Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya minei 5–Sanza ya minei 11. Malongi mpe Mayokani 30–36: “Bobiangemi Mpo na Koteya Nsango malamu na Ngai”


“Sanza ya minei 5–Sanza ya minei 11. Malongi mpe Mayokani 30–36: ‘Bobiangemi Mpo na Koteya Nsango malamu na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya minei 5–Sanza ya minei 11. Malongi mpe Mayokani 30–36,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
bamisionele ya Eklezia na ebandeli

Sanza ya minei 5–Sanza ya minei 11.

Malongi mpe Mayokani 30–36

“Bobiangemi Mpo na Koteya Nsango malamu na Ngai”

Na kati ya makomi, tokoki kozwa boyebi mpo na makambo matali bobele biso moko. Senga Nkolo asalisa yo kozwa nsango epesameli yo na Malongi mpe Mayokani 30–36.

Koma Makanisi na Yo

Parley P. Pratt azalaki mondimi ya Eklezia mpo na pene sanza moko ntango abiangemaki “na esobe” mpo na koteya nsango malamu (Malongi mpe Mayokani 32:2). Thomas B. Marsh azalaki mondimi kutu ya ntango moke koleka ntango bayebisaki ye, “Ntango ya misio na yo ekomi” (Malongi mpe Mayokani 31:3). Orson Pratt, Edward Partridge, mpe ebele ya basusu bawutaki kobatisama ntango mabiangi ya misio na bango eyaki. Ntango mosusu manaka ya ntangooyo ezalaki na ntina—na eleko ya elangaya 1830, moto moko te atikala kozala mondimi ya Eklezia koleka basanza motoba. Kasi ezali na liteya mosusu na emekoleli oyo mpo na biso lelo: soki oyebi mingi ya kokoka mpo na kondima nsango malamu ezongisama na libatisi, oyebi mingi ekoki mpo na kokabola yango na basusu. Ya solo tolukaka ntango nyonso kobakisa boyebi na biso ya nsango malamu, kasi Nzambe atatabanaka te kobianga baoyo “batanga mingi te” mpo na koteya nsango malamu na Ye (Malongi mpe Mayokani 35:13). Solo, abengisi biso banso, “Fungola monoko na yo mpo na kosakola nsango malamu na ngai” (Malongi mpe Mayokani 30:5). Mpe tosalaka yango ya malamu koleka na nzela ya bwanya mpe mayele na biso moko te kasi “na nguya [ya] Molimo” (Malongi mpe Mayokani 35:13).

Tala lisusu “Bondimi mpe Bokwei ya Thomas Marsh,” “Ezra Thayer: From Skeptic to Believer,” “Orson Pratt’s Call to Serve,” Revelations in Context, 54–69.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 30–36

Nabiangemi mpo na koteya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Ozala to ozala te na libiangi eyebana lokola misionele, Nkolo alingi yo okabola nsango malamu na Ye, mpe mingi ya maloba na Ye epai ya bamisionele ya sika ya eleko oyo bazali mpo na yo mpe. Ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 30–36, koma oyo oyekoli na ntina libiangi ya kosakola nsango malamu. Okoki kokoma makambo oyo Nkolo asengaka bamisionele na Ye (ndakisa, tala Malongi mpe Mayokani 30:8) mpe koma mosusu ya makambo Nkolo alaki bango (ndakisa, tala Malongi mpe Mayokani 30:11).

Lolenge nini milongo oyo ekoki kolendisa moto oyo oyebi oyo azali kosalela to komilengela mpo na koteya ekuke na ekuke to kosala misio ya Eklezia? Ozwi nini oyo efuli yo mpo na kokabola nsango malamu?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 35:13–15; Russell M. Nelson mpe Wendy W. Nelson, “Elikia ya Yisalaele” (worldwide devotional for youth, Sanza ya motoba 3, 2018), HopeofIsrael.ChurchofJesusChrist.org; Silvia H. Allred, “Go Ye Therefore,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 10–12.

Elilingi
bamisionele koteyaka

Tozali banso bamisionele mpo na Eklezia ya Yesu Klisto.

