Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Zomi na Mibale 6–12. Biteni ya Bondimi mpe Mayebisi ya Bakambi 1 mpe 2: “Tondimelaka”


“Sanza ya Zomi na Mibale 6–12. Biteni ya Bondimi mpe Mayebisi ya Bakambi 1 mpe 2: ‘Tondimelaka,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya zomi na mibale 6–12. Biteni ya Bondimi mpe Mayebisi ya Bakambi 1 mpe 2,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
bulangeti ya kilo kolakisaka maboko na mposo ya balangi mingi

Epai ya Bandimi ya Mibali Nyonso oyo Balongobani, na Emma Allebes

Sanza ya Zomi na Mibale 6–12

Biteni ya Bondimi mpe Mayebisi ya Bakambi 1 mpe 2

“Tondimelaka”

Ntango ozali koyekola Biteni ya Bondimi mpe Mayebisi ya Bakambi 1 mpe 2, kanisa litomba yango ekozala likolo ya Eklezia. Nini esepelisi yo na ntina ya bosolo ezali koteya?

Koma Makanisi na Yo

Na mibu 200 kobanda Limoni ya Yambo ya Joseph Smith, Nzambe akobaki kopesa “emoniseli likolo ya emoniseli, boyebi likolo ya boyebi” epai ya bakambi ya Eklezia na Ye (Malongi mpe Mayokani 42:61). Na makambo mosusu, emoniseli wana ekambaki bakambi ya Eklezia mpo na kosala mbongwana na ndenge mpe mimesano ya Eklezia, “engebene na bolingi ya Nzambe, lokola ekoki na mawa na ye engebene na bizalela ya bana ya bato” (Malongi mpe Mayokani 46:15). Mayebisi ya Bakambi 1 mpe 2 etalisi lolenge ya emoniseli—moko oyo ekambaki na nsuka ya momesano ya libala na basi mingi, mpe mosusu esalaki ete mapamboli ya bonganganzambe, kotangaka mpe mapamboli ya tempelo, ekoki kozwama na bato ya mposo nyonso. Mbongwana lokola oyo ezali eteni ya nini elingi koloba kozala “eklezia moko ya solo mpe ya bomoi” (Malongi mpe Mayokani 1:30), na profeta moko ya solo mpe na bomoi.

Kasi ezali lisusu na makambo oyo ebongwanaka te—bosolo ya ebandeli, bosolo ya seko. Mpe ntango mosusu ntina ya emoniseli ezali kotia pole mosusu likolo ya bosolo oyo, kosungaka biso tomona yango polele mingi koleka. Biteni ya Bondimi—masakoli 13 na maloba mokuse ya Joseph Smith na ntina ya maye Basantu ya Mikolo ya Nsuka bandimaka—ezali komonana lokola kosalisa mpo na ntina oyo ya komonisa makambo polele. Ndenge Nyonso mibale ya bimoniseli ezali kokamba mpe kopambola Eklezia, Eklezia oyo efandisami makasi likolo ya bosolo ya seko, kasi oyo ezali na makoki ya kokola mpe kobongwana lokola Nkolo azali kobakisa bososoli na biso mpo na kosunga biso totelemela mikakatano ya lelo. Na maloba mosusu, “Tondimi maye manso Nzambe asila kobimisa, manso maye Azali kobimisa sikawa, mpe tondimi ete Akobimisa lisusu makambo manene mpe ma motuya mingi matali Bokonzi ya Nzambe” (Biteni ya Bondimi 1:9).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Biteni ya Bondimi

Biteni ya Bondimi ezali na bosolo ya ebandeli ya nsango malamu oyo ezongisami.

Lolenge moko bokoki koyekola Biteni ya Bondimi ezali ya kokoma makambo ya bosolo oyo ezwami kati na moko na moko mpe nsima komona makomi oyo ekangani na bosolo oyo. Lolenge nini makomi oyo ezali kobakisa eloko mosusu na bososoli na bino ya bosolo kati na Biteni ya Bondimi?

Tala lisusu Mokambi na Makomi, “Biteni ya Bondimi,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; L. Tom Perry, “Malongi mpe Mabongi oyo ezali kati na Biteni ya Bondimi,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 46-48; “Mokapo 38: The Wentworth Letter,” na Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith, 435–47.

Biteni ya Bondimi 1:9; Mayebisi ya Bakonzi 1 mpe 2

Eklezia ya Yesu Klisto ekambami na nzela ya emoniseli.

“Tondimi ete [Nzambe] akobimisa lisusu makambo manene mpe ma motuya mingi matali Bokonzi ya Nzambe” (Biteni ya Bondimi 1:9), kutu ntango makambo wana elingi koloba kobongola ndenge ya kosala mpe mimesano ya Eklezia. Na mobeko to mabongi oyo na makanisi, tala Masakoli ya Bakonzi 1 mpe 2, mpe luka maloba oyo ezali kolendisa bondimi na bino na emoniseli oyo ezali kokoba. Bandakisa mosusu nini ya emoniseli oyo ezali kokoba bokoki kokanisa uta epai ya profeta ya Nkolo? Lolenge nini bomoi na yo esimbami na bimoniseli oyo? Lolenge nini [bimoniseli yango ]epusi liboso mosala ya bonkonzi ya Tata na Lola?

