Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Zomi 11–17. Malongi mpe Mayokani 115–120: “Libonza na Ye Ekozala Bule Mingi mpo na Ngai Koleka Koyikana na Ye”


“Sanza ya Zomi 11–17. Malongi mpe Mayokani 115–120: ‘Libonza na Ye Ekozala Bule Mingi mpo na Ngai Koleka Koyikana na Ye,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya Zomi 11–17. Malongi mpe Mayokani 115–120,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Far West

Far West, na Al Rounds

Sanza ya Zomi 11–17

Malongi mpe Mayokani 115–120

“Libonza na Ye Ekozala Bule Mingi mpo na Ngai Koleka Koyikana na Ye”

Nkolo alingi koloba na yo. Ntango ozali koyekola makomi, sambela mpe senga Ye asunga yo kozwa nsango na Ye mpo na yo.

Koma Makanisi na Yo

Ntina ya kozala na elikya ezalaki mpo na esika ya sika-sika ya bosangani ya Basantu, Far West, Missouri, na Sanza ya nsambo 1838. Engumba ezalaki kokola mbangu, mabele emonanaki lokola ya kotondana, mpe ebimisaki ete mosika mingi te na nordi ezalaki Adam-ondi-Ahman, esika oyo ezali na ndimbola monene na molimo (tala Malongi mpe Mayokani 107:53–56116). Kino sikawa, esengelaki kozala mpasi mpo na Basantu ata soki bakanisi te nini babungisaki. Babenganaki bango na Independence, esika monene etangamaki ya Siona, mabaku ya kozonga ntango moko kuna emonanaki lokola kozala mpasi. Mpo na kobakisa, Basantu basengelaki kokende na Kirtland, Ohio, batikaki tempelo na bango oyo balingaki mingi bobele nsima ya mibu mibale. Mpe na ntango wana ezalaki kaka banguna ya libanda ya Eklezia oyo bazalaki kotelemela Eklezia te—bandimi mingi ya lokumu mpe batelemelaki Joseph Smith, mpe lisusu banzeneneke misato ya Buku ya Mormon mpe bato minei kati na Bazomi na Babale. Basusu bakokaki komituna, Bokonzi ya Nzambe ezali solo mpenza kokola makasi, to ezali kokita?

Nzokande basembo batikaki te mituna ya boye epekisa bango kokende liboso. Na esika na yango, babandaki kotonga esika ya sika ya bule, mbala oyo na Far West. Basalaki moango ya kotonga tempelo ya sika. Bapostolo minei ya sika babiangemaki, kotangaka mpe mibale basusu—John Taylor mpe Wilford Woodruff—oyo bakomaki nsima Bakambi ya Eklezia (tala Malongi mpe Mayokani 118:6). Basantu bayekolaki ete kosala mosala ya Nzambe elingi koloba te ete okokweya mokolo moko te; elingi koloba “okolamuka lisusu.” Mpe atako okotika biloko songolo, mabonza ekozala ya bule epai ya Nzambe, kutu “bule koleka … koyikana na [yo]” (Malongi mpe Mayokani 117:13).

Tala Basantu, 1:296–99; “Far West and Adam-ondi-Ahman,” Revelations in Context, 235–41.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 115:4–6

Nkombo ya Eklezia eponamaki na Nkolo.

Mokambi Russell M. Nelson alobaki ete nkombo ya Eklezia ezali “likambo ya motuya monene” (“Nkombo Elongobani ya Eklezia,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 87). Kanisa na ntina nini likambo wana ezali solo ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 115:4–6. Nkombo ya Eklezia esengeli kosala nini na mosala mpe misio na yango?

Tala lisusu 3 Nefi 27:1–11.

Malongi mpe Mayokani 115:5–6

Siona mpe makonzi na yango epesaka “ekimelo na ntango ya mipepe makasi.”

Atako mikakatano oyo Basantu bazalaki kokutana na yango na 1838, Nkolo azalaki kozela mingi uta na bango. Luka maloba oyo na kati ya Malongi mpe Mayokani 115:5–6 oyo ebeti nsete na mosala Nkolo alingi Eklezia na Ye mpe bandimi na yango bakokisa na mokili. Ndakisa, nini oyoki oyo osengeli kosala mpo na “kotelama mpe kongenga”? (molongo 5). Mipepe nini ya makasi na molimo omonaka nzinga nzinga na yo, lolenge nini tozwaka “ekimelo” na nzela ya bosangani? (molongo 6).

Tala lisusu 3 Nefi 18:24.

Malongi mpe Mayokani 117

Mabonza na ngai ezali bule epai ya Nkolo.

