Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Motoba 14–20. Malongi mpe Mayokani 64–66: “Nkolo Asengi Motema mpe Molimo ya Bolingi”


“Sanza ya Motoba 14–20. Malongi mpe Mayokani 64–66: ‘Nkolo Asengi Motema mpe Molimo ya Bolingi,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya Motoba 14–20. Malongi mpe Mayokani 64–66,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
elanga na botani ya ntongo

Etuka ya Daviess, Missouri

Sanza ya Motoba 14–20

Malongi mpe Mayokani 64–66

“Nkolo Asengi Motema mpe Molimo ya Bolingi”

Mokambi Henry B. Eyring alobaki: “Nakendeka mbala mingi kotanga makomi na mituna ‘Nkolo alingi ngai nasala nini?’ to ‘Nini Ye alingi ngai nayoka ?’ Ntango nyonso nazwaki makanisi mpe mayele oyo naino nazwa te liboso” (“Lolenge nini Nzambe Alobelaka Ngai na nzela ya Makomi,” Sanza ya mibale 6, 2019, blog.ChurchofJesusChrist.org).

Koma Makanisi na Yo

Na eleko ya molunge makasi ya Sanza ya moambe 1831, bampaka nzike bakendaki mobembo kozonga na Kirtland nsima ya koyekola mabele ya Siona na Missouri lokola batindamaki na Nkolo. Ezalaki mobembo ya esengo te. Bato na mobembo—Joseph Smith, Oliver Cowdery, Sidney Rigdon, Ezra Booth, mpe basusu—batokaki mpe balembaki, mpe kala mingi te bobendani ebalukaki na boswani. Ekokaki komonana lokola ete kotonga Siona, engumba ya bolingo, ya bomoko, mpe ya kimia, elingaki kowumela ntango mingi.

Libaku malamu, botongi ya Siona—na Missouri na 1831 to na mitema na biso mpe bapalwasi lelo—esengi biso te tozala bato oyo babonga nie. Na esika ya oyo, “na bino esengeli kolimbisa,” Nkolo alobaki (Malongi mpe Mayokani 64:10). Asengi “motema mpe molimo ya bolingi” (molongo 34). Mpe Asengi bompikiliki mpe molende, mpo Siona etongami likolo ya moboko ya “biloko ya mike-mike,” biye bikokisami na baoyo “bakolembaka te mpo na kosala malamu” (molongo 33).

Tala lisusu Basantu, 1:133–34, 136–37.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 64:1–11

Nasengeli kolimbisa moto nyonso.

Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 64:1–11, kanisa na ntina ya ntango Nkolo alimbisaki yo. Okoki lisusu kokanisa na ntina ya moto moko oyo osengeli kolimbisa. Lolenge nini mawa ya Mobikisi esimbaka mayoki na yo na ntina na yo moko mpe na ntina ya basusu? Mpo na nini okanisi Nkolo atindi biso “kolimbisa bato banso”? (molongo 10). Soki ozali kobunda mpo na kolimbisa, kanisa oyo mikanda elandi eteyi na ntina ya lolenge Mobikisi akoki kosunga: Jeffrey R. Holland, “Mosala ya Boyokani,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 77–79; Mokambi na Makomi, “Bolimbisi,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 64:31–34

Nzambe asengi ngai motema mpe molimo ya bolingi.

Osila koyoka “bolembu” na “bolamu” nyonso oyo ozali komeka kosala? Luka maloba ya Nzambe epai na yo na Malongi mpe Mayokani 64:31–34. Elingi koloba nini kopesa ya yo “motema mpe molimo ya bolingi” epai ya Nzambe? (molongo 34).

Malongi mpe Mayokani 64:41–43

Siona ekozala “bendele epai ya bato.”

Bendele ezali “dalapo to elembo nzinganzinga na oyo wapi bato basangani na bomoko ya ntina to bokitoli” (Mokambi na Makomi, “Ensign,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Lolenge nini Siona ezali—to Eklezia ya Nkolo—ezalaka lokola bendele epai na yo? Tala bandakisa mosusu oyo ya biloko oyo etombolami, lokola bendele, mpo na kopambola bato: Mituya 21:6–9; Matai 5:14–16; Alma 46:11–20. Milongo oyo eteyi yo nini na ntina ya lolenge okoki kosunga Eklezia ezala bendele esika wapi ofandi? Luka ndenge mosusu oyo Nkolo alimboli Siona kati na Malongi mpe Mayokani 64:41–43.

Elilingi
Kapitene Moroni

Kapiteni Moroni Komemaka Dalapo ya Bonsomi, na Gary E. Smith

Malongi mpe Mayokani 65

“Bolengela Nzela ya Nkolo.”

