Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya minei 12–18. Malongi mpe Mayokani 37–40: “Soki Bozali Moko Te Bozali Ya Ngai Te”


“Sanza ya minei 12–18. Malongi mpe Mayokani 37–40: ‘Soki Bozali Moko Te Bozali Ya Ngai Te,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya minei 12–18. Malongi mpe Mayokani 37–40,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Basantu bamilengeli mpo na kolongwa

Basantu Bakeyi na Kirtland, na Sam Lawlor

Sanza ya minei 12–18.

Malongi mpe Mayokani 107:68

“Soki Bozali Moko Te Bozali Ya Ngai Te”

Komaka makanisi ntango ozali koyekola lolenge moko okoki kotosa toli ya Nzambe “batelaka bwanya” (Malongi mpe Mayokani 38:30).

Koma Makanisi na Yo

Na Basantu ya ebandeli, Eklezia ezalaki mingi koleka esika ya koyoka mateya na mokolo ya Eyenga. Na nzela ya bimoniseli na Ye epai ya Joseph Smith, Nkolo alimbolaki Eklezia na maloba lokola ntina, bokonzi, Siona, mpe, mbala mingi mpenza, mosala. Wana ekokaki kozala ndambu ya oyo ebendaki bandimi mingi ya ebandeli na Eklezia. Mingi lokola bazalaki kolinga malongi ezongisama ya Eklezia, mingi mpe lisusu balingaki eloko wapi bakokai komipesa mpo na bomoi na bango. Atako bongo, motindo ya Nkolo na 1830 epai ya Basantu ete basangana na Ohio ezalaki likambo ya pete te mpo na basusu kolanda. Mpo na moto lokola Phebe Carter, elakisi kotika bandako ya malonga mpo na kokende na ndelo ya mboka oyo eyebani te (tala “Mingongo ya Bozongisi” na nsuka ya boyekoli oyo). Lelo tokoki komona polele nini Basantu oyo bakokaki komona bobele na liso ya bondimi: Nkolo azalaki na mapamboli minene oyo ezalaki kozela bango na Ohio.

Mposa ya kosangana na Ohio esilaki banda kala, kasi Basantu lelo batikali na bomoko mpo na ntina moko, mosala moko: ya “kobimisa Siona” (Malongi mpe Mayokani 39:13). Lokola Basantu oyo ya ebandeli, tosundolaka “makambo ya mokili” (Malongi mpe Mayokani 40:2) mpo ete totieli elaka ya Nkolo motema: “Bokozwa … lipamboli moko monene oyo naino boyeba te” (Malongi mpe Mayokani 39:10).

Tala lisusu Basantu, 1:109–11.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 37:1

Nini Joseph Smith azalaki kobongola na 1830?

Na molongo oyo, Nkolo azalaki kolobela mosala ya Joseph Smith na kotalela lisusu makomi na lolenge efulama ya Biblia, oyo emonisamaki lokola “bobongoli.” Ntango Joseph azwaki emoniseli oyo ekomami na eteni 37, asilisaki mwa mikapo ya buku ya Genese mpe ayekolaki na ntina ya Enoch mpe engumba na ye ya Siona (tala Genese 5:18–24; Moses 7). Mabongi masusu Nkolo ateyaki Enoch ezali lolenge moko na oyo Ye amonisaki na eteni 38.

Tala lisusu Masolo ya Mambi ma Kala ya Eklezia, “Bobongoli ya Biblia ya Joseph Smith,” ChurchofJesusChrist.org/study/topics.

Elilingi
Joseph Smith mpe Sidney Rigdon

Joseph Smith azali kosala elongo na Sidney Rigdon na kotalela bobongoli efulama ya Biblia. Elili na Annie Henrie Nader

Malongi mpe Mayokani 38

Nzambe asangisi biso mpo na kopambola biso.

Nkolo asukisaki motindo na Ye ya bosangani na Ohio na kolobaka, “Tala, bwanya ezali awa” (Malongi mpe Mayokani 37:4). Kasi moto nyonso te amonaki bwanya na yango sikasika wana. Na kati ya eteni 38, Nkolo amonisaki bwanya na Ye na ndenge ya molai koleka. Oyekoli nini uta na milongo 11–33 na ntina ya mapamboli ya bosangani? Bandimi ya Eklezia batindami lisusu kosangana te mpo na kokende esika songolo; na ndenge nini tosanganaka lelo? Lolenge nini mapamboli oyo mataleli biso? (tala Russell M. Nelson, “Bosangani ya Yisalaele Epalangana,” Ensign to Liahona, Sansa ya zomi na moko. 2006, 79–81).

