Sanza ya mibale 20–26. Matthew 6–7: ‘Alakisi Bango lokola Moko Oyo Azali na Bokonzi,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)
Sanza ya mibale 20–26. Matai 6–11,” Yaka, Langa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023
Sanza ya mibale 20–26.
Matai 6–7
“Alakisi Bango lokola Moko Oyo Azali na Bokonzi”
Ntango tozali kotanga makomi na motuna na makanisi mpe na mposa ya solo mpo na kososola maye Tata na Lola alingi biso toyeba, tobengisaka Molimo Mosantu afula biso. Ntango ozali kotanga Matai 6–7, sala keba na makanisi oyo.
Koma Makanisi na Yo
Esakola likolo na Ngomba ezali moko ya masukulu eyebani malamu na mangomba ya Kimoklisto. Mobikisi ateyaki bililingi ya malamu, lokola engumba etongama likolo ya ngomba, bafololo ya elanga, mpe bambwa ya zamba kolataka poso ya bameme. Kasi Esakola likola ya Ngomba ezali mosika mingi koleka lisukulu ya kitoko. Nguya ya mateya ya Mobikisi epai ya bayekoli na Ye ekoki kobongola bomoi na biso, mingi mingi ntango tosalelaka yango. Nsima maloba na ye ekomaka mingi koleka maloba; ekomaka moboko ya sikisiki mpo na bomoi oyo, lokola ndako ya moto ya bwanya, oyo ekoki kotelemela mipepe mpe bampela ya mokili (tala Matai 7:24–25).
Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko
Kosalelaka mateya ya Mobikisi ekoki kosalisa ngai nakoma lokola Ye.
Esakola likolo ya Ngomba ezali mabongi mingi ya nsango malamu. Ntango ozali kotanga mikapo oyo, tuna nini Nkolo alingi yo oyekola.
Moko ya mabongi okoki kozwa ezali mposa ya kotia liboso makambo ya Nzambe koleka makambo ya mokili. Mateya ya Mobikisi nini kati na Matai 6–7 esalisi yo ofandisa makanisi likolo ya makambo ya lola? Makanisi to mayoki mosusu nini ozali na yango? Nini ofulami na molimo mpo na kosala? Kanisa kokoma makanisi na yo. Ndakisa:
Nalingi kosala keba mingi mpo na oyo etali maye Nzambe akanisaka na ntina na ngai koleka maye basusu bakanisaka. | |
Libongi mosusu kati na Matai 6–7 ezali losambo. Zwa ngonga ya kopesa motuya na nsambo na yo. Lolenge nini ozali komiyoka na makasi na yo ya kokoma penepene ya Nzambe na nzela ya losambo? Mateya nini na Matai 6–7 ezali kofula yo mpo na kobongisa lolenge osambelaka? Koma makanisi ozwi. Ndakisa:
Ntango nasambelaka, nalingaka kozwa nkombo ya Tata na Lola na limemia. | |
Ntango nasambelaka, nakoki koloba mposa na ngai ete bolingi ya Nkolo esalama. | |
Okoki kokanisa kotanga Esakola likolo na Ngomba lisusu, kolukaka mabongi maye bazongeli to bitinda to nsango oyo ezali mingi mingi kosalelama epai na yo. Koma nini ozwi kati na zulunale ya boyekoli, elongo na yango makanisi mpe mayoki na yo.
Nini yango elingi koloba kosalelaka “koloba-loba mpamba” na losambo?
Bato mbala mingi basosolaka “koloba-loba mpamba” mpo na kolinga koloba kozongelaka maloba se moko mbala na mbala lisusu. Nzokande, liloba mpamba ekoki koloba likambo moko oyo ezali na motuya te. Kosalela “koloba-loba mpamba” kati na losambo ekoki kolinga koloba kosambela na makanisi ezanga bosembo, mozindo (tala Alama 31:12–23).
Nakoki kosambisa na bosembo.
