Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mibale 13–19. Matai 5; Luka 6: “Bapambolami Ezali Bino”


“Sanza ya mibale 13–19. Matai 5; Luka 6: ‘Bapambolami Ezali Bino,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya mibale 13–19. Matai 5; Luka 6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu azali koteya likolo ya ngomba

Yesu Azali koteya Esakola likolo ya Ngomba, na Gustave Doré, na Carl Bloch.

Sanza ya mibale 13–19

Matai 5; Luka 6

“Bapambolami Ezali Bino”

Sala keba na makanisi ozwi ntango ozali kotanga Matai 5 mpe Luka 6, mpe koma yango na zulunale ya boyekoli to na lolenge mosusu. Liteya oyo ekoki kosalisa yo omona mibeko ya motuya mosusu na mikapo oyo, kasi zala ya kofungwama epai ya misusu ozali komona kati na boyekoli na yo.

Koma Makanisi na Yo

Na esika oyo kati na mosala na Ye, ezalaki polele ete Mateya ya Yesu elingaki kokokana te na oyo bato ya ntango na Ye bamesanaki koyoka. Babola bakozwa bokonzi ya Nzambe? Basokemi bakosangola mabele? Bapambolami ezali banyokwami? Bakomi mpe Bafalisai bazalaki koteya makambo ya boye te. Mpe nzokande baoyo solo basosolaki mobeko ya Nzambe bayebaki bosolo kati na maloba ya Mobikisi. Liso mpo na liso” mpe “oyina moyini na yo” ezalaki mibeko ya nse (Matai 5:38, 43). Kasi Yesu Klisto ayaka mpo na koteya mobeko ya likolo (tala 3 Nefi 15:2–10), oyo esalama mpo na kosalisa biso mokolo moko tokoma “ya kobonga nie lokola Tata [na biso] na Likolo azali ya kobonga nie” (Matai 5:48).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 5:1–12; Luka 6:20–26, 46–49

Esengo oyo ewumelaka eyaka uta na kotambwisaka bomoi lolenge Yesu Klisto ateyaki.

moto nyonso alingaka kozala na esengo, kasi moto nyonso alukaka esengo na bisika se moko. Bamoko balukaka esengo yango na nguya ya mokili, basusu na nzoto to na kokokisaka bamposa ya nzoto. Yesu Klisto ayaki mpo na koteya nzela ememaka na esengo oyo ewumelaka, mpo na koteya nini elingi solo koloba kopambolama. Oyekoli nini na ntina ya kozwa esengo ewumelaka uta Matai 5:1–12 mpe Luka 6:20–26? Lolenge nini oyo ekeseni na emoneli ya mokili ya esengo?

Nini milongo oyo, elongo na Luka 6:46–49, ezali koteya yo na ntina ya kozalaka moyekoli ya Yesu Klisto? Nini oyoki efuli yo kosala mpo na kokolisa malamu bizalela elimbolami na milongo oyo?

Tala lisusu Mokambi na Makomi, “Bisengo mwambe,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; “Sermon on the Mount: The Beatitudes” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Matai 5:13

“Bino bozali mungwa ya mokili”

Mungwa esalelami uta kala mpo na kobomba, kopesa elengi, mpe kopetola. Mungwa ezalaki lisusu na ndimbola ya bonzambe mpo na Bayisalayele. Esangisamaki na misala ya kala ya kobonzela nyama na nse ya mobeko ya Mose(tala Lewitiko 2:13; Mitango 18:19). Ntango mungwa ebungisi elengi na yango, ekomi mpamba, to “ezangi ntina” (Matai 5:13). Oyo esalamaka ntango esangisami na to ebebisami na biloko mosusu.

Bomba yango na motema ntango ozali komanyola Matai 5–13. Lolenge nini ekobomba yo elengi na yo lokola moyekoli ya Yesu Klisto? Lolenge nini okokokisa mosala na yo ya komibatela mpe komipetola lokola mungwa ya mabele?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 103:9–10.

Elilingi
mungwa

“Bino bozali mungwa ya mokili” (Matai 5:13).

Matai 5:17-48; Luka 6:27-35

Mobeko ya Klisto ezwi esika ya mobeko ya Mose.

Bayekoli bakoki kokamwa koyoka Yesu koloba ete boyengebene na bango esengeli koleka oyo ya bakomi mpe Bafalisai (tala Matai 5:20), oyo bamikumisaki na ntina ya boniboni babatelaki malamu mobeko ya Mose.