Ntango ozali kotanga ndambo etikali ya eteni oyo, luka milongo oyo ekokaki kosunga Basantu lisusu bazwa bondimi oyo basengelaki mpo na kotosa motindo ya Nzambe ya kosangana na Ohio. Kanisa lisusu na ntina ya mitindo oyo Ye apesaki yo mpe bondimi osengeli mpo na kotosa yango. Mituna oyo elandi ekoki kosunga boyekoli na yo:

  • Ozwi nini na milongo 1–4 oyo epesi yo elikya na Nkolo mpe mitindo na Ye?

  • Lolenge nini molongo 39 ekoki kosunga yo otosa mitindo ya Nzambe ata na ntango ezali kosenga omibonzela?

Ozwi lisusu nini?

Malongi mpe Mayokani 38:11–13, 22–32, 41–42

Soki namilengeli, nakobanga te.

Basantu bakutanaki na botelemeli mingi, mpe Nkolo ayebaki ete mingi koleka ezalaki koya nsima (tala Malongi mpe Mayokani 38:11–13, 28–29). Mpo na kosunga bango babanga te, Amonisaki libongi ya ntina koleka: “Soki omilengeli okobanga te” (Malongi mpe Mayokani 38:30). Zwa miniti mpo na komanyola mikakatano oyo ozali kokutana na yango. Nsima lokola ozali koyekola mokapo 38, yokela bitinda uta na Molimo na ntina ya ndenge okoki komilengela mpo na mikakatano oyo osengeli kobanga te.

Tala lisusu Ronald A. Rasband, “Bozala na Bobangi te,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 18–21.

Malongi mpe Mayokani 39:11

Mitungisi ya mokili esengeli te kobungisa ngai makanisi uta na kotosa liloba ya Nzambe.

Tanga biteni 3940, lisusu nini ezali na ebandeli ya mambi ya kala na mito ya mikapo, mpe kanisa ndenge nini maye James Covel amonaki ekoki koteya yo. Ndakisa, kanisa bantango oyo “motema na yo … ezalaki sembo liboso ya [Nzambe]” (Malongi mpe Mayokani 40:1). Lolenge nini opambolamaki mpo na bosembo na yo? Kanisa lisusu na ntina ya nini “mitungisi ya mokili” oyo ozali kokutana na yango (Malongi mpe Mayokani 39:9; 40:2). Omoni nini na mikapo miye oyo efuli yo mpo na kozala ntango nyonso na botosi mingi koleka?

Tala lisusu Matai 13:3–23.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 4:3Mpo na kosunga libota na yo esosola komibonzela Basantu basalaki mpo na kosangana na Ohio, okoki kotala kalati oyo ezali elongo na boyekoli oyo.

Malongi mpe Mayokani 38:22Lolenge nini tokoki kokomisa Yesu Klisto “mopesi mobeko” na biso? Lolenge nini kolanda mibeko na Ye ekomisaka biso “bato ya nsomi”?

Malongi mpe Mayokani 38:24–27.Mpo na koteya bana nini yango elakisi “kozala moko,” okoki kosunga bango batanga bato ya libota na yo mpe koloba mpo na nini moto moko moko azali na ntina kati na libota na yo. Beta nsete ete elongo bozali libota moko. Okoki kosunga bana na yo bayema 1 na etando moko ya monene mpe bapakola yango langi na bankombo mpe bilili to bafoto ya moto ya libota moko moko. Okoki lisusu kokoma likolo ya etando makambo oyo okosala mpo na kozala moko lokola libota. Okoki lisusu kotala video “Love in Our Hearts” (ChurchofJesusChrist.org) to tanga Moses 7:18.

Malongi mpe Mayokani 38:29–30.Bokoki kobeta lisolo ya maye libota to yo moko bokutanaki na yango oyo esengaki bomilengeli. Lolenge nini bomilengeli na yo epesi yo mayele? Na nini Nkolo alingi biso tomilengela? Lolenge nini kozala ya komilengela esungaka biso tobanga te? Nini tokoki kosala mpo na komilengela?

