Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Libwa 13–19. Malongi mpe Mayokani 102–105: “Nsima ya Mitungisi Mingi … Lipamboli Likoya”


Sanza ya Libwa 13–19. Malongi mpe Mayokani 102-105: “Nsima ya Mitungisi Mingi … Lipamboli Likoya,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

Sanza ya Libwa 13–19. Malongi mpe Mayokani 102:-105,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Bato na bawago tomakalo

C. C. A. Christensen (1831–1912), Zion’s Camp, c. 1878, tempera on muslin, 78 × 114 inches. Brigham Young University Museum of Art, likabo ya bankokololo ya C. C. A. Christensen, 1970

Sanza ya Libwa 13–19.

Malongi mpe Mayokani 102–105

“Nsima ya Mitungisi Mingi … Lipamboli Likoya”

Mabongi kani uta na Malongi mpe Mayokani 102–5 ezali na ntina mpo na yo? Kanisa kokoma makanisi mpe mayoki na yo na ntina ya mabongi oyo.

Koma Makanisi na Yo

Basantu na Kirtland bayokaki nkele ya koyoka ete bandeko na bango ya mibali mpe ya basi na Jackson County na Missouri, babenganaki bango na bandako na bango. Esengelaki kolendisa, na ntango wana, ntango Nkolo asakolaki ete “libiki ya Siona” elingaki “koya na nguya” (Malongi mpe Mayokani 102–15). Na elaka wana na mitema, koleka bato 200, na penepene na basi mpe basi 25, bamikomisaki na oyo babengaki Nganda ya Yisalaele, oyo nsima eyebanaki lokola Nganda ya Siona. Etinda na bango ezalaki ya kotambola ti na Missouri mpe kosikola Siona.

Na bandimi ya nganda wana, kosikola Siona elingaki koloba kozongisa Basantu na mabele na bango. Kasi kaka liboso ete bato ya nganda bakoma na Jackson County, Nkolo alobaki na Joseph Smith akanga mpe apanza Nganda ya Siona. Boko bandimi ya nganda babulunganaki mpe bayokaki nkele na malakisi oyo ya sika, mpo na bango, elingaki koloba ete limpinga ekweyaki mpe bilaka ya Nkolo bikokisamaki te. Nzokande, Basusu bamonaki yango lolenge mosusu. Ntango Basantu oyo bapanzanaki mosika bazongaki mokolo moko te na Jackson County, likambo wana ememaki ndelo moko ya “lisikoli” na Siona mpe “eyaki na nguya.” Bandimi ya sembo ya Nganda ya Siona, mingi na baoyo nsima bakomaki bakambi ya Eklezia, batatolaki ete likambo wana ekomisaki bondimi na bango na nguya ya Nzambe mozindo, na libiangi ya bonzambe ya Joseph Smith, mpe na Siona—kaka Siona ya mboka te kasi Siona ya bato ya Nzambe. Na esika ya kotia ntembe na motuya ya lotomo oyo emonanaki lokola ya elonga te, bayekolaki ete lotomo ya solo ezali kolanda Mobikisi, ata ntango tozali kososola nyonso te. Oyo ezali lolenge Siona, na nsuka, ekosikolama.

Tala Les Saints, 1:194–206; “The Acceptable Offering of Zion’s Camp,” Revelations in Context, 213–18.

Elilingi
Ebale ya moke

Nganda ya Siona etikalaki na libongo ya Ebale ye Little Fishing, oyo foto etiami awa.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye Moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 102:12–23

Ntina ya malakisi na milongo oyo ezali nini ?

Eteni 102 ezali na nsango ya likita na Kirtland na Ohio, wapi lisanga linene ya yambo ebongisamaki. Milongo 12–23 elimboli nzela masanga manene elandaka ntango basalaka masanga ya kopesa etumbu mpo na baye babukaki mibeko ya makasi.

Mokambi M. Russell Ballard ateyaki, “bandimi ntango mosusu batunaka ntina nini masanga ya etumbu esalemaka na kati ya Eklezia. Ntina ezali misato: mpo na kobikisa molimo ya mobuki mibeko, mpo na kobatela moto asali mabe te, mpe mpo na kobatela bopeto, bosembo, mpe nkombo malamu ya Eklezia” (“A Chance to Start Over: Church Disciplinary Councils and the Restoration of Blessings,” Ensign, Sanza ya nsambo 1990, 15).

Tala lisusu Masolo ya Nsngo malamu, “Church Disciplinary Councils,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 103`:1–12; 105:1–19

Siona ekoki kotongama kaka na mabongi ya bosembo.

Ntina nini Basantu babungisaki mabele na bango ya elaka na Missouri? Mpe ntina nini Nkolo apesaki nzela te na Nganda ya Siona kozongisa bango na mabele na bango? Na ntembe te misala ya nkanda ya batomboki ya Missouri esalaki eloko, mpe mokonzi ya Missouri alakaki lisungi mpo na Basantu kasi apesaki yango mokolo moko te. Kasi Nkolo alobaki ete “soki ezalaki mpo na bobuki mibeko ya bato na ngai te,” Siona “ekokaki kosikolama” (Malongi mpe Mayokani 105:2). Ntango otangi Malongi mpe Mayokani 103:1–12, 36; 105:1–19, okoki komona mwa makambo oyo epekisaki botongi ya Siona na Missouri mpe makambo masusu oyo ekokaki kosunga. Nini oyekoli oyo ekoki kosunga yo otonga Siona na motema mpe ndako na yo?

