Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya motoba 7–13. Malongi mpe Mayokani 63: “Oyo Ewuti na Likolo Ezali Bule”


“Sanza ya motoba 7–13. Malongi mpe Mayokani 10–11: ‘Oyo Ewutina Likolo Ezali Bule,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya motoba 7–13. Malongi mpe Mayokani 63,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Elanga ya Missouri

Spring Hill, Etuka ya Daviess, Missouri, na Garth Robinson Oborn

Sanza ya motoba 7–13

Malongi mpe Mayokani 63

“Oyo Ewuti na Likolo Ezali Bule”

Nkolo alobaki, “Bozwaka Molimo na nzela ya losambo” (Malongi mpe Mayokani 63:64). Kanisa kosambela mpo ete Molimo akamba boyekoli na yo.

Koma Makanisi na Yo

Esika mpo na kotonga engumba ya Siona eponamaki. Bakambi ya Eklezia bakendaki kotala esika yango mpe babulisaki yango lokola esika ya bosangani mpo na Basantu. Engebene na mambi ya kala ya Joseph Smith, “mabele ya Siona ezalaki sikawa eloko ya ntango ya motuya koleka nyonso na makanisi” (Malongi mpe Mayokani 63, moto ya eteni). Kasi makanisi na ntina ya Siona makesenaki. Basantu mingi bazalaki na mposa ya kobanda kosangana na Missouri. Na ngambo mosusu, bato lokola Ezra Booth bayokisamaki mawa na mabele ya Siona mpe basalaki ete makanisi na bango eyebana. Solo, ntango Joseph azongaki na Kirtland uta na Missouri, amonaki ete bokabwani mpe bopengwi ebandaki koyingela na Eklezia ntango azalaki te. Ezalaki na esika oyo nde emoniseli oyo ezali na Malongi mpe Mayokani 63 ezwamaki. Awa Nkolo alobelaki likambo ya kosomba mabele mpe ya kokende ya Basantu na Missouri. Kasi kati na makambo ya momesano ya boye ezalaki na bonsenga ya kotalela ntango: “Ngai, Nkolo, nabimisi mongongo na ngai, mpe ekotosama” (molongo 5). Mongongo na Ye, bolingi na Ye, motindo na Ye—nyonso oyo “[koyaka] uta na likolo”—ekosalema na bonyama to na mbalakaka te. Yango “ezali bule, mpe esengeli kolobama malamu mpenza” (molongo 64).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 63:1–6, 32–37

Nkanda ya Nkolo ezali kopela na bato ya mabe mpe batomboki.

Ntango emoniseli oyo ezwamaki, Joseph Smith azalaki kokutana na matongi makasi ya bandimi mingi ya Eklezia oyo babalukelaki ye (tala “Ezra Booth and Isaac Morley,” Revelations in Context, 130–36). Makebisi nini Nkolo apesaki kati na Malongi mpe Mayokani 63:1–6, 32–37 oyo etali “bato ya mabe mpe batomboki”? Lolenge nini makebisi ya boye ezali bilembo ya komonana na miso ya bolingo ya Nzambe?

Malongi mpe Mayokani 63:7–12

Bilembo eyaka na bondimi mpe na bolingi ya Nzambe.

Bilembo to makamwisi yango moko ebimisaka te bondimi oyo ewumelaka. Na ebandeli na 1831 Ezra Booth, moteyi moko ya eyamba ya Methodiste na Kirtland, azwaki mokano ya kobatisama nsima ya komona Joseph Smith kobikisa na bikamwa loboko ya moninga ya Booth Elsa Johnson.

Mpe nsima, na mwa basanza moke, Booth abungisaki kondima na ye mpe akomaki kotonga Profeta. Yango ekoki kosalema lolenge nini, na kotalaka likamwisi oyo amonaki na miso? Manyola likambo oyo ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 63:7–12. Okoki lisusu kotala mpo na nini bato mosusu bazwaka bilembo “mpo na bolamu ya bato na nkembo ya [Nzambe]” (molongo 12) mpe basusu bazwaka yango “lokola … etumbu” (molongo 11). Na kotalaka maye otangi, lolenge nini okanisi ete Nkolo alingi yo okanisa mpe oyoka na ntina ya bilembo?

Tala lisusu Matai 16:1–4; Yoane 12:37; Mormon 9:10–21; Etele 12:12, 18.

Malongi mpe Mayokani 63:13–23

Bopeto elakisi kobatela makanisi mpe misala na ngai peto.