Malongi mpe Mayokani 31:1–2, 5–6, 9, 13

Nkolo akoki kosunga ngai na mokangano ya libota na ngai.

Mabota na mibu 1830 bamitungisaki na makambo mingi ya lolenge oyo mabota ezali kokutana na yango lelo. Bokambi mpe bilaka nini Nkolo apesaki Thomas B. Marsh na ntina ya libota na ye? Lolenge nini maloba na Ye ekoki kosalisa yo na mokangano ya libota na yo?

Mpo na kozwa nsango mingi oleka na ntina ya Thomas B. Marsh, tala Les Saints, 1:79–80, 119–20.

Malongi mpe Mayokani 3235

Misio epai ya Balamani esimbaki te?

Ntango Oliver Cowdery, Peter Whitmer mwana, Parley P. Pratt, mpe Ziba Peterson bakendaki mpo na koteya Baindia ya Amerika na westi ya Missouri, bakanisaki ete babandaki kokokisa masakoli ya Buku ya Mormon na ntina ya Balamani kozwaka nsango malamu na mikolo ya nsuka (tala, ndakisa, 1 Nefi 13:34–41; Enos 1:11–18). Mpe na nsuka ya misio na bango, atako bakutanaka malamu na mwa masanga ya bato, babatisaki ata MoIndia ya Amerika moko te. Kasi babatisaki bato motango koleka mokama pene ya Kirtland, Ohio, esika wapi batelemaki na nzela ya kokende Missouri. Na kati ya babongwani wana ezalaki na bakambi ya nguya ya Eklezia mpo na mikolo ya nsima , kotangaka Sidney Rigdon, mpe nsima Kirtland ekomaki esika moko ya bosangani mpo na Eklezia. Boyebi oyo eteyi yo nini na ntina ya lolenge Nkolo akokisaka mosala na Ye?

Tala lisusu “A Mission to the Lamanites,” Revelations in Context, 45–49.

Malongi mpe Mayokani 72:3–4

Soki natongi bomoi na ngai likolo ya nsango malamu ya Mobikisi, nakokweya te.

Malongi mpe Mayokani 33 etindamaki na Northrop Sweet mpe Ezra Thayer, babongwani ya sika mibale. Northrop atikaki Eklezia moke nsima ete emoniseli oyo epesama. Ezra asalelaki na bondimi mpo na mwa ntango, kasi ye lisusu asukaki na kokweya. Oyo ekokaki kozala libaku malamu ya kotala lolenge nini otongami makasi “likolo [ya] libanga monene” (molongo 13) ya nsango malamu. Makambo ya solo nini na kati ya milongo oyo ekoki kosunga yo otikala na sembo na Mobikisi?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 2:2Lolenge nini tozali kosala lokola libota na kofandisaka makanisi na makambo ya Nzambe na esia ya “makambo ya mokili”?

Malongi mpe Mayokani 31.Ntango bozalaki kotanga bilaka ya Nkolo epai ya Thomas B. Marsh na ntina ya libota na ye, bokoki kosolola na ntina ya mapamboli oyo masila koyela bino na libota mpo na mosala ya misio. Bokoki lisusu koyemba loyembo oyo, lokola “Nakokende Epai Nyonso Oyo Olingi Nakende” (Cantique, no. 270). Lolenge nini libota na yo epambolamaki na kokabolaka nsango malamu na basusu?

Malongi mpe Mayokani 33:7–10.Elili nini Nkolo asaleli na milongo oyo mpo na kolimbola kokabola nsango malamu? Bilili to masese nini mosusu libota na yo ekoki kokanisa? Ntango mosusu bilili oyo ekoki kosunga libota na yo ekanisa kosala ndenge ya kokabola nsango malamu. Lisolo oyo ekoki bongo kokamba na moango ya kokabola nsango malamu. Banza kosala lisano ya kokabela mikumba oyo bokoki kosala.

Malongi mpe Mayokani 34:10.Zwa liloba uta na molongo 10, mpe bengisa moto moko ya libota koloba yango na mongongo ya nse. Bato basusu ya libota bakoki koluka soki liloba yango elobi nini. Nsima senga moto moko ya libota koloba liloba yango na mongongo makasi. Lolenge nini lisano oyo esungi biso kososola mpo na nini Nkolo atindi biso “kotombola mongongo na bino”?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Nalikii Babengi Ngai na Misio,” Chants pour Enfants, 169.