Malongi mpe Mayokani 103:12–13; 105:1–6, 13–19

Mapamboli eyaka nsima ya mitungisi mpe mimekano ya bondimi.

Na banzela mingi, kosala elongo na Nganda ya Siona ezalaki momekano ya bondimi. Mobembo ezalaki molai, molunge ezalaki makasi, mpe bilei mpe mai ezalaki ntango mosusu moke mpenza. Mpe nsima na oyo nionso bandimaki, Basantu bakokaki naino te kozonga na mabele na bango. Kanisa boniboni mabongi to mateya na Malongi mpe Mayokani 103:12–13 mpe 105:1–6, 13–19 ekokaki kosunga bandimi ya Nganda ya Siona oyo bazalaki komituna soki mobeko ya kobongisa ewutaka ya solo na Nzambe na esika ya yambo. Lolenge nini mabongi oyo ekoki kosunga yo na mimekano ya bondimi na yo moko?

Okoki lisusu kotanga makambo ya bandimi ya Nganda ya Siona na “Voices of the Restoration” na nsuka ya moango oyo. Nini esimbi yo mpo na oyo etali ezalela na bango? Nini okoki koyekola uta na ndakisa na bango?

Tala lisusu David A. Bednar, “Na Ngambo ya Nkolo: Mateya uta na Nganda ya Siona,” Ensign, Sanza ya sambo 2017, 26–35.

Malongi mpe Mayokani 104:11–18, 76–83

Nazali “mosaIi likolo ya mapamboli ya mabele.”

Likolo ya mimekano na Missouri, na 1834 Eklezia ekutanaki na kpokoso ya mosolo, lokola baniongo ya minene mpe kobimisa mbongo mingi . Na eteni 104 Nkolo apesi toli na makambo ya mosolo ya Eklezia. Boniboni okoki kosalela mabongi na milongo 11–18 mpe 78–83 na mikano na yo moko ya mosolo?

Mpo na koyekola na ntina ya moko ya banzela Nkolo alengelaki mpo na Eklezia ekangolama na bowumbu ya baniongo, tala “Treasure in Heaven: The John Tanner Story” (video, ChurchofJesusChrist.org).

Mpo na koyekola mingi etali “nzela ya ye moko” Nkolo (molongo 16) mpo na kopesa na Basantu na Ye, okoki koyekola nsango ya Mokambi Dieter F. Uchtdorf “Providing in the Lord’s Way” (Ensign to Liahona, Nov. 2011, 53–56).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 103:12, 36; 105:9–13.Esila bato kosenga libota na yo (to moko ya bankoko na yo) basala likambo moko oyo esalema te lolenge ozelaki? Nini okoki koyekola uta na biyano ya bandimi ya Nganda ya Siona ntango mobembo na bango esalemaki te lokola bango bazelaki? (tala“Voices of the Restoration” na nsuka ya moango oyo).

Malongi mpe Mayokani 104:13–18.Nini Nkolo apesi biso? Nini Ye azali kozela biso tosala na biloko oyo?

Malongi mpe Mayokani 104:23–46.Libota na yo ekoki koluka milongo oyo mpo na komona lolenge nini mbala mingi Nkolo alakaka “koyikisa mapamboli” (molongo 23) mpo na baoyo bazali na bosembo. Ntango mosusu oyo ekoki kozala ntango malamu mpo na “kotanga mapamboli” (“Count Your Blessings,” Hymns, no. 241) mpe kosolola boniboni kosala bongo ekoki kosalisa biso na bantango ya mpasi. Bana mike bakoki kosepela na koyema foto ya mapamboli oyo bazali mingi mingi na botondi mpo na yango.

Malongi mpe Mayokani 105:38–41.Boniboni tokoki kopesa “makanisi mpo na kimia” (molongo 40) ntango basusu bazali kosalela biso mabe to na nko? Nini tokoki kosala mpo na kozala “bendele ya kimia” (molongo 39) na ndako na biso?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Compte les bienfaits,” Cantiques, no. 156.

Elilingi
elembo ya mingongo ya bozongisi

Mingongo ya Bozongisi

Nganda ya Siona

Mpo Nganda ya Siona ezongisamaki mokolo moko te na mabele ya Jackson County, bato mingi bayokaki ete bokasi na bango ezali likweyi. Nzokande, bato mingi oyo bazalaki kosala elongo ya Nganda ya Siona batalaki nsima na mayele na bango mpe bamonaki lolenge Nkolo akokisaki ntina nminene na bomoi na bango mpe na bokonzi na Ye. Oyo ezali mwa matatoli.

