Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mibale 27–Sanza ya misato 5. Matai 8; Malako 2–4; Luka 7: “Kondima na Yo Esili Kobikisa Yo”


“Sanza ya mibale 27–Sanza ya misato 5. Matai 8; Malako 2–4; Luka 7: ‘Kondima na Yo Esili Kobikisa Yo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya mibale 27–Sanza ya misato 5. Matai 8; Malako 2–4; Luka 7,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu azali kotelemisa moto uta na mbeto

Sanza ya mibale 27–Sanza ya misato 5

Matai 8; Malako 2–4; Luka 7

“Kondima na Yo Esili Kobikisa Yo”

Keba kowelisa boyekoli na yo ya makomi te. Zwa ntango mpo na komanyola na losambo, atako soki elingi koloba ozali na ntango te ya kotanga milongo nyonso. Bangonga oyo ya komanyola mbala mingi ekambaka na emoniseli ya moto ye moko.

Koma Makanisi na Yo

Moko ya bansango ya polele kati na Kondimana na Sika ezali ete Yesu Klisto azali mobikisi bokono. Masolo ya Mobikisi kobikisaka bato ya bokono mpe bato na mitungisi ezali mingi—kobanda na mwasi na fevele kino na mwana mobali ya mokufeli mobali oyo akufaki. Mpo na nini kobeta nsete na lobiko ya nzoto? Bansango nini ekoki kozala kuna mpo na biso kati na makamwisi oyo? Solo mpenza moko ya nsango ya solo ezali ete Yesu Klisto azali mwana ya Nzambe, na nguya likolo ya biloko nyonso, kotangaka mpe mpasi mpe bozangi kokoka na biso ya nzoto. Kasi ndimbola mosusu ezwami na maloba na Ye mpo na bakomi ya ntembe: “Mpo na koyebisa ete Mwana na moto azali na bokonzi awa na mokili mpo na kolimbisa masumu” (Malako 2:10). Boye ntango ozali kotanga makambo oyo etali mokufi miso to moto na maladi ya maba kobikisamaka, okoki kokanisa na ntina ya lobiko—ya molimo mpe ya nzoto lokola—oyo okoki kozwa uta na Mobikisi mpe koyoka Ye kolobela yo, “Kondima na Yo Esili Kobikisa Yo” (Luka 7:50).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 8; Malako 2–3; Luka 7

Mobikisi akoki kobikisa makono mpe malali.

Mwa mikapo oyo ekomi bandakisa mingi ya bobiki ya kokamwa oyo esalamaki na Mobikisi. Ntango ozali kotanga bobiki oyo, luka bansango ekoki kozala mpo na yo. Okoki komituna: Lisolo yango eteyi yo nini na ntina ya bondimi na biso na Yesu Klisto? Lisolo yango eteyi yo nini na ntina ya Mobikisi? Nzambe alingi ngai nayekola nini uta na likamwisi oyo? Tala mwa bandakisa, kasi ezali na mingi koleka:

Tala lisusu David A. Bednar, “Accepting the Lord’s Will and Timing,” Liahona, Sanza ya mwambe 2016, 17–23; Neil L. Andersen, “Wounded,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 83-86.

Matai 2:15–17; Luka 7:36–50

Yesu Klisto ayaki mpo na kokweisa basumuki te kasi mpo na kobikisa bango.

Ntango ozali kotanga milongo oyo etali masolo ya Yesu na bakomi mpe bafalisai, okoki kotala soki omimoni kati na masolo oyo. Ndakisa, makanisi mpe misala na yo ezali naino lokola oyo ya Simoni Mofalisai? Lolenge nini okolinga kolimbola bokeseni kati na lolenge Yesu amonelaki basumuki mpe lolenge Bafalisai lokola Simoni bamonaki yango? Kanisa lolenge nini baoyo batondi na lisumu bakoki komiyoka ntango bazali elongo na Mobikisi. Bayokaka lolenge nini ntango bazali elongo na yo?

Okoki lisusu komanyola lolenge nini ozali lokola mwasi oyo balimboli na Luka 7:36–50. Ntango nini oyokaki boboto mpe mawa oyo Mobikisi alakisaki ye? Nini oyekoli lisusu uta na ndakisa ya bondimi, bolingo, mpe bomikitisi na ye?

Tala lisusu Yoane 3:17; Luka 9:51–56; Dieter F. Uchtdorf, “The Gift of Grace,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 107–10.

Matai 8:18–22; Malako 3:31–35

Kozala moyekoli ya Yesu Klisto elingi koloba ete natiaka Ye na esika ya yambo kati na bomoi na ngai.

