Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Zomi 4–10. Malongi mpe Mayokani 111–114: “Nakotinda Biloko Nyonso mpo na Bolamu na Bino”


“Sanza ya Zomi 4–10. Malongi mpe Mayokani 111–114: ‘Nakotinda Biloko Nyonso mpo na Bolamu na Bino,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya Zomi 4–10. Malongi mpe Mayokani 111–114,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Joseph Smith azali koteya

Sanza ya Zomi 4–10

Malongi mpe Mayokani 111–114

“Nakotinda Biloko Nyonso mpo na Bolamu na Bino”

Na nzela ya losambo senga bokambi ya Molimo ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 111–14, mpe koma mayoki na yo. Kanisa nsima banzela okoki kosalela makanisi wana.

Koma Makanisi na Yo

Osila kozwa na bomoi na yo boyebi ya molimo oyo esalaki ete omindima mpe oyoka kimia kati na bondimi na yo—kasi nsima mitungisi ya bomoi emekaki bondimi na yo, mpe omimonaki kobundaka mpo na kozwa lisusu kimia oyo oyokaki liboso? Eloko moko ya lolenge oyo esalamaki epai ya Basantu na Kirtland. Mbula moko ekokaki te nsima ya bosopani ya molimo ntango babulisaki Tempelo ya Kirtland, mobulu ebandaki. Bozangi mosolo, boswani kati na Lisanga likoki ya Bazomi na mibale, mpe mimekano mosusu esalaki ete bato basusu baningana kati na bondimi na bango.

Tokoki kokima mimekano te, boye lolenge nini ekoki biso kopekisa yango ebundisa bondimi mpe litatoli na biso? Ntango mosusu eteni ya eyano ekoki kozala kati na toli ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani 112, oyo epesamaki ntango mitungisi ezalaki koya makasi na Kirtland. Nkolo alobaki, “Bopetola mitema na bino liboso na ngai” (molongo 28), “Botomboka te” (molongo 15), “Bolinga loketo na bino mpo na mosala” (molongo 7), mpe “Bomikitisa” (molongo 10). Ntango tolandi toli oyo, Nkolo “akokamba [biso] na loboko” na mitungisi mpe kokotisa biso na bobikisi mpe na kimia (tala milongo 10, 13).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 111

Nkolo akoki “kotinda boloko nyonso mpo na [ya ngai] bolamu.”

Na 1836, Eklezia ekomaki na baniongo mingi na kosalaka mosala ya Nkolo. Lokola Joseph Smith mpe basusu bamitungisaki na ntina ya baniongo oyo mpe balukaki banzela ya kofuta yango, bakendeki mobembo na Salem, Massachusetts, ntango mosusu mpo na banungunungu ezalaki ete mbongo esundolamaki na ndako moko kuna (tala eteni ya moto ya Malongi mpe Mayokani 111). Nsima ya bokomi na bango na Salem, Nkolo alobaki, “Ezali na biloko ya motuya mingi koleka moko mpo na bino na engumba oyo” (molongo 10)—biloko ya motuya oyo etangami mpe bato oyo Ye alingaki “kosangisa na ntango elongobani mpo na litomba ya Siona” (molongo 2; tala lisusu Esode 19:5). Atako bamonaki mosolo moko te na Salem, babongwani oyo bayaki na nzela ya bokasi ya bamisionele ya nsima kuna ezalaki eteni ya bokokisi ya elaka ya nkolo.

Ntango ozali kotanga eteni 111, kanisa na ntina ya biloko ezali kotungisa yo. Kanisa lolenge nini maloba ya Nkolo epai ya Joseph ekoki kosalelama epai na yo. Lolenge nini Nkolo asungaki yo omona “biloko ya motuya” oyo okanaki te? (molongo 10). Kanisa nini Asali mpo na “kotinda biloko nyonso mpo na bolamu na yo” (molongo 11). Nini maloba “na lombango lokola ozali na makoki ya koyamba yango” eteyi yo na ntina ya Tata na Lola?

Tala lisusu Matai 6:19–21, 33; “Biloko ya motuya mingi koleka Moko,” Revelations in Context, 229–34.

Malongi mpe Mayokani 112:3–4

Nkolo akokamba baoyo balukaka kati na komikitisa bolingi na Ye.

Bomoko na Lisanga likoki ya Zomi na mibale ezalaki kokita na elanga ya 1837. Ezalaki na makambo ya bozangi boyokani na ntina ya mikumba, mpe bandimi mosusu bazalaki kobimisa yango kotelemelaka Profeta Joseph Smith. Thomas B. Marsh, ntango wana Mokambi ya Lisanga likoki ya Bazomi na mibale, azalaki komitungisa, mpe ayaki uta Missouri na Ohio, koluka toli uta na Profeta. Ndeko mobali Marsh azwaki yango na nzela ya emoniseli na eteni 112. Lolenge nini toli ya Nkolo esungaki ye mpe lisanga likoki na ye? Mateya nini ezali kati na yango mpo na yo ntango ozali koluka kolonga boswani mpe makambo ya motema ya makasi?