Joseph Smith

Elilingi
Joseph Smith

Mibu 40 nsima ya Nganda ya Siona, Joseph Young, oyo azalaka moko na nganda, alobaki ete Joseph Smith alobaki boye;

“Bandeko, basusu ati na bino basilikeli ngai, mpamba te bobundaki te na Missouri; kasi tika nalobela bino, Nzambe alingaki te bobunda. Akokaki kobongisa bokonzi na ye elongo na bato zomi na mibale mpo na kofungola ekuke ya nsango malamu mpo na bikolo ya mabele, mpe na bato ntuku nsambo na nse na bango mpo na kolanda bitambe na bango, longola se soki azwaki bango uta na liboke ya bato oyo babonzaki bomoi na bango, mpe oyo basalaki libonza moko monene lokola esalaki Abalayama.

“Sikawa, Nkolo azwi Bazomi na Mibale na ye mpe Bantuku Nsambo na ye, mpe ekozala na masanga makoki masusu ya Bantuku Nsambo oyo bakobiangama, oyo bakosala libonza, mpe baye basali te mabonza mpe makambo na bango sikawa, bakosala yango na nsima.”1

Brigham Young

Elilingi
Brigham Young

“Ntango tokomaki na Missouri Nkolo alobelaki mosali na ye Joseph mpe alobaki, ‘Nandimi likabo na bino,’ mpe tozali na litomba ya kozonga lisusu. Na kozonga na ngai baninga mingi batunaki ngai litomba nini ezalaki na kobengaka bato mosika na mosala na bango mpo na kokende ti na Missouri mpe nsima kozonga, na kozangaa kokokisa eloko moko. ‘Na nani yango ezali litomba?’ etunaki bango. ‘Soki Nkolo atindaki yango esalema, ntina nini ezalaki na makanisi na ye na kosalaka bongo?’ … Nalobelaki bandeko wana ete nafutamaki malamu—nafutamaki na litomba monene—iyo ete emekeli na ngai etondisamaki nde kotonda na boyebi oyo nazwaki na kosalaka mobembo elongo na Profeta.”2

Wilford Woodruff

Elilingi
Wilford Woodruff

“Nazalaki na Nganda ya Siona elongo na Profeta ya Nzambe. Namonaki misala na Nzambe elongo na ye. Namonaki nguya ya Nzambe elongo na Ye. Namonaki ete azalaki Profeta. Oyo emonisamaki na ye na nguya ya Nzambe likolo ya etinda wana ezalaki na motuya monene mpo na ngai mpe mpo na banso oyo bayambaki malakisi na ye.”3

“Ntango bandimi ya Nganda ya Siona babiangamaki mingi na biso tomonanaka mokolo moko te bilongi; tozalaki bapaya biso na biso mpe mingi bamonaki mokolo moko te profeta. Topanzanaki mosika, lokola nkona efulami na etando, na kati ya ekolo. Tozalaki bilenge mibali, mpe tobiangamaki na mikolo wana ya ebandeli mpo na kokende kuna mpe kosikola Siona, mpe oyo tosengelaki kosala tosengelaki kosala na bondimi. Tosanganaki elongo uta Bikolo kilikili na Kirtland mpe tokendeki kuna mpo na kosikola Siona, na kokokisaka motindo ya Nkolo epai na biso. Nzambe andimaki misala na biso lokola Asalaki mpo na misala ya Abalayama. Tosalaki boyokani monene, atako bapengwi mpe bazangi bondimi mbala mingi batunaki motuna ‘nini basalaki?’ Tozwaki mayele oyo tokoki mokolo moko te kozwa [na] nzela mosusu. Tozalaki na litomba ya komona elongi ya profeta, mpe tozalaki na litomba ya kosala mobembo moko ya bakilometele nkoto na ndambo elongo na ye, mpe komona misala ya molimo ya Nzambe elongo na ye, mpe bimoniseli ya Yesu Klisto epai na ye mpe bokokisi ya bimoniseli wana. Mpe asangisaki mwa bampaka nkama mibale uta na ekolo mobimba na mokolo wana ya ebandeli mpe atindaki biso kopanzana na mokili mpo na koteya nsango malamu ya Yesu Klisto. Soki nakendeki te kuna na Nganda ya Siona nakokaki te kozala awa lelo na Salt Lake City kosalaka na Lisanga Likoki ya Zomi na Mibale. … Na kokendaka kuna tondimamaki na elanga ya vinyo mpo na koteya nsango malamu, mpe Nkolo andimaki mosala na biso. Mpe na misala mpe minyokoli na biso nyonso, na bomoi na biso mbala mingi na likama, tosengelaka kosala mpe kozala na bondimi.”

“Mayele oyo [biso] tozwaki na kosalaka mobembo na Nganda ya Siona ezalaki mingi koleka wolo.”

Matangi

  1. Na Joseph Young Sr., History of the Organization of the Seventies (1878), 14.

  2. “Discourse,” Deseret News, Sanza ya zomi na mibale 3, 1862, 177.

  3. Na Conference Report, Sanza ya minei 1898, 29–30; tala lisusu Teachings of Presidents of the Church: Wilford Woodruff (2004), 135.

Elilingi
Nganda ya Siona penepene ya ebel

Nganda ya Siona (Nganda ya Siona na Ebale ya Fishing) na Judith A. Mehr

Bimisa na lokasa