Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya misato 13–19. Matai 11–12; Luka 11: “Nakopesa Bino Bopemi”


“Sanza ya misato 13–19. Matai 11–12; Luka 11: ‘Nakopesa Bino Bopemi,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya misato 13–19. Matai 11–12; Luka 11,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023Yesu atelemi

Elilingi
Yesu atelemi kati na mapata

Kobanga Te, na Michael Malm

Sanza ya misato13–19

Matai 11:-12; Luka 11

“Nakopesa Bino Bopemi”

Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki: “Makomi, oyo ezali bimoniseli ya makambo ya kala, ekoki kososolama te soki ozangi bofungwami ya bimoniseli ya sikoyo. … Boyekoli makomi epesaka mibali mpe basi makoki ya kozwa bimoniseli” (“Scripture Reading and Revelation,” Ensign, Sanza ya yambo 1995, 7).

Koma Makanisi na Yo

Na ndenge mingi, Bafalisai mpe bakomi bakomisaka bokumbameli Yohova mokumba. Mbala mingi babetaki nsete na mitindo ya makasi likolo ya bosolo ya seko. Mitindo etali mokolo ya Sabata, oyo esalamaka mpo na kozala mokolo ya kopema, ezalaki yangomei mokumba ya bozito.

Mpe nsima, Yehova Yemei ayaki kati na bato na Ye. Ateyaki bango ete ntina ya solo ya bonzambe ezali kokela mikumba te kasi kolongola yango. Ateyaki ete Nzambe apesi biso mitindo, kotangaka mpe moko oyo ya kotosa Sabata, ya koniokola biso te kasi ya kopambola biso. Iyo, nzela epai ya Nzambe ezali semba mpe nkaka, kasi Nkolo ayaki mpo na kosakola ete tosengeli kotambola na nzela yango biso moko te. “Yaka epai na ngai,” Abondelaki. Libengisi na Ye, epai na banso oyo bazali koyoka “bozito ya mokumba” mpo na ntina kani, ezali ya kotelema penepene na Ye, ya komikangisa bisomei epai na Ye, mpe ya kotika Ye akabola mikumba na biso. Elaka na Ye ezali “bokozwa bopemi ya milimo na bino.” Kokokisana na banzela mosusu ya kopona yango—komekaka komema yo moko to kotalelaka biyano na banzela ya kufa—Ya ye “ekanganeli ezali ya pete, mpe mokumba na [Ye ] ezali pepele.” Matai 11:28–30.)

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 11:28–30

Yesu Klisto akopesa ngai bopemi ntango nakotalela bobele Ye.

Tomemaka banso mikumba—misusu ewutaka na masumu mpe mbeba na biso moko, misusu esalami na basusu, mpe misusu oyo ezali ya mbeba ya moto ye moko te kasi ezali kaka eteni ya bomoi awa na mabele. Na kozangaka kotala bantina ya mikakatano na biso, Yesu abondeli biso toya epai na Ye mpo ete Akoka kosalisa biso tomema mikumba na biso mpe tozwa libiki (tala lisusu Moziya 24). Mpaka David A. Bednar ateyaki, “kosala mpe kobatela mayokani ya bule ekangisaka biso elongo na Nkolo Yesu Klisto” (“Bear Up Their Burdens with Ease,” Liahona, Sanza ya mitano 2014, 88). Kosimbaka likambo oyo na msyele, manyola mituna lokola oyo elandi mpo na kososola malamu koleka maloba ya Mobikisi kati na milongo oyo: Lolenge nini mayokani ekangisaka ngai epai mpe elongo na Mobikisi? Nasengeli kosala nini mpo na koya epai na Klisto? Na lolenge nini ekangiseli ya Mobikisi ezali pete mpe mokumba na Ye ezali pepele”?

Mituna nini eyelaka yo na makanisi na yo ntango otangaka? Koma yango, mpe luka biyano poso oyo kati na makomi mpe maloba ya baprofeta. Okoki kozwa biyano na mituna misusu kati na nsango ya Mpaka David A. Bednar oyo etalisami likolo.

Tala lisusu John A. McCune, “Come unto Christ—Living as Latter-day Saints,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 36–38; Lawrence E. Corbridge, “The Way,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2008, 34–36.

Elilingi
mibali bazali kotala bayekoli na nse kotambola kati na elanga ya masango

Bayekoli Bazali Kolia Masango na Mokolo ya Sabata, na James Tissot

Matai 12:1–13

“Sala bolamu na mikolo ya sabata.”

