Makomi
Malongi mpe Mayokani 135


Eteni 135

Mayebisi ya liwa ya martiru ya Profeta Joseph Smith mpe ndeko na ye ya mobali, Nkoko mopamboli Hyrum Smith, na Carthage, Illinois, na mokolo ya 27, sanza ya motoba ya mobu 1844. Mokanda oyo etiamaki na nsuka ya bobimi ya buku Malongi mpe Mayokani ya mobu 1844, oyo ezalaki penepene mpenza ya kobimisama ntango babomaki Joseph mpe Hyrum Smith.

1–2, Joseph mpe Hyrum bakufaki bamartiru na Boloko ya Carthage; 3, Ebonga ya Profeta ya likolo esakolami; 4–7, Makila mazanga ekweyeli na bango matatoli bosolo mpe bonzambe ya mosala.

1 Mpo na kokanga litatoli ya buku oyo mpe Buku ya Mormon, toyebisi polele liwa ya martiru ya Profeta Joseph Smith, mpe Nkoko Hyrum Smith. Babomaki bango na manduki na boloko ya Carthage, ya 27 ya sanza ya motoba, ya mobu 1844, penepene na ngonga ya mitano nsima ya nzanga, na ebele ya bato kosimbaka manduki—bapakolamaki langi ya moyindo—na motango ya bato uta 150 na 200. Yambo babomaki Hyrum mpe akweyaki mio, kogangaka: Nazali moto ya kufa! Joseph apumbwaki uta na lininisa, mpe babomaki ye na monduki wana ezalaki ye komeka kobima, kogangaka: O Nkolo Nzambe na ngai! Babetaki bango mibale masasi nsima ya kufa, na lolenge ya nkuna, mpe nyonso mibale bazwaki masasi minei.

2 John Taylor mpe Willard Richards, bato mibale na kati ya Bazomi na mibale, bobele bato bazalaki kati na kisuku na ntango yango; ya liboso azokisamaki na lolenge ya bonyama na masasi minei, kasi asilaki kobika; ya mibale, na nzela ya ngolu ya Nzambe, akimaki, kozangaka kutu ata lidusu moko na kazaka na ye.

3 Joseph Smith, Profeta mpe Momoni ya Nkolo, asali mingi koleka moto nyonso mosusu oyo asili kozala, longola bobele Yesu, mpo na lobiko ya bato kati na mokili oyo. Na mwa ntaka ya ntango moke ya mibu ntuku mibale, abimisi Buku ya Mormon, oyo abongolaki na nzela ya likabo mpe nguya ya Nzambe, mpe azalaki nzela mpo na kobimisaka yango na mikili mibale; atindi mobimba ya nsango malamu ya seko, oyo ezali na kati, na nsuka minei ya mabele; abimisi bimoniseli mpe mitindo oyo ezali kati na buku oyo ya Malongi mpe Mayokani, mpe mikanda misusu ya bwania mpe malako mpo na litomba ya bana ya bato; asangisi nkoto mingi ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka, abandisi engumba yoko monene, mpe atiki lokumu mpe nkombo oyo ekoki kobebisama te. Azalaki moto ya lokumu, mpe akufaki moto ya lokumu na miso ya Nzambe mpe ya bato na ye; mpe lokola mingi ya bapakolami ya Nkolo ya ntango ya kala, akangaki etinda na ye mpe misala na ye na makila na ye moko; lolenge moko mpe ndeko na ye ya mobali Hyrum. Na bomoi bazalaki bomoko, mpe na liwa bakabwanaki te!

