Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mibale 6–12. Yoane 2–4: “Esengeli na Bino Kobotama Lisusu.”


Sanza ya mibale 6–12. Yoane 2–4: ‘Esengeli na Bino Kobotama Lisusu,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

Sanza ya mibale 6–12. Yoane 2–4,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu azali koloba na Nikodeme

Sanza ya mibale 6–12

Yoane 2–4

“Esengeli na Bino Kobotama Lisusu”

Ntango ozali kotanga Yoane 2–4, Molimo akoteya yo makambo matali mbongwana na yo. Koma maye osimbi uta na bitinda na Ye. Okoki kozwa bososoli mosusu ya molimo uta na makanisi ya boyekoli na mwango oyo.

Koma Makanisi na Yo

Na feti ya libala moko na Kana, Klisto abongolaki mai na vinyo—likambo moko oyo Yoane abengaki “ebandeli na makamwisi” (Yoane 2:11). Wana ezali solo na ndimbola mingi koleka moko. Atako oyo ezalaki likamwisi ya yambo Yesu asalaki na miso ya bato banso, ekoki lisusu kolakisa ebandeli ya makamwisi mosusu—nzela ya mbongwana ya mitema na biso ntango tozali kokoma mingi lokola Mobikisi na biso. Likamwisi oyo ya bomoi mobimba ebandaka na mokano ya kolanda Yesu Klisto, mpo na kobongwana mpe kozala na bomoi malamu koleka na nzela na Ye. Likamwisi oyo ekoki kozala oyo ebongolaka bomoi mpenza ete kozalaka “kobotama lisusu” ezali moko ya ndenge malamu koleka mpenza ya kolimbola yango (Yoane 3:7). Kasi mbotama ya sika ezali kaka ebandeli ya nzela ya kimoyekoli. Maloba ya Klisto epai ya mwasi ya Mosamalia na libulu ya mai ekundolisi biso ete soki tokobi na nzela oyo, nsuka nsuka nsango malamu ekokoma “liziba ya mai” kati na biso, “kosopanaka kino na bomoi ya seko” (Yoane 4:14).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Yoane 2:1–11

Makamwisi ya Yesu Klisto “emonisaki nkembo na ye.”

Ntango ozali kotanga oyo etali Mobikisi kobongolaka mai na vinyo kati na Yoane 2:1–11, okoki lisusu kozwa bososoli na kotalaka bimoneli ya bato bakeseni oyo bazalaki kuna, kobakisa Malia, bayekoli, mpe basusu. Soki omonaka makambo oyo malimbolami awa, makanisi nini olingaki kozala na yango na ntina ya Yesu? Likamwisi oyo eteyi yo nini mpo na oyo etali Ye?

Yoane 3:1–21

Nasengeli kobotama lisusu mpo na kokota kati ya bokonzi ya Nzambe.

Ntango Nikodeme ayaki epai ya Yesu na nkuku, azalaki motali moko ya kebakeba. Nzokande, nsima, abundelaki Yesu na polele (tala Yoane 7:45–52) mpe asanganaki na bandimi na bokundi ya Mobikisi (tala Yoane 19:38–40). Mateya nini ozwi na kati ya Yoane 3:1–21 oyo ekokaki kofula Nikodeme alanda Yesu mpe abotama lisusu?

Profeta Joseph Smith ateyaki, “Kobotama lisusu, eyaka na Molimo ya Nzambe na nzela ya makuli” (Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 95). Mosala nini libatisi mpe nkotisa na yo esalaki—ntango ozali “kobotama na mai mpe na Molimo” (Yoane 3:5)—esalaka na bobotami na yo lisusu? Ozali kosala nini mpo na kokoba nzela oyo ya mbongwana? (tala Alama 5:11–14).

Tala lisusu Moziya 5:7; 27:25–26; David A. Bednar, “Ye Must Be Born Again,” Liahona, Sanza ya mitano 2007, 19–22.

Yoane 3:16–17

Tata na Lola alakisaka bolingo na Ye na nzela ya Yesu Klisto.

Mpaka Jeffrey R. Holland ateyaki, “ Bosolo ya monene ya yambo ya boseko bonso ezali ete Nzambe alingi biso na nyonso ya Ye motema, nguya, molimo, mpe bokasi” (“Tomorrow the Lord Will Do Wonders among You,” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 127). Lolenge nini oyoki bolingo ya Nzambe na nzela ya libonza ya Mwana na Ye?

Elambo epesaka ntango ya kokanisa bolingo ya Nzambe mpe libonza ya Mwana na Ye. Nzembo ya elambo nini esalisaka yo oyoka bolingo oyo? Nini okoki kosala mpo na kokomisa elambo motuya mingi koleka?

