Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya zomi 18–24. Malongi mpe Mayokani 121–123: “O Nzambe, Ozali Wapi?”


“Sanza ya zomi 18–24. Malongi mpe Mayokani 121–123: ‘O Nzambe, Ozali Wapi?’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya zomi 18–24. Malongi mpe Mayokani 121–123,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Boloko ya Liberty

Boloko ya Liberty na Eleko ya Milona, na Al Rounds

Sanza ya zomi 18–24.

Malongi mpe Mayokani 121–123

“O Nzambe, Ozali Wapi?”

Boyebi na yo ya koyekola makomi ekozala motuya soki ntina na yo ezali ya kosakola bosolo. Banda na losambo, yokela Molimo, mpe koma makanisi na yo.

Koma Makanisi na Yo

Ndelo ya nsuka ya etuka ya boloko na Liberty, Missouri, eyebanaki lokola ndako eindo. Bifelo ezalaki minene, mabanga ya nse ezalaki malili mpe mbindo, bilei—oyo ezalaki wana—ezalaki ya kopola, mpe pole bobele mwa moke oyo wana ezalaki kowuta na maninisa ya mike mike, ya mabende mibale oyo ezalaki pene ya palafo. Ndako eindo oyo ezali esika oyo Joseph Smith mpe ndambo ya bandeko na ye ya mibali balekisaki ntango ya bokangemi na bango—basanza minei ya malili ya mabanga na eleko ya mpio makasi ya 1838–39—kozelaka bosambisi mpo na ntina ya likambo bafundaki bango ya koteka mbula-matari ya Missouri. Na ntango wana, Joseph azalaki kozwa mbala na mbala bansango na ntina ya monyokoli ya Basantu. Kimia mpe elikya ya Far West ewumelaki bobele mwa basanza moke, mpe sikawa Basantu bazangaki bisika ya kofanda lisusu, bakendaki na mabele makawuka mpo na koluka lisusu esika ya kotonga—mbala oyo Profeta na bango na boloko.

Kokamwa te Joseph Smith abelelaki, “O Nzambe, ozali wapi?” Biyano azwaki, “boyebi uta na lola” oyo eyaki “kokota” na kati ya boloko wana ya bolozi, emonisaki ete atako yango ekoki komonana bongo te, Nzambe azali mosika ata moke te. Nguya moko te ekoki “kopekisa lola,” Profeta ayokaki. “Nzambe akozala elongo na [Basantu na Ye ya sembo] libela na libela.” (Malongi mpe Mayokani 121:1, 33; 122:9.)

Tala Basantu, 1:323–96; “Within the Walls of Liberty Jail,” Revelations in Context, 256–63.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 121:1–10, 23–33122

Mpasi to mitungisi ekoki “kozala mpo na [ya ngai]bolamu.”

Ntango biso to bato oyo tolingaka bazwami kati na mpasi, ezali likambo ya kokamwa te tomituna soki Nzambe ayebi biso. Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 121:1–6, kanisa na ntina ya bantango oyo ozalaki na mituna to mayoki lolenge moko na miye ya Joseph Smith. Ozwi nini na eyano ya Nkolo oyo ekoki kosunga yo ntango ozali na mituna to mayoki oyo? Ndakisa, na milongo 7–10, 26–33, tala mapamboli Alaki na baoyo “bayikaka mpiko malamu na [mpasi].” Ntango ozali kotanga mokapo 122, kanisa lolenge nini Nkolo alingaka yo ozwa mpasi to mitungisi na yo.

Tala lisusu Henry B. Eyring, “Where Is the Pavilion?” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2012, 72–75.

Malongi mpe Mayokani 121:34–46

Tokoki kokota na “banguya ya lola.”

Na oyo emonisamaki lokola esika wapi azangaki nguya nyonso na boloko ya Liberty, Joseph azwaki emoniseli na ntina ya nguya—nguya ya politiki to ya mampinga oyo eyangelaki likolo ya Basantu te kasi “banguya ya lola.” Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 121:34–46, oyekoli nini na ntina ya nguya ya Nzambe? Lolenge nini yango ezali ya kokesena na nguya ya mokili? Ndakisa, tala maloba Nkolo asaleli na milongo 41–43 mpo na kolimbola “nguya to bokasi ya kotinda basusu.” Yango eteyi nini na ntina ya lolenge Nzambe abatelaka “nguya to bokasi” na Ye? Mbala mosusu milongo oyo ekoki kofula yo omanyola bomoi na yo mpe oyo okoki kosala mpo na kozala na bokasi ya kotinda basusu kosala bolamu na mikangano na yo na basusu.

Malongi mpe Mayokani 122

Yesu Klisto akitaki na nse ya biloko nyonso.

Joseph Smith akangamaki na boloko na nko basanza minei na ntango baninga mpe libota na ye bakimaki bandako na bango. Mosala mpo na moye amipesaki bomoi na ye mobimba ezalaki kokende kobeba. Oyekoli nini na ntina ya Yesu Klisto uta maloba na Ye epai ya Joseph kati ya mokapo 122? Oyekoli nini na ntina ya Joseph? Oyekoli nini na ntina na yo moko?

