Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya misato 20–26. Matai 13; Luka 8; 13: “Ye oyo Azali na Matoyi ya Koyoka, Tika Ayoka”


“Sanza ya misato 20–26. Matai 13; Luka 8; 13: ‘Ye oyo Azali na Matoyi ya Koyoka, Tika Ayoka,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya misato 20–26. Matai 13; Luka 8; 13,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
masango ebelemi mpo na kobuka

Sanza ya misato 20–26

Matai 13; Luka 813

“Ye oyo Azali na Matoyi ya Koyoka, Tika Ayoka”

Ntango ozali kotanga Matai 13 mpe Luka 813, kanisa oyo etali lolenge nini okomilengela mpo na “koyoka” mpe kosepela na mateya ya Mobikisi kati na masese oyo. Okosala nini mpo na kotia na misala mateya oyo na bomoi na yo?

Koma Makanisi na Yo

Mateya mosusu ya motuya mingi mpenza ya Mobikisi ezalaki na lolenge ya masolo ya pete oyo babengi masese. Oyo ezalaki mingi koleka masolo ya mikuse kitoko mpo na oyo etali biloko to makambo ya momesano. Ezalaki na bosolo ya mozindo na ntina ya bokonzi ya Nzambe mpo na baoyo bamilengelaki na molimo. Moko ya masese ekomama kati na Kondimana na Sika—lisese ya mokoni (tala Matai 13:3–23)—ebengisi biso tososola bobelemi na biso mpo na koyamba liloba ya Nzambe. “Mpo na moko kani azwi,” Yesu alobaki, “epai na ye ekopesama, mpe akozala na mingi” (Bobongoli ya Joseph Smith, Matai 13:10 [na Matai 13:12, makomi ya nse ya lokasa a]). Yango wana ntango tozali komilengela mpo na koyekola masese ya Mobikisi—to mateya na Ye kani—esika malamu ya kobandela ezali ya kososola mitema na biso mpe kokana soki tozali kopesa liloba ya Nzambe “mabele malamu” (Matai 13:8) kati na yango kolona, kokola, kobota fololo, mpe kobota mbuma oyo ekopambola biso mpe mabota na biso mingi.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 13:3-23; Luka 8:4-15; 13:6–9

Motema na ngai esengeli elengelama mpo na koyamba liloba ya Nzambe.

Mpo na nini ntango mosusu motema na biso eyambaka bosolo, kasi mbala mosusu tomekamaka kotelemela yango? Kotanga lisese ya mokoni ekoki kopesa libaku malamu ya kokanisa oyo etali lolenge nini oyambaka bosolo uta na Nzambe. Ekoki kosalisa kokokanisa milongo 3–8 ya Matai 13 na babobongoli epesami kati na milongo 18–23. Nini okoki kosala mpo na kosala bilanga na “mabele malamu” kati na yomei? Nini ekoki kozala mwa “banzube” oyo ezali kopekisa yo koyoka mpe kolanda solo solo mpenza liloba ya nzambe? Lolenge nini okoki kolonga “banzube” oyo?

Boyekoli na yo ya lisese oyo ekoki lisusu kozala na nguya na lolenge ozali kotanga lisese kati na Luka 13:6–9. Nini ezali “mbuma” oyo Nkolo alukaka uta na biso? Lolenge nini toleisaka mabele na biso mpo ete tokoka “kobota mbuma”?

Tala lisusu Moziya 2:9; Alama 12:10–11; 32:28–43; Dallin H. Oaks, “Lisese ya Mokoni,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 32-35.

Matai 13:24-35, 44–52; Luka 13:18-21

Masese ya Yesu esalisaka ngai nasosola bokoli mpe nsuka ya nyonso ya Eklezia na Ye.

Profeta Joseph Smith ateyaki ete masese kati na Matai 13 elimboli bokoli mpe nsuka ya nyonso ya Eklezia ya basantu ya mikolo ya nsuka. Okoki kozongela lisusu maloba ya Profeta kati na Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 293–303, tala maye masese oyo elandi ezali koteya mpo na ntina ya Eklezia ya Nkolo:

Nsima ya komaniola masese oyo, oyoki ete ofulami kosala nini na molimo mpo na kozwama mobimba mpenza kati na mosala ya Eklezia ya basantu ya mikolo mya nsuka ya Klisto?