Ntango bozali kokoba kotanga maye etali mateya mpe mosala ya Mobikisi, mituna yo moko lolenge nini makambo oyo ozali kotanga ezali kosalisa yo ososola mpe oyoka bolingo ya Nzambe.

Yoane 4: 24

Nzambe azalii molimo?

Basusu bakoki kobulingisama na liloba ya Yesu ete Nzambe azali molimo. Bobongoli ya Joseph Smith ya molongo oyo epesi ndimbola moko ya motuya: “Mpo alakaki Molimo na ye epai na bango” (na Yoane 4:24, makomi na nse ya lokasa a). Emoniseli ya sika lisusu eteyi ete Nzambe azali na nzoto ya mosuni mpe mikuwa (tala Malongi mpe Mayokani 130:22–23; tala lisusu Genese 5:1–3; Baebele 1:1–3).

Yoane 4:5–26

Klisto apesi ngai mai na ye ya bomoi.

Nini Yesu akokaki kolinga koloba ntango alobaki na mwasi ya Mosamalia ete nyonso oyo akomela mai oyo apesi akoyoka mposa ya mai mokolo moko te? Lolenge nini nsango malamu ezali lokola mai na bomoi?

Elilingi
moluka ya mai

Nsango malamu ya Klisto ezali mai na bomoi oyo eleisaka milimo na biso.

Moko ya bitinda ya Mobikisi epai ya mwasi ya Mosamalia ezalaki ete lolenge tokumbamelaka ezali motuya mingi koleka bisika tokumbamelaka (tala Yoane 4:21–24). Nini ozali kosala mpo na “kokumbamela Tata na molimo mpe na bosolo”? Yoane 4:23

Tala lisusu Mokambi mpo na Makomi, “Bokumbameli,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; Dean M. Davies, “The Blessings of Worship,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2016, 93–95.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Yoane 2–4Ntango libota na yo ezali kotanga mikapo oyo poso oyo, tia bokebi na lolenge Mobikisi asalelaki biloko ya mikolo nyonso—mbotama, mopepe, mai, mpe bilei—mpo na koteya bosolo ya molimo. Biloko nini kati na ndako na yo okoki yo kosalela mpo na koteya baboso ya molimo?

Ntango ozali kotanga mikapo oyo, bokanisa kotala bavideo elongo oyo ezali kolobela makambo: “Yesu Abongoli Mai na Vinyo,” “Yesu Apetoli Tempelo,” “Yesu Ateyi Kobotama Lisusu,” mpe “Yesu Ateyi Mwasi ya Mosamalia” (ChurchofJesusChrist.org).

Yoane 2:13–17.Bamipepe nini ya bosoto libota na yo esengeli kotia libanda ya ndanko mpo ete ezala esika ya bule—lokola tempelo? Nini okosala mpo na kotia makambo wana libanda?

Yoane 3:1–6.Solola na libota na yo mpo na oyo etali likamwisi ya zemi mpe mbotama—nzela ya kokela ekelamu na bomoi, ya mayele. Yesu ateyaki ete tosengeli kobotama mbala ya sika liboso ya kokota na bokonzi ya Nzambe. Mpo na nini mbotama ya sika ezali lisese malamu mpo na mbongwana esengisameli biso liboso tokoka kokota na bokonzi ya Nzambe? Lolenge nini ekoki biso komeka nzela yango ya mbotama ya sika na molimo?

Yoane 3:16–17.Bengisa bato ya libota bazongela lisusu milongo oyo na maloba na bango moko lokola soki bazalaki kolimbola yango epai ya moninga moko. Lolenge nini Yesu Klisto asungaki biso toyoka bolingo ya Nzambe?

Yoane 4:5–15.Mobikisi azalaki koteya biso nini ntango akokanisaki nsango malamu na Ye na mai na bomoi? Ntango mosusu libota na yo ekoki kotala mwa mai oyo ezali kotiola mpe kolimbola bolamu ya mai. Mpo na nini tosengeli komela mai mikolo nyonso? Na ndenge nini nsango malamu ya Yesu Klisto ezali lokola “liziba ya mai kosopanaka kino bomoi na seko”? (Yoane 4:14)

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “God’s Love,” Children’s Songbook, 97.

Kobongisa Boyekoli Na Yo Moko

Luka bilembo. Makomi esalelaka mbala mingi biloko, makambo, to bikela mpo na kolakisa makambo ya bosolo ya molimo. Bilembo oyo ekoki kofulukisa bososoli na yo ya malongi oyo ezali koteyama. Ndakisa, Mobikisi akokisanisaki mbongwana na mbotama ya sika.

Elilingi
Yesu mpe mwasi ya Mosamalia na liziba ya mai

Mai ya Bomoi,, na Simon Dewey

Bimisa na lokasa