Na milongo oyo, Yesu ateyaki ete kozala bayekoli na Ye esengaka biso totia Ye na esika ya yambo na bomoi na biso, atako soki wana ntango mosusu elingi koloba tosengeli kobonzela makambo mosusu oyo tomonaka lokola ya motuya. Ntango ozali koyekola biteni ya makomi oyo, manyola kimoyekoli na yo moko. Mpo na nini bayekoli basengeli kozala na bolingi ya kotia Mobikisi na esika ya yambo? Nini okoki kozala na yango mposa ya kotika mpo na kotia Yesu na esika ya yambo? (Tala lisusu Luka 9:57–62.)

Matai 8:23–27; Malako 4:35–41

Yesu Klisto azali na nguya ya komema kimia na kati ya mipepe makasi ya bomoi.

Esili yo koyoka lolenge bayekoli ya Yesu basalaki kati na mopepe makasi na mbu—kotalaka mbonge ya mai kotondisa masuwa mpe kotunaka, “Nkolo, ezali likambo na yo te soki biso tokufi ?”

Na Malako 4:35–41, okomona mituna minei. Koma mokanda ya moko na moko, mpe manyola maye eteyaka mpo na oyo etali kokutana na mikakatano ya bomoi na bondimi kati na Yesu Klisto. Lolenge nini Mobikisi amemaka kimia mpo na mipepe makasi ya bomoi na yo?

Tala lisusu Lisa L. Harkness, “Peace, Be Still,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 80-82.

Elilingi
Yesu kati na bwatu kolembisaka mopepe makasi

Uta na Bobangi kino na kondima,, na Howard Lyon

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 8; Malako 2–4; Luka 73.Banza kokela mokanda ya makamwisi oyo elimbolamaki na mikapo oyo. Meka komona to koyema bililingi ya misusu na yango (tala Gospel Art Book to ChurchofJesusChrist.org). Moko na moko ya bato ya libota akoki kosalela bililingi mpo na koloba na ntina ya makamwisi yango mpe kokabola maye bayekoli uta na yango. okoki kokabola ndakisa mosusu ya makamwisi omoni to otangi kati na mikolo na biso.

Tala lisusu bavideo “Widow of Nain” and “Calming the Tempest” (ChurchofJesusChrist.org).

Matai 8:5–13; Luka 7:1–10.Nini ekamwisaki Yesu kati na bondimi ya kapiteni? Lolenge nini tokoki kolakisa bondimi ya lolenge moko kati na Yesu Klisto?

Malako 2:1–12.Chapter 23: The Man Who Could Not Walk” (in New Testament Stories, 57–58, or the corresponding video on ChurchofJesusChrist.org) ekoki kosalisa libota na yo elobela Malako 2:1–12. (Tala lisusu video “Jesus Forgives Sins and Heals a Man Stricken with Palsy” na ChurchofJesusChrist.org.) Lolenge nini tokoki kokokana na baninga ya moto oyo azalaki kokoka kotambola te? Nani azalaki moninga ya lolenge wana mpo na biso?

Malako 4:35–41.Lisolo oyo ekoki kosalisa bato ya libota ntango bazali komiyoka kobanga? Ntango mosusu bakoki kotanga molongo 39 mpe kokabola makambo ntango mobikisi asalisaki bango bayoka kimia.

Bana bakoki kosepela kosala lokola bazali na bwato kati na mbu ya mopepe makasi ntango moto moko azali kotanga Malako 4:35–38. Nsima, ntango moto moko atangi molongo 39, bakoki kosala lokola kozala kati na bwato na mbu ya kimia. Bokoki lisusu koyemba elongo loyembo etali kozwa kimia kati na Mobikisi, lokola “Maître la tempête lance” (Cantiques,, no. 56). Maloba nini na loyembo yango eteyi biso na ntina ya kimia Yesu apesaka?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana

Loyembo ekoki koyembama: “Maître la tempête lance,” Cantiques, no. 56

Kobongisa Mateya na Biso

Zala moto oyo bakoki komonana mpe kosolola na ye na pete. Bangonga mosusu ya malamu koleka mpo na koteya ebandaka lokola mituna to mitungisi kati na mitema ya bato ya libota. Tika ete bato ya libota bayeba na nzela ya maloba mpe misala na yo ete ozali na mposa ya koyoka bango. (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi,16.)

Elilingi
Yesu elongo na moto ya maladi likolo ya mbeto oyo bazali kokitisa na nzela ya likolo ya ndako

Klisto mpe Mokatatani, na J. Kirk Richards

Bimisa na lokasa