Tala lisusu Alma 7:11–13; 36:3; Malongi mpe Mayokani 88:6.

Elilingi
Yesu na mabele na Getesemane

Bolingi na Ngai Te, Kasi ya Yo, na Walter Rane.

Malongi mpe Mayokani 123

“Tosala na esengo makambo nyonso oyo ezali na nguya na biso.”

Na Sanza ya misato 1839, emonisami lokola ete mingi oyo Basantu bakokaki kosala na bokasi na bango ezalaki te mpo na kobongola ezalela na bango ya mpasi. Kasi na kati ya mikanda na ye oyo akomaki uta na Boloko ya Liberty, Joseph alobelaki bango oyo bakokaki kosala: “[basangisa] makambo nyonso oyo boyebi” mpe “batelema ngwi, na elikya monene, mpo na kotala Lobiko ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 123:1, 17). Ntango obanzi lokuta mpe “mayele mabe ya bato” na mokili ya lelo, kanisa na ntina ya makambo nini “ezali na nse ya nguya na [yo]” mpo na kosala (milongo 12, 17). Mpo na nini ezali motuya ya kosala makambo oyo na “esengo”? (molongo 17). Nani oyo oyebi “atiami mosika ya bosolo” (molongo 12), mpe lolenge nini okoki kosunga moto oyo azwa yango?

Mingi ya masolo oyo Joseph asengaki na kati ya mokanda oyo epesamaki na leta mpe ebimisamaki lokola eteni 11-ya biteni na bazulunale ya Nauvoo, Times and Seasons (tala “A History, of the Persecution, of the Church of Jesus Christ, of Latter Day Saints in Missouri, December 1839–October 1840,” [josephsmithpapers.org]).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 121:1–10.Ndako “eindo” na Boloko ya Liberty ezalaki bobele metele 14 na 14.5 (metele 4.2 na 4.4 na monene). Lolenge nini okoki kosunga libota na yo ekanisa oyo ekokaki kozala nkaka na esika ya bonene wana mpo na basanza minei? Okoki kozwa molai ya lisolo oyo na ntina mpasi ya boloko ya Liberty na kati ya “Mokapo 46: Joseph Smith kati ya Boloko ya Liberty” (Masolo ya Malongi mpe Mayokani, 172–74). Okoki lisusu kotanga “Voices of the Restoration: Liberty Jail” na nsuka ya nsango oyo to kotala video kolakisaka ntango ya Joseph Smith na Boloko ya Liberty na video Joseph Smith: Profeta ya Bozongisi (ChurchofJesusChrist.org, ebandi na 43:00). Lolenge nini nsango oyo epesi ndakisa toyokaka na ntina ya mabongi kati ya Malongi mpe Mayokani 121:1–10?

Malongi mpe Mayokani 121:34–36, 41–45.Ntango mosusu nsango ekoki kosunga libota na yo esosola “banguya ya lola.” Ndakisa, okoki kokokanisa nguya ya Nzambe na nguya ya lotiliki; nini ekoki kopekisa eloko ya lotiliki ezwa lotiliki te? Ndakisa oyo, elongo na milongo 34–36, 41–45, eteyi biso nini na ntina ya lolenge tokoki komatisa nguya na biso ya molimo? Ntango mosusu bandeko ya libota bakoki kokabola masolo uta na bomoi ya Mobikisi oyo etalisi bizalela oyo.

Malongi mpe Mayokani 122:7–9.Ntango mosusu bato ya libota bakoki kosepela kosala bilembo mike mike oyo etalisi maloba uta na milongo oyo efuli bango. Bilembo oyo ekoki kotalisama na libota na yo. Mpo na nini ezali ntina koyeba ete “Mwana mobali ya Moto akitaki na nse” ya biloko nyonso?

Malongi mpe Mayokani 123:12.Lolenge nini tokoki kosunga bato “bayeba … esika ya kozwa” bosolo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Where Can I Turn for Peace?Nzembo, no. 129.

Elilingi
elembo ya mingongo ya bozongisi

Mingongo ya Bozongisi

Boloko ya Liberty

Ntango akangamaki na boloko ya Liberty, Missouri, Joseph Smith azwaki mikanda kolobelaka ye na ntina ya mpasi ya liwa ya Basantu ba Mikolo ya Nsuka oyo babenganaki na mboka na motindo ya guvenele. Mokanda ya mpasi ewutaki epai ya mwasi na ye Emma. Maloba na Ye, mpe mikanda ya Joseph na eyano, elobeli nyonso mibale mpasi mpe bondimi na bango na ntango ya mpasi oyo na kati ya lisolo ya Eklezia.