Malongi mpe Mayokani 40.Nini liloba “mitungisi ya mokili” (molongo 2) elingi koloba mpo na biso? Ezali na mitungisi ya mokili oyo ezali kopekisa biso tozwa liloba ya Nzambe “na esengo”? Lolenge nini tokolonga [mitungisi] yango?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Yesu Alobaki Tolingana Biso na Biso,” Chants pour Enfants, 61.

Elilingi
elembo ya mingongo ya bozongisi

Mingongo ya Bozongisi

Bosangani na Ohio

Elilingi
Bandako ya Kirtland

Mboka ya Kirtland, na Al Rounds

Elilingi
Phebe Carter Woodruff

Na kati ya Basantu mingi oyo basanganaki na Ohio na 1830 ezalaki na Phebe Carter. Akotaki na Eklezia na ngambo ya nordi-esti ya Etazini na katikati ya mibu bantuku mibale, atako baboti na ye basalaki yango te. Nsima akomaki na ntina ya mokano na ye ya kolongwa na Ohio mpo na kosangana na Basantu:

“Baninga na ngai basepelaki na mobembo na ngai,ngai mpe lokola, kasi eloko moko kati na ngai etindaki ngai nakoba. Mawa mama na ngai ayokaki ntango nalongwaki na ndako ezalaki pene mingi koleka oyo nakokaki koyoka; mpe soki ezalaki molimo yango kati na ngai te nalingaki kolemba na nsuka. Mama na ngai alobaki na ngai ete akosepela komona ngai nakundami na esika natika ndako nakende ngai moko na mokili ezanga motema.

“‘[Phebe],’ elobaki ye, na motema moko, ‘okozongela ngai soki omoni mabe ya kozala Mormon?’

“Nayanolaki, ‘iyo, mama; nakozonga.’ … Eyano na ngai ebondisaki kobanga na ye; kasi epesaki biso mawa mingi mpo na kokabwana. Ntango ngonga ekomaki mpo na kokende na ngai namekaki te komindimela ngai moko mpo na kolaka; boye nakomaki maloba na ngai ya bokabwani namoto moko moko, mpe nsima ya kotika yango na mesa na ngai, nakimaki mbangu kokita na nse mpe namibwakaki na engunduka. Boye natikaki ndako na ngai ya bolingo ya bomwana na ngai mpo na kokangisa bomoi na ngai na basantu ya Nzambe.”1

Na moko ya mikanda oyo ya bokabwani, Phebe akomaki:

“Balingami Baboti—nazali sikawa pene ya kotika ndako ya baboti na ngai mpo na ntango moke … nayebi te soki mpo na ntango boni—kasi te na kozanga mayoki ya botondi mpo na boboto oyo nazwaki uta bomwana na ngai kino sikawa—kasi Bolamu ya Nzambe emonisami kotinda yango lolenge mosusu sikawa koleka lolenge ezalaki. Tika topesa makambo nyonso oyo kati ya maboko ya Bolamu ya Nzambe mpe kozongisa botondi ete topesami nzela ya kobika banso elongo ntango molai na nse ya mabaku lokola tozali na yango, kondimelaka ete makambo nyonso ekosalema mpo na bolamu na biso soki tolingi Nzambe na likolo ya nyonso. Tika tososola ete tokoki kosambela Nzambe moko oyo akoyoka nsambo ya solo ya bikelamu na ye mpe kopesa biso oyo ya malamu koleka nyonso esengeli mpo na biso. …

“Mama, nandimi ezali bolingi ya Nzambe mpo na ngai kokende na westi mpe nandimi ete ekozala mpo na ntango molai. Sikawa nzela efungwami … ; nandimi ete ezali molimo ya Nkolo nde esalaki yango oyo ekoki mpo na makambo nyonso. O komitungisa mpo na mwana na yo te; Nkolo akolendisa ngai. Nandimi ete Nkolo akobatela ngai mpe akopesa ngai oyo ezali ya malamu koleka nyonso. … Nakei mpo ete Molakisi na Ngai abiangi—asali mokumba na ngai etonda.”2

Matangi

  1. Na Edward W. Tullidge, The Women of Mormondom (1877), 412.

  2. Mokanda ya Phebe Carter epai ya baboti na ye, ezanga mokolo, Ebombelo mikanda ya Mambi ya kala ya Eklezia, Salt Lake City; maloba ebongisamaki. Phebe akotaki Eklezia na 1834, akendaki na Ohio pene ya 1835, mpe abalaki Wilford Woodruff na 1837.

Bimisa na lokasa