4 Ntango Joseph akendaki na Carthage komipesa ye moko na oyo babengaki masengami ya mobeko, mikolo mibale soki te misato liboso ya bobomi na ye, alobaki: “Nazali kokende lokola mwana ya mpate epayi ya mobomi; kasi nazali kimia lokola ntongo ya elanga; nazali na mayele ya motema oyo ezali na likambo te na Nzambe, mpe na bato nyonso. nakokufa na kozangaka ekweyeli, mpe bato bakoloba na ntina na ngai—babomaki ye na nko”—Ntongo se moko yango, esilaki Hyrum kobelema mpo na kokende—toloba esika babomaka nyama? iyo, mpo ete ezalaki bongo—atangaki eteni ya makomi, penepene na nsuka ya mokapo ya zomi na mibale ya buku ya Etele, kati na Buku ya Mormon, mpe abalusaki lokasa likolo na yango:

5 Mpe esalemaki ete nasambelaki epayi ya Nkolo ete apesa baoyo bazali Bayuda-te ngolu, ete bakoka kozala na bolingani. Mpe eyaki koleka ete Nkolo alobaki na ngai: Soki bazali na bolingani te etali yo te, ozali sembo; yango wana bilamba na yo bikokomisama peto. Mpe mpo ete omonaki bolembu na yo, okokomisama makasi, kutu kino okofanda na nse kati na esika oyo nasili kolengela na bifandelo ya Tata na ngai. Mpe sikawa ngai … napesi mbote ya kokabwana epayi ya Bayuda-te; iyo, mpe lisusu epayi ya bandeko na ngai bandimi oyo nalingaka, kino tokokutana liboso ya kiti ya bosambisi ya Klisto, wapi bato nyonso bakoyeba ete bilamba na ngai ezali peto na makila na bino. Batatoli bakufi sikawa, mpe litatoli na bango ezali kosala.

6 Hyrum Smith azalaki na mibu ntuku minei na minei na sanza ya mibale, ya mobu 1844, mpe Joseph Smith azalaki na mibu ntuku misato na mwambe na sanza ya zomi na mibale, ya mobu 1843; mpe uta ntango wana kokende liboso nkombo na bango ekotiama na mokanda na kati ya molongo ya bamartiru ya eyamba; mpe motangi ya buku yango na ekolo moko moko akokundolama ete Buku ya Mormon, mpe buku oyo ya Malongi mpe Mayokani ya eklezia, efutisamaki motuya ya makila maleki nyonso ya ekeke ya ntuku zomi na libwa mpo na kobimisa yango mpo na lobiko ya mokili moko oyo mosili kobeba; mpe soki moto ekoki kozikisa nzete ya mobesu mpo na nkembo ya Nzambe, boni na pete ekozikisa nzete ekawuka mpo na kopetola elanga ya vinyo uta na bosoto. Bazalaki na bomoi mpo na nkembo; mpe bakufaki mpo na nkembo; mpe nkembo ezali lifuta na bango ya seko. Mobu na mobu nkombo na bango ekokumisama na bana lokola mabanga ya ntalo mpo na basantisami.

7 Bazalaki na ekweyeli ya mabe moko te, lokola mbala na mbala bamonisamaki solo liboso, mpe bakangisamaki na boloko na ekokolo ya bateki bato mpe bato ya nkuna; mpe makila mazanga ekweyeli na bango na mabele ya boloko ya Carthage ezali elembo monene ekangemi na bomoi ya Kimormon oyo ekoki te kobwakama na esambelo moko likolo ya mabele te, mpe makila mazanga ekweyeli na bango likolo ya bendele ya Ekolo ya Illinois, elongo na bondimi oyo ebukamaki ya Ekolo lokola elakamaki na mokambi ya etuka, ezali litatoli moko na bosolo ya nsango malamu ya libela ete mokili nyonso ekoki te koboya; mpe makila mazanga ekweyeli na bango likolo ya bendele ya lipanda, mpe likolo ya mokanda monene ya boyokani ya Etazini, ezali ntoma moko ya eyamba ya Yesu Klisto, oyo ekosimba mitema ya bato ya sembo na kati ya bikolo; mpe makila mazanga ekweyeli na bango, elongo na makila mazanga ekweyeli ya bamartiru nyonso na nse ya etumbelo oyo Yoane amonaki, makoganga na Nkolo na Bibele kino akobekola makila wana likolo ya mabele. Amene.