Elilingi
elembo ya mingongo ya bozongisi

Mingongo ya Bozongisi

Babongwani ya Ebandeli

Ata libosoete babongisa Eklezia, Nkolo asakolaki, “Mbuma esili kotela na elanga mpe ezali pene mpo na kobuka” (Malongi mpe Mayokani 4:4). Liloba oyo epesaki bosolo na basanza oyo elandaki, lokola baluki mingi ya bosolo bakambamaki na Molimo ya Nzambe mpo na kozwa bozongisi ya Eklezia ya Yesu Klisto.

Mingi ya babongwani ya ebandeli oyo bazalaki bisalelo na botiaa moboko ya Bozongisi, mpe masolo na bango ya mbongwana ezali motuya mpo na biso lelo. Bondimi balakisaki ezali bondimi moko tosengeli mpo na kokoma babongwani na nsango malamu ya Yesu Klisto.

Abigail Calkins Leonard

Ntango Abigail Calkins Leonard azalaki na mibu na ye ya 36, ayokaki mposa ya kolimbisama na masumu na ye. Mbala moko moko azalaki kotanga Biblia, mpe bato uta biyamba ya Boklisto bakendeki kotala ye na ndako, kasi azalaki na mobulungano na ntina ya oyo ekesenisaki eklezia moko na mosusu. “Na ntongo moko,” elobaki ye, “Nazwaki Biblia na ngai mpe nakendaki na zamba, ntango nafukamaki.” Asambelaki makasi epai na Nkolo. “Sasepi limoni elekaki na miso na ngai,” elobaki ye, “mpe biyamba ya mike ya bokabwani bikeseni elekaki moko nsima ya mosusu na miso na ngai, mpe mongongo ebengaki ngai, elobaki: ‘Oyo bitongami mpo na kozwa litomba.’ Nsima, likolo, nakokaki komona pole monene, mpe mongongo uta na likolo ebengaki: ‘nakotombola bato, baoyo nakosepela bazala bato na ngai mpe nakopambola.’” Mwa ntango moke nsima, Abigail ayokaki na ntina ya Buku ya Mormon. Atako azalaki naino na buku moko te, alukaki “koyeba sikawa bosolo ya buku oyo, na likabo mpe nguya ya Molimo Mosantu,” mpe “ayokaki sasepi ete azali na yango.” Ntango na nsuka azalaki na makoki ya kotanga Buku ya Mormon, azalaki “pene ya koyamba yango.” Ye mpe mobali na ye, Lyman, babatisamaki na mobu 1831.1

Thomas B. Marsh

Ntango Thomas B. Marsh azalaki elenge mobali, ayekolaki Biblia mpe azalaki kosambela na eklezia moko ya Boklisto. Kasi azalaki kosepela te, na nsuka alongwaki na biklezia nyonso. “Nazalaki na emekoli ya molimo ya esakoli,” elobaki ye, “mpe alobelaki [mokambi ya eyamba moko] ete nazalaki kozela ete eklezia ya sika ekobima, oyo ekozala na bosolo na bopeto na yango.” Kala mingi te nsima na yango, Thomas ayokaki etinda ya molimo ya kolongwa na ndako na ye na Boston, Massachusetts, mpe akendaki mobembo na westi. Nsima ya kolekisa basanza misato na ngambo ya westi ya New York na bozangi kozwa oyo azalaki koluka, abandaki kozonga na ndako. Na nzela, mwasi moko atunaki Thomas soki ayokaki na ntina ya “Buku ya wolo oyo ezwamaki na elenge moko na nkombo ya Joseph Smith.” Likanisi oyo ekangaki ye, mbala moko Thomas akendaki mobembo na Palmyra mpe akutanaki na Martin Harris na bilo ya kobimisa buku, kaka ntango nkasa 16 ya yambo ya Buku ya Mormon ezalaki kobima na masini. Thomas apesamaki ndingisa ya kozwa nkasa wana 16, mpe amemaki yango na ndako epai ya mwasi na ye, Elizabeth. “Asepelaki malamu” na buku yango, emikundolaki ye, “kondimaka yango ete ezalaki liloba ya Nzambe.” Nsima Thomas mpe Elizabeth bakendaki na New York elongo na bana na bango mpe babatisamaki.2 (Mpo na kozwa nsango mingi na ntina ya Thomas B. Marsh, tala Malongi mpe Mayokani 31.)

