Makomi
Malongi mpe Mayokani 96


Eteni 96

Emoniseli epesami na Profeta Joseph Smith, kolakisaka molongo ya engumba to ya likonzi ya Siona na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 4, sanza ya motoba ya mobu 1833, molongo oyo epesamaki lokola ndakisa na Basantu kati na Kirtland. Libaku yango ezalaki likita moko ya banganganzambe minene, mpe moto ya likambo ya kotala ezalaki bokaboli ya boko mabele, oyo eyebanaki lokola Ebokolelo ya French, oyo ezalaki ya Eklezia penepene na Kirtland. Lokola bato ya likita bakokaki te koyokana nani asengelaki kokamata mokumba ya ebokolelo yango, nyonso bandimaki koluka koyeba uta na Nkolo mpo na oyo etali likambo yango.

1, Likonzi ya Siona ya Kirtland esengeli eyeisama makasi; 2–5, Episikopo asengeli kokabola mabula ya kosangola mpo na Basantu; 6–9, John Johnson asengeli kozala moto moko ya molongo ya bomoko.

1 Tala, nalobi epayi na bino, bwania ezali awa, epayi wapi bokoki koyeba lolenge nini kosala mpo na oyo etali likambo oyo, mpo elongobani epayi na ngai ete likonzi oyo natiaki mpo na bokasi ya Siona eyeisama makasi.

2 Boye, tika mosali na ngai Newel K. Whitney azwa mokumba ya esika oyo etangami na kati na bino, likolo ya wapi nazali na mwango ya kotonga ndako na ngai esantu.

3 Mpe lisusu, tika ete ekabolama na biteni ya mabele, engebene na bwania, mpo na litomba ya baye wana bazali koluka mabula ya kosangola, lokola ekozwama mokano kati na lisanga na kati na bino.

4 Boye, bokeba ete botalela likambo oyo malamu, mpe ete ndambo oyo wana esengisami mpo na litomba ya molongo na ngai, mpo na ntina ya komema liloba na ngai na bana ya bato.

5 Mpo tala, solo nalobi epayi na bino, oyo elongobani malamu koleka na ngai, ete liloba na ngai ekende na bana ya bato, mpo na ntina ya komema botosi na mitema ya bana ya bato mpo na bolamu na bino. Kutu bongo. Amene.

6 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, ezali bwania mpe elongobani na ngai, ete mosali na ngai John Johnson oyo kani libonza nandimaki, mpe oyo kani sambo nayokaki, epayi ya nani napesi elaka ya bomoi ya seko mbala mingi lokola akobomba mitindo na ngai uta sikawa kokende liboso—

7 Mpo azali eboto ya Yosefe mpe mokaboli ya mapamboli ya elaka epesamaki epayi ya batata na ye—

8 Solo nalobi epayi na bino, elongobani epayi na ngai ete akoma moto ya molongo, ete akoka kosalisa na kobimisaka liloba na ngai epayi ya bana ya bato.

9 Boye bosengeli kokulisa ye na lipamboli oyo, mpe asengeli koluka na molende kolongola mikumba ya nyongo oyo ezali likolo ya ndako oyo etangami na kati na bino, ete akoka kofanda kati na yango. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa