Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya misato 6–12. Matai 9–10; Malako 5; Luka 9: “Yesu Atindi Baoyo Bazomi na Mibale”


“Sanza ya misato 6–12. Matai 9–10; Malako 5; Luka 9: ‘Yesu Atindi Baoyo Bazomi na Mibale,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya misato 6–12. Matai 9–10; Mark 5; Luka 9,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu azali kokulisa Petelo

Sanza ya misato 6–12

Matai 9–10; Malako 5; Luka 9

“Yesu Atindi Baoyo Bazomi na Mibale”

Makanisi ya koyekola kati na mwango oyo ezali mpo na kosalisa yo ozwa ndimbola ya yo moko kati na makomi. Nzokande, esengeli te, kotia na esika ya emoniseli ya yo moko oyo okoki kozwa na ntina ya biteni ya makomi nini koyekola to lolenge nini koyekola yango.

Koma Makanisi na Yo

Liloba ya mwakamwisi ya kobikisa ya Yesu epanzanaki noki noki. Bibele balandaki Ye, kolikyaka kozwa libiki uta na maladi na bango. Kasi ntango Mobikisi atalaki bibele ya bato wana, Amonaki mingi loleka bilei na bango na nzoto. Wana etondaki Ye na mawa, Amonaki nzokande ete bazalaki“bampate bazangi mobateli” (Matai 9:36). “Bambuma ya kobuka ezali mingi na elanga,” Alobaki, “nde basali bazali mingi te” (Matai 9:37). Yango wana Abiangaki Bapostolo zomi na mibale, “apesaki bango nguya,” mpe atindaki bango bateya mpe basalisa “bampate babunga na libota na Yisalaele” (Matai 10:1, 6). Lelo bosenga mpo na basali mingi koleka mpo na kosalisa bana ya Tata na Lola ezali kaka monene mpenza. Bapostolo Zomi na Mibale bazali kaka, kasi ezali na bayekoli mingi ya Yesu Klisto koleka baye ya liboso—bato oyo bakoki kosakola na mokili nyonso, “Bokonzi na Likolo ebelemi” (Matai 10:7).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 9:18-26; Malako 5:22-43

“Kobanga te, ndima kaka.”

Ntango Yailo mbala ya yambo asengaki Yesu abikisa mwana na ye ya mwasi, oyo “abelamaki na kokufa,” Yailo alobaki mbangu mbamgu kasi na elikya: “Yaka kotiela ye maboko na yo, … mpe akobika” (Malako 5:23). Kasi ntango akendaki, motindami alobaki na Yailo ete ntango elekaki mpenza: “mwana mwasi na yo asili kokufa: mpo na nini ozali kotungisa Nkolo lisusu?” (molongo 35). Ndenge moko, ekoki komonana lokola ntango elekaki mpenza mpo na mwasi oyo alimbolami kati na Malako 5:25–34, oyo anyokwamaki na kotanga makila mibu 12 .

Ntango ozali kotanga masolo oyo, okoki kokanisa makambo oyo esengeli kobikisama kati na bomoi na yo to libota na yo—kobakisaka makambo oyo ekoki komonana lokola “kobelama na kokufa” to ntango eleki mpenza mpo na kobika. Nini esepelisi yo na oyo etali makanisi ya bondimi kati na masolo oyo? Tala lisusu maye Yesu alobi na mwasi mpe na Yailo. Nini oyo oyoki Azali kolobela yo?

Tala lisusu Luka 8:41–56; Russell M. Nelson, “Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 39–42; Teachings of Presidents of the Church: Gordon B. Hinckley (2016), 333–42.

Elilingi
mwasi asemboli loboko mpo na kosimba elamba ya Yesu

Tiela Nkolo motema na yo, na Liz Lemon Swindle

Matai 10; Luka 9:1–6

Nkolo apesaka basali na Ye nguya ya kosala mosala na Ye.