Ntango bozali kotanga Matai 5:21–48 mpe Luka 6:27–35, kanisa kotiaka elembo na bizaleli esengelami kati na mobeko ya Mose (“boyokaki ete …”) mpe maye Yesu ateyaki mpo na kotombola bizaleli oyo. Mpo na nini okanisi ete lolenge ya mobikisi ezali mobeko ya likolo kolekai?

Ndakisa, Yesu ateyaki nini kati na Matai 5:27–28 mpo na oyo etali mokumba na biso likolo ya makanisi na biso? Lolenge nini okoki kozwa bososoli mingi likolo ya makanisi mpe mayoki oyo eyaka na molimo mpe motema na biso? (tala Malongi mpe Mayokani 121:45).

Tala lisusu “Sermon on the Mount: The Higher Law” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Matai 5:48

Tata na Lola atiaka elikya solo ete ngai nazala moto oyo abongi nie?

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki:

“Liloba moto yoy abongi nie ebongolamaki uta na lokota ya bamwela [Kigeleki] teleios, oyo elingi koloba ‘mobimba.’ … Ntango liloba verbe yango etiami na kosala te yango ezali teleiono, oyo elingi koloba ‘kokoma na nsuka ya mosika, mpo na kozala ya kokola mobimba, mpo na kolia, to kosilisa.’ Tosengi oyeba ete liloba yango elingi koloba te ‘oyo ezanga libunga’; elingi koloba ‘kokokisa ntina na mosika.’ …

“… Nkolo ateyaki, ‘Ozali te na makoki ya kozala liboso ya Nzambe sikawa … ; yango wana, koba na bompikiliki kino okokoma moto oyo abonga nie’ [Malamu mpe Mayokani 67:13].

“Tozali na mposa ya koyoka mawa te soki makasi na biso ya lokengo na nzela ya kobonga nie sikawa ezali komonana lokola mpasi mpenza mpe ezanga nsuka. Kozala ya kobonga nie ezali kozela. Ekoki koya na mobimba bobele nsima ya lisekwa mpe bobele na nzela ya Nkolo. Ezali kozela banso oyo balingaka ye mpe babatelaka mitindo” (“Perfection Pending,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1995, 86, 88).

Tala lisusu 2 Petelo 1:3–11; Moroni 10:32–33; Malongi mpe Mayokani 76:69; Jeffrey R. Holland, “Be Ye Therefore Perfect—Eventually,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2017, 40–42.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 5:1–9.Mabongi nini eteyamaki na Matai 5:1–9 ekoki kosalisa ndako na yo ezala esika ya esengo koleka? Okoki kopona kosala likolo ya moko to mibale oyo ezali komonana lokola motuya mingi koleka na libota na yo. Ndakisa, mateya nini tomoni ete ekoki kosalisa biso tozala basali mpo na kimia? (tala Matai 5:21–25, 38–44). Bantina nini tokoki kotia? Lolenge nini tokolandela?

Matai 5:13.Lia bilei batia mungwa elongo na yango moko oyo kaka kasi ezanga mungwa. Bokeseni nini tomoni? Yango elingi koloba nini kozala “mungwa na mabele”? Lolenge nini tokoki kosala yango?

Matai 5:14–16Mpo na kosalisa libota na yo esosola nini elingi koloba kozala “pole ya mokili,” okoki kotala mwa maziba ya pole kati na ndako na yo, nzingazinga na yo, mpe mokili. Ekoki kosalisa soki olakisi nini esalamaka ntango tobombaka pole. Nini Yesu alingaki koloba ntango alobaki, “Bino bozali pole ya mokili”? (Matai 5:14). Nani azalaki lokola pole mpo na libota na biso? Lolenge nini tokoki kozala pole mpo na basusu? (see 3 Nefi 18:16, 24–25)

Matai 5:43–45Ntango libota na yo ezali kotanga maloba ya Mobikisi kati na milongo oyo, okoki kososola na ntina ya banani, mingi mingi, oyokaka okoki kolinga, kopambola, mpe kosambelela. Lolenge nini tokoki kokolisa bolingo na biso mpo na bango?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Shine On,” Children’s Songbook, 144.

Kobongisa Mateya na Biso

Bozala Batali Malamu. “Soki bosali keba na maye mazali kosalama kati na bomoi ya [bana] na bino, bokoki kozwa mabaku maleki malamu koleka ya koteya. … Masolo oyo [bango] babetaka to mituna batunaka ekoki lisusu kokamba na bangonga ya mateya ” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi16).

Elilingi
buzi

“Bino bozali pole na mokili” (Matai 5:14).

Bimisa na lokasa