Parley mpe Thankful Pratt

Lokola Thomas Marsh, Parley mpe Thankful Pratt bayanolaki na bitinda ya molimo kopusaka mitema na bango ya kolongwa elanga na bango ya kitoko na Ohio na likanisi ya kosakola nsango malamu ntango basosolaki yango uta na Biblia. Ntango Parley ayebisaki ndeko na ye, “Molimo ya makambo oyo etuti makanisi na ngai mpenza ete nakokaki kopema te.”3 Ntango bakomaki na ngambo ya esti ya New York, Parley atindikamaki na molimo mpo na kofanda na etuka yango. Thankful, bazwaki mokano, akokoba elongo na ye te. “Nazali na mosala ya kosala na engumba oyo ya mboka,” Parley ayebisaki ye, “mpe nini mosala yango ezali, ntango boni yango ekozwa mpo na kosala yango, nayebi te; kasi nakokende ntango ekosalema.”4 Ezalaki kuna nde Parley yambo ayokaki na ntina ya Buku ya Mormon. “Nayokaki litomba monene na kati ya buku yango,” elobaki ye.5 Asengaki buku moko mpe atangaki yango butu-butu. Na ntongo, ayebaki buku yango ezalaki solo, kopesaka yango motuya “mingi koleka bozwinyonso ya mokili.”6 Na mikolo moke Parley azwaki libatisi. Nsima azongaki epai ya Thankful, oyo abatisamaki mpe lisusu. (Mpo na kozwa nsango mingi koleka na ntina ya Parley P. Pratt, tala Malongi mpe Mayokani 32.)

Elilingi
Parley P. Pratt

Elilingi eyembami ya Parley P. Pratt na Jeffrey Hein

Sidney mpe Phebe Rigdon

Na nzela na ye uta na New York kino na misio na Missouri, Parley Pratt mpe baninga na ye basali bilanga batelemaki na Mentor, Ohio, na ndako ya Sidney mpe Phebe Rigdon—baninga ya kala oyo Parley ayebaki uta mikolo alekisaki na Ohio. Sidney azalaki mosali ya nzambe Moklisto, mpe Parley azalaki kala mondimi ya lingomba na ye mpe azwaki ye mosungi na ye ya molimo. Parley na motema moto moto ayebisaki baninga na ye na ntina ya Buku ya Mormon mpe Bozongisi ya nsango malamu ya Yesu klisto. Sidney ye moko azalaki koluka bozongisi ya Eklezia ya solo oyo amonaki elimbolami na Boyokani ya Sika, atako azalaki na ntembe ya Buku ya Mormon na ebandeli. “Kasi nakotanga buku na bino,” ayebisaki moninga na ye Parley, “mpe nakosala makasi ya koyeba solo, soki ezali emoniseli uta na Nzambe to te.”7 Nsima ya poso mibale ya botangi mpe losambo, bango mibale ye mpe Phebe bandimaki ete buku ezalaki solo. Kasi Sidney lisusu ayebaki ete kokota na Eklezia ekozala likambo monene ya komibonzela mpo na libota na ye. Akobungisa mosala na ye lokola mosali ya Nzambe, elongo na lokumu bato bapesaka ye na lingomba ya bato. Ntango ye mpe Phebe basololaki mpo na libaku oyo, Phebe alobaki, “natangi motuya tokofuta, mpe … ezali mposa na ngai ya kosala bolingi ya Nzambe, ata soki bomoi to liwa ekoya.”8

Elilingi
bato kotambolaka kati ya mvula ya mpembe

Kende na Esobe, na Robert T. Barrett

Bimisa na lokasa