Matai alimbolaki Yoane Mobatisi lokola moko oyo abelelaki, “Bolengela nzela ya Nkolo” (Matai 3:3; tala lisusu Yisaya 40:3). Na Malongi mpe Mayokani 65, Nkolo asaleli lokota moko oyo mpo na kolimbola mosala na Ye ya mikolo ya nsuka. Bokokani nini omoni na kati ya oyo Yoane Mobatisi asalaki (tala Matai 3:1–12) mpe oyo Nkolo alingi biso tosala lelo? Omoni nini kati na emoniseli oyo ekoki kofula yo mpo na kosunga kokokisa masakoli oyo ezali na kati? Manyola banzela oyo okoki “kosala ete misala kitoko ya [Nzambe] miyebana na kati ya bato” (molongo 4).

Malongi mpe Mayokani 66

Nkolo ayebi makanisi ya motema na ngai.

Mwa ntango moke nsima ya kokota na Eklezia, William E. McLellin asengaki Joseph Smith abimisa bolingi ya Nzambe mpo na ye. Joseph ayebaki yango te, kasi William azalaki na mituna mitano miye azalaki kolikya ete Nkolo asengelaki koyanola na nzela ya Profeta na Ye. Toyebi te nini ezalaki mituna ya William, kasi toyebi ete emoniseli oyo ebimaki mpo na ye, sikawa Malongi mpe Mayokani 66, eyanolaki motuna moko moko na bosepeli mobimba “ya William” (“William McLellin’s Five Questions,” Revelations in Context, 138).

Ntango ozali kotanga eteni 66, kanisa na ntina ya maye Nkolo ayebaki na ntina ya William McLellin mpe bamposa mpe makanisi ya motema na ye. Lolenge nini Nkolo amonisaki ete Ayebi yo? Soki ozali na lipamboli ya bonkoko, kanisa koyekola yango. Ntango ozali kosala yango, Molimo Mosantu asungi yo na nini mpo ososola ntina ya bolingi ya Nzambe mpo na yo?

Tala lisusu Basantu, 1:138–40; Makomi ya Nsango malamu, “Mapamboli ya Botata,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 64:8–10.Mokangano ya libota epesaka mabaku mingi mpo na koyekola kolimbisa. Ntango mosusu bato ya libota bakoki kosolola na ntina ya lolenge nini kolimbisa bamoko mpe basusu epamboli libota na bino. Lolenge nini Mobikisi asungaki biso tolimbisana? Lolenge nini “tozwami na mawa to mpasi” (molongo 8) ntango tolimbisaka basusu te?

Malongi mpe Mayokani 64:33.Tata na Lola alingaka libota na yo esala nini mpo na kokokisa ya Ye “mosala monene”? Ntango mosusu ezali kokende na tempelo, kokabola nsango malamu elongo na moto ya penepene moko, to kolonga boswani. Mbele moto moko ya libota akoki kosangisa biloko ya mike mike, lokola mabanga to babuto to biteni ya maloma, mpe kosalela yango mpo na kotalisa “biloko ya mike mike” tokoki kosala mikolo nyonso mpo na “[kotia] moboko” ya mosala monene ya Nzambe. Lokola libota, bozwa moko ya biloko ya mike mike oyo mpo na kosala na poso oyo.

Malongi mpe Mayokani 66:3.Lolenge nini okoteya ntina monene ya boyamboli? Okoki kokabola mwa bilei likolo ya sani oyo ndambu ezali peto mpe kotanga maloba ya Nkolo epai ya William McLellin: “Ozali peto, kasi na mobimba te.” Nsima okoki kosukola sani mpe kokabola bilei ntango bozali kosolola na lolenge nini Yesu Klisto asali yango ekoka kosalama mpo ete biso tozala peto na molimo.

Malongi mpe Mayokani 66:10.Lolenge nini libota na yo ekoki kolanda toli ya Nkolo ya “koluka te kozala na mikumba,” to kotondisama na makambo mingi ya kosala? Bokoki kosolola na ntina ya lisolo ya Maliya mpe Malata (tala Luka 10:38–42), mpe bosolola lolenge nini libota na bino ekoki kobatelama uta na kozalaka na mikumba ya makambo oyo ezali ya motuya ya seko te.

Mpo na kozwa makanisi mosusu mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo kati ya Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Help Me, Dear Father,” Chants pour Enfants, 99.

Kobongisa Mateya na Biso

Zala moto oyo bakoki komonana mpe kosolola na ye na pete. Bangonga mosusu ya malamu koleka mpo na koteya ebandaka lokola mituna to mitungisi kati na mitema ya bato ya libota. Tika ete bato ya libota bayeba na nzela ya maloba mpe misala na yo ete ozali na mposa ya koyoka bango. (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 16.)

Elilingi
Mwasi kofukamaka pembeni ya Yesu

Alimbisami, na Greg K. Olsen. Esalelami na ndingisa ya. www.GregOlsen.com

Bimisa na lokasa