Na Matai 7:1, mobikisi akoki komonana lokola kolobaka ete tosengeli mokolo moko te kosambisa, kasi na makomi mosusu (kotangaka mpe milongo mosusu na mokapo oyo), Ye apesi biso malako etali lolenge nini kosambisa. Soki oyo ezali komonana lokola kotia mobulu, Bobongoli ya Joseph Smith ya molongo oyo ekoki kosalisa: “Kosambisa te na bosembo te, ete osambisama te; kasi sambisa bosambisi ya bosembo” (na Matai 7:1, matangi ya nse ya lokasa a). Nini ozwi na Matai 7:1–5, elongo na ndambo ya mokapo oyo etikali, oyo esalisi yo oyeba lolenge nini “kosambisa bosambisi ya bosembo”?
Tala lisusu Masolo ya Nsango Malamu, “Judging Others,” topics.ChurchofJesusChrist.org; Lynn G. Robbins, “The Righteous Judge,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2016, 96–98.
Nayei koyeba Yesu Klisto na kosalaka bolingi na Ye.
Liloba “Nayebi bino soki moke te” na Matai 7:23 ebongwanaki na Bobongoli ya Joseph Smith na “Boyebi ngai soki moke te” (Matai 7:23, makomi ya nse ya lokasa a). Lolenge nini mbongwana oyo esalisi yo kososola malamu koleka maye Nkolo ateyaki na milongo 21–22 mpo na oyo etali kosala bolingi na Ye? Boniboni malamu ozali komiyoka ete oyebi Nkolo? Bokoki kosala nini mpo na koyeba Ye malamu koleka?
Tala lisusu David A. Bednar, “If Ye Had Known Me,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2016, 102-5.
Kotosa mateya ya mobikisi etongaka moboko ya sikisiki mpo na bomoi na ngai.
Kosalela nsango malamu ekoki kolongola mikakatano te uta na bomoi na biso. Bandako nyonso mibale kati na lisese ya mobikisi na Matai 7:24–27 ekutanaki na mopepe makasi se moko yango. Kasi moko ya bandako ezalaki na makoki ya kotelemela yango. Lolenge nini kosalela mateya ya Mobikisi etongaki moboko makasi mpo na yo.? Nini oyoki efuli yo kosala mpo na kokoba kotonga ya yo “ndako likolo na libanga”? (tala molongo 24).
Tala lisusu Elamani 5:12.
Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa
-
Matai 6–7.Lolenge moko ya koyekola uta na Matai 6–7 lokola libota ezali kotala bavideo “Sermon on the Mount: The Lord’s Prayer” mpe “Sermon on the Mount: Treasures in Heaven” (ChurchofJesusChrist.org). Bato ya libota bakoki kolanda na makomi na bango mpe kotelemisa bavideo ntango nyonso bayoki eloko moko balingi kosololela. Molulu oyo ekoki kowumela mikolo mingi, soki esengeli
2:194:33 -
Matai 6:5–13.Tokoki koyekola nini na ntina ya losambo na lolenge Mobikisi asambelaki? Lolenge nini tokoki kosalela losambo na Ye lokola ndakisa mpo na kokolisa nsambo na biso ya moto ye moko mpe ya libota? (Tala lisusu Luka 11:1–13.) Soki ozali na bana mike koleka, okoki kosala losambo elongo.
-
Matai 6:33.Elingi koloba nini “koluka … yambo bokonzi ya Nzambe”? Lolenge nini tozali kosala oyo moto moko moko mpe lokola libota?
-
Matai 7:1–5.Mpo na kotala mateya kati na milongo oyo, libota na yo ekoki kozwa lititi (mwa eteni ya nzete ) mpe mombonga (eteni ya nzete monene). Kokokanisa yango mibale eteyi biso nini na oyo etali kosambisa basusu? Soki okolinga koluka koyeba mama likambo oyo mingi koleka, okoki kosalela mikanda to buku mosusu na “Judging Others” (Gospel Topics, topics.ChurchofJesusChrist.org).
-
Matai 7:24–27.Mpo na kosalisa libota na yo esosola malamu koleka lisese ya Mobikisi ya mobali ya bwanya mpe mobali ya zoba, okoki kotia bango basopa mai likolo ya zelo mpe nsima likolo ya libanga. Lolenge nini tokoki kotonga miboko na biso ya molimo likolo ya libanga?
Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.
Loyembo oyo ekoki koyembama: “The Wise Man and the Foolish Man,” Children’s Songbook, 281.