, Yoane, mpe baprofeta ya Buku ya Mormon. Ekobakisa bondimi na yo epai na Mobikisi mpe ekosunga yo otikala kotalelaka Ye” (M. Russell Ballard, “Zonga mpe Zwa,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2017, 65).

Bimisa na lokasa