Bato mingi bandimaka ete ekobo ezali mabe. Kasi na Malongi mpe Mayokani 63:13–19, Mobikisi alakisaki yango polele ete makanisi ya bilulalula mpe ezali na makama manene mpo na molimo. “Mpo na nini kolula ezali bongo lisumu oyo ebomaka?” Mpaka Jeffrey R. Holland atunaki. “Malamu, mpo na bobakisi na nguya monene mpenza ya kobebisa Molimo oyo ezali na yango likolo ya milimo na biso, nakanisi ezali lisumu mpo ete ebebisaka mokangano na biso ya likolo mpe esantu mpenza oyo Nzambe apesaka biso na bomoi ya kufa—bolingo oyo mobali mpe mwasi bazali na yango mpo na moko mpe mosusu mpe mposa oyo balongani bazalaka na yango ya kobota bana na libota ekanama mpo na kozala seko” (“Place No More for the Enemy of My Soul,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2010, 44).

Makambo ya mabe nini ekolanda oyo Nkolo atangi kati na Malongi mpe Mayokani 63:13–19 oyo ekoyela baoyo bakoyambola te na makanisi mpe misala ezangi bopeto? Koma mapamboli Mobikisi alaki kati na milongo 20 mpe 23 na baoyo bazali sembo. Mapamboli nini esili koya na bomoi na yo uta na kotosaka mobeko ya bopeto? Lolenge nini Mobikisi asungaka yo otikala to okoma peto?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 121:45; Linda S. Reeves, “Bolongobani ya Mapamboli Malakelama Na Biso,” Ensign to Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2015, 9–11.

Elilingi
mobali mpe mwasi na tempelo

Topambolami ntango tobateli makanisi mpe misala na biso peto.

Malongi mpe Mayokani 63:24–46

Nkolo akambaka makambo ya nzoto mpe ya molimo ya Basantu na Ye.

Nsima ya Nkolo kokitola esika Siona esengelaki kotongama, Basantu na Ohio bazalaki kaka na bosenga ya kozwa bokambi na ntina ya ntango nini bakobanda kokende mpe esika wapi bakozwa mosolo mpo na kosomba mabele. Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 63:24–46, luka bokambi ya molimo mpe ya nzoto oyo Nkolo apesaki mpo na oyo etali Siona. Bokambi nini ya molimo mpe ya nzoto Nkolo azali kopesa yo?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 63:7–12.Lisolo ya Ezra Booth ya kolongwa na Eklezia atako amonaki libiki ya Elsa Johnson (tala makambo na mokuse kati na “Makanisi mpo na Boyekoli Makomi yo Moko” mpe bilili oyo ezali elongo na moango oyo) ekoki kobota masolo na ntina ya makamwisi. Ntango mosusu bato ya libota na yo bakoki kosolola na ntina ya makamwisi oyo elendisaki bondimi na yo, kobakisaka mayele ya kosala uta na libota na yo to mambi ya kala ya libota na yo. Lolenge nini basalelaki bondimi esengeli mpo na kozwa makamwisi oyo? Nini Malongi mpe Mayokani 63:7–12 eteyi na ntina ya mokangano kati na bondimi mpe makamwisi?

Malongi mpe Mayokani 63:13–19.Lolenge nini tokoki komibatela uta na banguya ya mabe, mpe lisusuuta na bilili ya bosoto? (Okoki kozwa biloko ya kosunga mateya mingi mpo na mabota na AddressingPornography.ChurchofJesusChrist.org.) Mapamboli ya kosalela mobeko ya bopeto ezali nini?

Malongi mpe Mayokani 63:23.Lolenge nini okoki kosunga libota na yo esosola lolenge nini “mabombami ya bokonzi [yango],” to makambo ya solo ya nsango malamu, ezali lokola “liziba ya mai na bomoi”? Ndakisa, bokoki kokende pembeni ya nkelo to ebale (to kolakisa video to elili ya moko). Lolenge nini makambo ya solo ya nsango malamu ezali lokola mayi?

Malongi mpe Mayokani 63:58.Makebisi nini tozwi na kati ya eteni 63? Makebisi nini mosusu tozali koyoka uta na bakambi ya Eklezia lelo?

Malongi mpe Mayokani 63:58–64.Lakisa libota na yo eloko moko ya motuya ya libota. Lolenge nini tosalelaka eloko oyo na bokeseni koleka biloko mosusu oyo ezali motuya te? Nini Malongi mpe Mayokani 63:58–64 eteyi biso na ntina ya oyo tokoki kosala mpo na komemia biloko ya bule?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Reverence Is Love,” Chants pour Enfants, 31.

Kobongisa Boyekoli Makomi mpo na Yo Moko

Salela oyo ozali koyekola. “Ntango oyoki esengo oyo uta na bososoli ya nsango malamu, okolinga kosalela oyo oyekoli. Sala makasi mpo na kotambwisa bomoi na lolenge ete eyokana na bososoli na yo. Kosalaka bongo ekolendisa bondimi , boyebi, mpe litatoli na yo” (Sakola Nsango malamu na Ngai, 19).

Elilingi
Joseph Smith kosimbaka loboko ya mwasi

Kobikisaka Lipeka ya Elsa Johnson, na Sam Lawlor

Bimisa na lokasa