Tala lisusu Amosi 3:7; 2 Nefi 28:30.

Esakola ya Bakonzi 1

Mosala ya Nzambe esengeli kokende liboso.

Na kati ya “Excerpts from Three Addresses by President Wilford Woodruff regarding the Manifesto” (na nsuka ya Mayebisi ya Bakambi 1), Bantina nini profeta apesaki mpo ete Nkolo asukisa momesano ya libala na balongani mingi? Oyo eteyi yo nini na ntina ya mosala ya Nkolo?

Mpo na kozwa nsango mingi koleka na ntina ya makambo mayingelaki Mayebisi ya Bakonzi 1, tala “The Messenger and the Manifesto” (Revelations in Context, 323–31) mpe “Plural Marriage and Families in Early Utah” (Gospel Topics, topics.ChurchofJesusChrist.org).

Elilingi
liyemi ya langi ya Wilford Woodruff

Wilford Woodruff, na H. E. Peterson

Mayebisi ya Bakonzi 2

Tokoki kotia motema na Nkolo, kutu ntango tozali na bososoli ebongi nie te.

Makomi eteyi biso totia motema na Nkolo (tala Masese 3:5), mpe yango nde bandimi mingi ya Eklezia bakitani ya bana ya Afrika basalaki ntango Eklezia epimelaki bango bokuli na bonganganzambe mpe makuli ya tempelo. Ata soki bazalaki kososola te mpo na nini lolenge ya kosala oyo ezalaki—mpe mbala mingi bamiyokaki kozokisama na bandimbola epesamaki na eleko wana, oyo Eklezia ezali komona mabe lelo—bandimi ya komipesa mingi bakitani ya bana ya Afrika batiaki motema na Nkolo mpe batikalaki na bondimi na bomoi na bango mobimba. Ntango ozali kotanga Mayebisi ya Bakambi 2, manyola lolenge nini boyekoli kotia motema na Nkolo ata kutu ntango ozali na bososoli ebonga nie te.

Koyekola bondimi ya bandimi ya baindo ya Eklezia ekokaki kofula bino. Oyo ezali mwa masolo na bango, ezwami na history.ChurchofJesusChrist.org:

  • Jane Elizabeth Manning James” (Church History Topics)

  • In My Father’s House Are Many Mansions” (lisolo ya Green Flake)

  • You Have Come at Last” (lisolo ya Anthony Obinna)

  • “Break the Soil of Bitterness” (lisolo ya Julia Mavimbela)

  • I Will Take It in Faith” (lisolo ya George Rickford)

Tala lisusu “Witnessing the Faithfulness,” Revelations in Context, 332–41; Gospel Topics, “Race and the Priesthood,” topics.ChurchofJesusChrist.org; Ahmad Corbitt, “A Personal Essay on Race and the Priesthood,”biteni 1–4, history.ChurchofJesusChrist.org; BeOne.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Biteni ya Bondimi.Kanisa lolenge nini libota na bino ekoki kokela “mateya mike mike” mpo na Biteni ya Bondimi. Ndakisa, na poso mobimba, moto moo ya libota akoki kopona eteni moko mpe kozwa makomi, foto, loyembo ya mikolo, to loyembo ya bana to kokabola makambo oyo ye ayebi ye moko.

To bato ya libota bakoki moko nsima ya mosusu kotunana mituna etali Eklezia mpe biyamba na biso mpe nsima koyanola mituna wana na eteni ya bondimi moko.

Mayebisi ya Bakambi 1 mpe 2.Mayebisi ya Bakambi 1 mpe 2 esungaka biso tososola mosala ya emoniseli ya sikawa na Eklezia. Ntango libota na yo ezali kotanga yango elongo, kanisa kososola lolenge nini profeta akambaka biso “na nzela ya bofuli ya Nzambe ya Nguya Nyonso” (Mayebisi ya Bakambi 1). Lolenge nini mayebisi mibale oyo ezali kolendisa bondimi na bino kati na Nzambe na bomoi oyo azali kokamba ye moko Eklezia na Ye? Lolenge nini tozali komona loboko na Ye kati na mosala ya Eklezia lelo? Bokoki kozwa mokano ya koluka elongo mwa mikanda na “Makanisi mpo na Boyekoli Makomi na Yo Moko” na likolo.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Keep the Commandments,” Chants pour Enfants, 146–47.

Kobongisa Mateya na Biso

Bolandela mabengisi mpo na kosala. “Ntango bolandeli libengisi moko mpo na kosala, bolakisa [bato ya libota na bino] ete bozali kobatela bango mpe lolenge nini nsango malamu ezali kopambola bomoi na bango. Bozali lisusu kopesa bango mabaku ya kokabola boyebi na bango” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 35).

Bimisa na lokasa