Mokanda ewuti na Emma Smith epai ya Joseph Smith, Sanza ya misato 7, 1839

“Mobali na Ngai wa Bolingo

“Kozwaka libaku malamu ya kokomela yo na nzela ya moninga, nameki kokoma, kasi nakomeka te kokoma nyonso nazali koyoka elongo, mpo na lolenge oyo ozali, bifelo, bandelo, mpe mabende, botioli ya ebale, bangomba oyo etelemi, bibale kotiolaka mpe bazamba oyo ekaboli biso, bosembo ya mabe oyo etie yo na boloko mpe ebombi yo kuna, mpe makambo mosusu, natie mayoki na ngai mosika koleka bolimboli nyonso.

“Yango ezalaki te mpo na boyebi ya bozangi elindo, mpe ngolu mpenza ya bonzambe, nayebi mpenza ete nazali na makoki te ya koyika mpiko na mpasi oyo nalekeli … ; kasi nazali na bomoi mpe nazali na bolingi ya konyokwama lisusu koleka soki yango ezali bolingi ya Lola ete nanyokwama mpo na yo.

“Tozali banso malamu sikawa, longola se Fredrick oyo azali penza maladi.

Alexander Moke oyo azali na maboko na ngai sikawa azali moko ya baninga malamu naino omona na bomoi na yo te. Azali mpenza makasi ete na lisungi ya kiti akoki kokima nzinganzinga ya kisuku mobimba. …

“Moto moko te bobele Nzambe nde ayebi makanisi na ngai mpe mayoki ya motema na ngai ntango natikaki ndako mpe libota na biso, kutu biloko nyonso oyo tozalaki na yango longola se bana na biso ya mike, mpe tokendaki mobembo na Mboka ya Missouri, kotikaka yo moko na boloko oyo. Kasi kozongisa makanisi na mikolo mileki ezali mingi koleka oyo lolenge ya moto akoki kondima yango. …

“… Natie elikya ete ezali na mikolo malamu koleka naino mpo na kozongela biso. … [Ngai] nazali ntango nyonso ya yo ya bolingo.

“Emma Smith”1

Mokanda uta na Joseph Smith epai ya Emma Smith, Sanza ya minei 4, 1839

“Molingami—mpe Mwasi—wa Bolingo.

“Mokolo ya minei na butu nafandaki na nse bobele kaka lokola moyi ezali kokita, ntango tozalaki kotala na madusu ya mabende ya boloko oyo, mpo na kokomela yo, mpo okoka koyeba lolenge nazali. Ezali nakanisi sikawa penepene basanza mitano mpe mikolo motoba2 uta nazali na nse ya bobangisi ya babateli butu mpe moyi, mpe na kati ya bifelo, mabende mpe bikuke ya mabende, molili, boloko ya bosoto. Na likama oyo eyebani bobele na Nzambe nakomeli yo mokanda oyo. Bosepeli ya makanisi na nse ya mabaku oyo etuki ekomelo, to lolemu, to Banjelu, mpo na kotalisa, to langi, na moto oyo naino akutana na makambu oyo tokutani na yango. … Toyekami na maboko ya Yehova, mpe moto mosusu te, mpo na bokangoli na biso, mpe soki asali yango te, ekosalema te, okoki kondimisama, mpo yango ezali na mposa makasi ya makila na biso kati ya likambo oyo; te mpo topesami etumbu na likambo songolo. … Molingami na ngai wa Bolingo Emma nakanisaka yo mpe bana mbala na mbala. … Nalingi komona bana Frederick moke, Joseph, Julia, Alexander, Joana, mpe major mokolo [mbwa ya libota]. … Nakoki kotambola uta awa kino esika bozali makolo ngulu, moto polele, mpe ndambo motakala, mpo na komona bino mpe kokanisa ete ezali esengo monene, mpe kokanisa yango te lokola mosala ya mpasi. … Namemi likolo na ngai mpasi nyonso, lokola ezali kosala baoyo bazali elongo na ngai; moko te kati na biso atengami naino. Nalingi yo otika te [ya biso bana] babosana ngai. Yebisa bango ete Tata alingaka bango na bolingo ebonga nie, mpe azali kosala nyonso mpo ete atika batomboki ete aya epai na bango. … Yebisa bango ete Tata alobi basengeli kozala bana malamu, mpe basengeli kokanisa mama na bango. …

“Wa yo,

“Joseph Smith Jr.”3

Matangi

  1. Mokanda kouta na Emma Smith, 7 Sanza ya misato 1839,” Letterbook 2, 37, josephsmithpapers.org; spelling, punctuation, and grammar modernized.

  2. Joseph mpe baninga na ye bakangamaki na Sanza ya zomi 31, 1838, mpe batikalaki na bokangemi moi mpe butu. Nsima ya bosambisi ya yambo na Richmond, Missouri, bamemamaki na Boloko ya Liberty na Sanza ya zomi na mibale 1.

  3. Mokanda epai ya Emma Smith, 4 Sanza ya minei 1839,” 1–3, josephsmithpapers.org; spelling, punctuation, and grammar modernized.

Elilingi
Joseph Smith na Boloko ya Liberty

Ntango Joseph Smith anyokwamaki na Boloko ya Liberty, Nkolo alendisaki ye mpe amonisaki ye bosolo minene.

Bimisa na lokasa