Mateya ya Bafalisai ekesanaki uta na maye ya Mobikisi na banzela mingi, kasi mingi mingi na lolenge ya kotosa mokolo ya Sabata. Ntango ozali kotanga Matai 12:1–13, okoki kotala lolenge nini bizalela na yo mpe misala na yo mpo na oyo etali Sabata ezali kolandisama na mateya ya Mobikisi. Mpo na kosala oyo, okoki komaniola masakoli lokola oyo:

Lolenge nini mateya oyo ekoki kobongola lolenge ozali komona sabata?

Tala lisusu Malako 2:233:5; Masolo ya Nsango Malamu, “,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Matai 12:34–37; Luka 11:33–44

Maloba mpe misala na ngai ezali kotalisa maye mazali na motema na ngai.

Moko ya botioli monene ya Bafalisai mpo na Mobikisi ezalaki ete bazalaki komeka komonana sembo kasi makanisi na bango ezalaki peto te Ntango ozali kotanga makebisi ya Mobikisi mpo na Bafalisai kati na Matai 12:34–37 mpe Luka 11:33–44, manYola mokangano katikati ya mitema na biso mpe misala na biso. Nini maloba “ebombelo malamu ya motema” elingi koloba mpo na bino? (Matai 12:35). Lolenge nini maloba na biso elongisaka to ekweyisaka biso? (tala Matai 12:37). Ekoki kolinga koloba nini mpo ete miso na yo ezala “moko”? Luka 11:34 Maniola lolenge nini okoki kokoma “mobimba na pole” (Luka 11:36) na nzela ya nguya ya Mobikisi.

Tala lisusu Alama 12:12–14; Malongi mpe Mayokani 88:67–68.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 11:28–30.Okoki kosalisa libota na yo etala mateya ya mobikisi kati na milongo oyo na kosengaka bango moko na mosusu bameka kobenda eloko moko ya kilo, yambo na bangomei mpe nsima na lisalisi. Mikumba mosusu nini oyo tomemaka? Nini elingi koloba kokamata ekangiseli ya Klisto likolo na bisomei? Elilingi na nsuka ya liteya oyo ekoki kosalisa yo olimbola ekangiseli ezali nini.

Matai 12:10–13.Ntango ozali kotanga makambo maye etali Yesu kobikisak moto na mokolo ya Sabata, libota na yo ekoki kosolola na ntina ya lolenge nini biso “tozongisami mobimba” na Mobikisi. Lolenge nini Sabata ekoki kozala mokolo ya libiki mpo na biso?

Kofulamaka na ndakisa ya Mobikisi na milongo oyo, libota na yo ekoki kosala mokanda ya banzela bokoki “kotikala malamu na mokolo ya Sabata” (molongo 12). Yeba kokotisa mabaku ya kosalisa basusu. Ekoki kosalisa mpo na kobomba mokanda na yo mpe kotala yango na mikolo ya eyenga ekoya.

Luka 11:33--36.Maniola lolenge nini okoki koteya libota na yo nini yango elingi koloba kozala “mobimba na pole” (milongo 34, 36). Liteya ya eloko songolo ekoki kosalisa? Bokoki lisusu kosolola ndenge ya komema pole ya Mobikisi kati na bomoi na biso, ndako na biso, mpe mokili. Mpo na makanisi, tala Video “The Light That Shineth in Darkness,” ChurchofJesusChrist.org.

Luka 11:37--44.Ntango mosusu libota na yo ekoki kolobela milongo oyo ntango bazali kosukola basani elongo. Bokoki kosolola na ntina ya mpo na nini ekozala likanisi mabe ya kosukola bobele libanda ya biloko lokola basani mpe bakopo. Bokoki nsima kosangisa oyo na mposa ya kozala sembo na misala na biso kaka na libanda te kasi lisusu na makanisi mpe mayoki na biso ya kati .

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo ekoki koyembama: “Oui, tes commandements,” Cantiques, no. 66

Kobongisa Boyekoli Na Yo Moko

Zala sikisiki. Okoki kozala na mikolo oyo koyekola makomi emonanaka lokola mpasi mingi to esimbaka mingi te koleka oyo ozalaki kolikya. Kotika te. Mpaka David A. Bednar ateyaki, “Sikisiki na biso na kosalaka oyo emonani makambo ya mike ekoki kokamba na mbano ya ntina ya molimo” (“More Diligent and Concerned at Home,” Liahona, sanza ya Zomi na moko. 2009, 20).

Elilingi
ngombe mibali mibale ekangisami elongo

“Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino, mpe boyekola na ngai; mpo ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino.”(Matai 11:29). Photograph © iStockphoto.com/wbritten

Bimisa na lokasa