Tala lisusu Mokambi na Makomi, “Bokonzi ya Nzambe to Bokonzi ya Lola,” “Lisese,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
liyaka ya motuya

Nsango elamu ya Yesu Klisto ezali “mangaliti ya motuya monene” (Matai 13:46)

Matai 13:24–30, 36–43

Mpe bayengebene basengeli kokola katikati ya bato mabe tii na nsuka ya mokili.

Nzela moko ya kososola lisese oyo ezali koyema elilingi na yango mpe kobamba yango elembo elongo na ndimbola oyo ezali na Matai 13:36–43 mpe Malongi mpe Mayokani 86:1–7. Matiti mabe ezali “matiti ya ngenge, oyo, kino ekota na litoyi, ekokani na lolenge ya komonana na masango” (Bible Dictionary, “Tares”). Babosolo nini kati na lisese oyo efuli yo mpo na kotikala bosembo atako mabe ezali na mokili?

Luka 8:1–3

Na ndenge nini “basi mosusu basalisaki mobikisi?

“Bayekoli ya basi basalaki mobembo elongo na Yesu mpe Bazomi na mibale, koyekolaka uta na [Yesu] na molimo mpe kosaleleka Ye na ntango. … Mpo na kobakisa koyamba mosala ya Yesu—bansango ya esengo ya nsango malamu na Ye mpe mapamboli ya nguya na Ye ya kobikisa—basi oyo basalelaki Ye, kokabolaka ya bango bozwi mpe losambo” (Daughters in My Kingdom [2017], 4). Basi oyo balandaki Mobikisi bapesaki lisusu litatoli ya nguya na ntina na Ye (tala Linda K. Burton, “Certain Women,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 12–15).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 13. Ntango bato ya libota na yo bazali kotanga masese ya Mobikisi, bakoki kosepela kokanisa masese na bango moko oyo eteyaka bosolo kaka moko oyo etali bokonzi ya lola (Eklezia), na kosaleka biloko to makambo oyo bamesani na yango.

Matai 13:3–23; Luka 8:4–15.Nsima ya kotanga lisese ya mokoni elongo, libota na yo ekoki kosolola mituna lokola oyo: Nini ekoki kokomisa “mabele” na biso (mitema na biso) “ya mabanga” to “oyo efinaka” liloba? Lolenge nini tokoki koyeba solo ete mabele na biso ezali malamu mpe ekobota mbuma?

Soki ozali na bana mike koleka na libota na yo, ekoki kozala esengo ya kobengisa bato ya libota basala ndenge ekeseni mpo na kolengela mitema na biso mpo na koyoka liloba ya Nzambe ntango bato mosusu ya libota bazali kokanisa maye bazali kosala.

Matai 13:13–16.Lolenge nini okoki kosalisa bato ya libota na yo basosola motuya ya koyamba na motema moko liloba ya Klisto”? Mpo na kolakisa “matoi [oyo] ezali bozito,” okoki kozipa matoi ya moto ya libota moko ntango ozali kotanga na malembe Matai 13:13–16. Boniboni moto ya libota wana asosoli uta na milongo yango? Ndenge nini tokoki kofungola miso, matoi, mpe mitema na biso mpo na liloba ya Nzambe.

Matai 13:44–46Nini mibali mibale na masese oyo bazali na yango elongo? Ezali na makambu mosusu tosengeli kozala kosala lokola bato mpe lokola libota mpo na kotia bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso kati na bomoi na biso?

Luka 13:11–17.Bato ya libota bazalaki na boyebi oyo esalaki ete bango bamiyoka ete bakokaki te “kotombola [bangomei] likolo”? Toyebi moto moko mosusu oyo amiyokaka lolenge oyo? Lolenge nini tokoki kosunga? Lolenge nini Mobikisi “akolongola” biso na maladi na biso?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “We Are Sowing,” Hymns, no. 216.

Kobongisa Mateya na Biso

Kanga makomi moko na moto. Pona eteni ya makomi oyo ezali mingi mingi ntina mpo na libota na yo, mpe bengisa bato ya libota bakanga yango na moto . Mpaka Richard G. Scott ateyaki, “Makomi oyo bakanga na moto makomaka moninga ya ntango nyonso oyo alembaka te ata soki ntango eleki” (“The Power of Scripture,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2011, 6).

Elilingi
moto azali kolona bambuma

Lisese ya Mokoni, na George Soper

Bimisa na lokasa