Kotika Kirtland ekoki kozala mingi mingi likambo ya mpasi mpo na moto lokola Newel K. Whitney, oyo atongaki bomoi ya kofuluka mpo na libota na ye kuna. Nini ozwi na kati ya Malongi mpe Mayokani 117:1–11 oyo ekokaki kosunga bango basala libonza oyo? Lolenge nini milongo oyo ebongolaka emoneli na yo na oyo ezali mpenza motuya?

Libonza oyo basengaki na Oliver Granger ezalaki ya kokesena: Nkolo ayebisaki ye atikala na Kirtland mpe abongisa makambo ya misolo ya Eklezia. Ezalaki mokumba ya makasi, mpe atako alobelaki Eklezia na boyengebene, na nsuka azwaki mosolo mingi te. Kanisa lolenge nini maloba ya Nkolo na kati ya milongo 12–15 esengeli kosalema na makambo Nkolo asengaki yo.

Tala lisusu Matai 6:25–33; Boyd K. Packer, “The Least of These,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2004, 86–88; “Far West and Adam-ondi-Ahman,” Revelations in Context, 239–40.

Elilingi
Etuka ya Adam-ondi-Ahman na Daviess, Missouri

Newel K. Whitney atindamaki kokende na Adam-ondi-Ahman, oyo elili etiami awa.

Malongi mpe Mayokani 119–20

Na nzela ya kofutaka moko na zomi, nazali kosalisa mpo na kotonga mpe “kosantisa mabele ya Siona.”

Malakisi na kati ya mikapo 119 mpe 120 ezali komonana lolenge moko na nzela mosala ya Nkolo epesameli misolo na eleko na biso. Lelo, Basantu bapesaka “moko na zomi ya litomba na bango [sikawa esosolami lokola lifuti] na mobu” (Malongi mpe Mayokani 119:4), mpe misolo oyo ebatelami na lisanga oyo ezali ya Bokambi ya Yambo, Lisanga likoki ya Bazomi na Babale mpe Bopisikopo Mokambi. Manyola mituna oyo elandi ntango ozali koyekola biteni oyo:

  • Lolenge nini kobatelaka mobeko ya moko na zomi “esantisaka mabele ya Siona”? Lolenge nini mobeko oyo ekosunga yo osala esika wapi ofandi ezala “mabele ya Siona mpo na yo”? (Malongi mpe Mayokani 119:6).

  • Nini ezali motuya epai na yo mpo na oyo etali liloba “na mongongo na ngai moko epai na bango” na kati ya Malongi mpe Mayokani 120?

Tala lisusu Malaki 3:8–12; David A. Bednar, “Maninisa ya Lola,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2013, 17–20; “Moko na zomi ya Bato na Ngai,” Revelations in Context, 250–55.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 115:4–6.Yango ekoki kosunga libota na yo etanga milongo oyo na ntango bozali kotala bobimi ya moyi? Ekoki kozala malamu kosolola oyo elimboli “kotelama mpe kongenga” (molongo 5). To bokoki lisusu kosolola nini ezali lokola koluka ekimelo na ntango ya mipepe makasi. Lolenge nini boyebi wana ekoki kozala lokola kozwa “ekimelo” na kati ya Eklezia? (molongo 6). Bokoki nsima kosolola na ntina ya ndenge libota na yo ekoki kosunga basusu basepela na ekimelo oyo Eklezia epesaka.

Malongi mpe Mayokani 117:1–11.Libota na yo ekoki kokokanisa “litanga” na eloko moko ya “bozito” mingi (molongo 8), lokola molangi ya mayi. Yango ekoki kokamba na lisolo etali makambo ya motuya moke na bomoi na biso oyo ekoki kopekisa biso tozwa bofuluki ya mapamboli ya Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 119.Bokoki koyemba loyembo lokola “I Want to Give the Lord My Tenth” (Chants pour Enfants, 150). Nini loyembo mpe mokapo 119 eteyi na ntina ya mpo na nini tofutaka moko na zomi? Bilenge bana bakoki lisusu kozwa litomba uta na liteya ya ntina: okoki kopesa bango biloko ya mike mike, kosunga bango kotanga mituya to kokalikile moko na zomi, mpe koyebisa bango mpo na nini bofutaka moko na zomi. (Tala lisusu Bosolo na Bondimi, 180–82.)

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo kati ya Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “I Want to Give the Lord My Tenth,” Chants pour Enfants, 150.

Kobongisa Mateya na Biso

Lendisa bomikoki. “Ntango [bato ya libota] bazali na mituna, ntango mosusu ezali malamu koleka kotangisa bango lolenge nini kozwa biyano to bolamuki na bango moko, na esika ya koyanola mituna mbala moko” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 28).

Elilingi
Kosalela moko na zomi

Kopesaka eteni moko kati na zomi na biso epai ya Nkolo lokola moko na zomi esungaka makasi mosala na Ye ya lobiko.

Bimisa na lokasa