Mingi mingi, okoki komanyola molongo 10. Elingi koloba nini mpo ete Nkolo akamba yo “na loboko”? Mpo na nini bomikitisi esengelami mpo na lolenge ya bokambi oyo?

Tala lisusu Ulisses Soares, “Bozala na Bomikitisi mpe Bosawa na Mitema,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 9–11; “The Faith and Fall of Thomas Marsh,” Revelations in Context, 54–60.

Elilingi
bato mibale kosambelaka

Soki tomikitisi, Nkolo akokamba biso mpe akoyanola nsambo na biso.

Malongi mpe Mayokani 113

Joseph Smith azalaki “mosali na maboko ya Klisto .”

Yisaya alobelaki moko ya bakitani ya Yisai lokola “lingenda” mpe “mosisa” (Yisaya 11:1, 10). Na eteni 113, Nkolo alimbolaki ete mokitani oyo, mosali moko ya Klisto, akozala esalelo na kosangisaka bato ya Nkolo na mikolo ya nsuka (tala Malongi mpe Mayokani 113:4, 6)—esakola moko oyo ezali kolimbola Profeta Joseph Smith malamu mpenza. Lolenge nini bosolo oyo mpe mosusu na eteni 113 ekokaki kolendisa basantu na ntango ya mpasi oyo bazalaki kokutana na yango na Kirtland? Omoni nini kati na emoniseli oyo ekoki kofula yo mpo na kosala elongo na mosala ya Nkolo lelo?

Tala lisusu Mokambi na Makomi, “Yisai,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; 2 Nefi 21:10–12; Joseph Smith—Lisolo 1:40.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 111:2, 9–11.Milongo oyo ekoki kolendisa lisolo na ntina ya oyo libota na yo ezali kopesa motuya lokola “biloko ya motuya” ya seko. Bokoki kosala lisano ya koluka biloko ya motuya na kobombaka biloko nzinganzinga ya ndako oyo ezali kolakisa biloko Nkolo alingaka to apesaka motuya mingi. Ntango libota na bino emoni eloko moko na moko, bosolola maye bokoki kosala mpo na kolakisa ete bozali kosepela na yango.

Malongi mpe Mayokani 112:10Mpaka Ulisses Soares alimbolaki bato ya sembo na lolenge oyo: “Bato ya sembo bakoki koteyama, koyebaka boniboni batalelaka Nzambe mpe bazali na mposa ya kokonzama na bolingi na Ye. Bato ya sembo bazali basokemi mpe bazali na makoki mpo na kozala na nguya ya kopusa basusu na bolamu mpo na kokoma lolenge moko.” (“Be Meek and Lowly of Heart,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2013, 10). Bokanisa ndenge ya kosunga libota na bino basosola nini elingi koloba kozala na bomikitisi? Bokoki koyemba loyembo moko ya bosembo, ndakisa “Be Thou Humble” (Hymns, no. 130), ntango moto moko ya libota asimbi basusu “na loboko” mpe akambi bango nzinganzinga ya ndako na bino. To bokabola makambo bomonaki ntango Nkolo akambaki bato ya libota na bino “na loboko” mpe apesaki “eyano na nsambo na [bango].”

Malongi mpe Mayokani 112:11–14, 26Bokeseni nini ezali kati na koyeba nkombo ya moto moko mpe koyeba bango? Toyekoli nini uta na milongo 11–14 na ntina ya nini yango elingi koloba koyeba Nkolo?

Malongi mpe Mayokani 112:15Elingi koloba nini “kotombokela” profeta? Omoni nini na molongo oyo esalisi biso tolinga kosunga profeta?

Malongi mpe Mayokani 113:7–8.Toyekoli nini uta na molongo 8 oyo ekosunga “komema lisusu Siona” mpe kosikola Yisalaele?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo kati na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Be Thou Humble,” Hymns, no. 130.

Kobongisaka Mateya na Biso

Bosalela litatoli na bino. “‘Boteyaka nini bozali,’ Mpaka Neal A. Maxwell ateyaki. ‘Ndenge ya ezalela na bino, yango nde bato bakokanisela bino mingi … koleka bosolo moko boye na liteya songolo’” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 13).

Elilingi
Thomas B. Marsh mpe Joseph Smith

Thomas B. Marsh azali kokoma emoniseli epesamelaki ye na nzela ya Joseph Smith. Bozala Sembo, na Julie Rogers.

Bimisa na lokasa