Malako Yesu apesaki kati na Matai 10 epai ya Bapostolo na Ye ekoki kotatela biso mpe lokola, mpo ete biso banso tozali na likabo kati na mosala ya Nkolo. Nguya nini Klisto apesi Bapostolo na Ye mpo na kosalisa bango kokokisa etinda na bango. Lolenge nini okoki kozwa nguya na Ye kati na mosala obiangami kosala? (tala 2 Bakolinti 6:1–10; Malongi mpe Mayokani 121:34–46).

Ntango ozali kotanga etinda Klisto apesaki na Bapostolo na Ye, okoki kozwa makanisi etali mosala nkolo alingi yo kosala. Etando lokola oyo elandi ekoki kosalisa yo obongisa makanisi na yo:

Matai 10

Makanisi nazwi

Mobikisi apesaki bayekoli na ye nguya.

Nzambe akopesa ngai nguya nazali na yango mposa mpo na kosala mosala na ngai.

Tala lisusu Malako 6:7–13; Eteni ya Bondimi 1:6; Mokambi na Makomi, “Apostolo”; “Jesus Calls Twelve Apostles to Preach and Bless Others” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Matai 10:17–20

Ntango nazali na mosala ya Nkolo, Akofula ngai na maye nakoloba.

Nkolo amonaki liboso esalema ete bayekoli na Ye bakoniokwama mpe bakutunama mpo na oyo etali bondimi na bango —eloko moko ekokani na maye bayekoli ya lelo bakoki kokutana na yango. Kasi Alakaki bayekoli ete bakolinga koyeba na nzela ya Molimo nini bakoloba. Osila kokutana na makambo ntango elaka ya Nzambe oyo ekokisamaki kati na bomoi na yo, ntango mosusu ntango otatolaki, opesaki lipamboli, to osololaki na moto moko? Kanisa kokabola makambo na yo na moto moko olingaka to kokoma yango na zulunale. Nini oyoki efuli yo kosala mpo ete okoka kozala na kokutana na makambo ya boye mbala mingi koleka?

Tala lisusu Luka 12:11–12; Malongi mpe Mayokani 84:85.

Matai 10:34–39

Yesu alingaki koloba nini na “Nayei kotia kimia te kasi mopanga”?

Mpaka D. Todd Christofferson ateyaki: “Nazali na kondima ete mingi kati na bino bobwakisami mpe bowanganami na tata mpe mama, bandeko mibali mpe bandeko basi ntango bayambaki nsango malamu ya Yesu Klisto mpe bokotaki na liyokani na Ye. Na lolenge moko to mosusu, bolingo na yo ya likolo na ntina ya Klisto esengi libonza ya mikangano oyo ezali motuya epai na yo, mpe osopi mpizoli mingi. Nzokande na bolingo na yo moko oyo ekokita te, osimbi sikisiki na nse ya ekulusu oyo, kolakisaka yo moko ete ozali na na nsoni te mpo na Mwana ya Nzambe” (“Finding Your Life,” Ensign, Sanza ya misato 2016, 28).

Bolingi oyo ya kobungisa mikangano tolingaka mingi mpo na kolanda Mobikisi eyaka elongo na elaka ete “ye oyo akobungisa bomoi na ye mpo na ngai akozwa yango” (Matai 10:39).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malako 5:22–43.Ntango libota na yo ezali kotanga lisolo oyo elongo, bokoki kopema mpo na kotuna bato ya libota lolenge nini bakokaki komiyoka soki bazalaki Yailo, mwasi, to bato mosusu kati na lisolo yango. Okoki lisusu kolakisa bafoto ya lisolo yango, ndakisa oyo ezali kati na liteya oyo. Lolenge nini bafoto oyo elakisi bondimi ya bato kati ya masolo yango? (Tala lisusu bavideo “Jesus Raises the Daughter of Jairus” and “Jesus Heals a Woman of Faith” na ChurchofJesusChrist.org.) Okoki lisusu kokanisa mikakatano misusu libota na yo ekutanaka na yango. Lolenge nini tokoki kosalela maloba na Ye, “Kobanga te, Ndimela Kaka”? Malako 5:36).

Matai 10:39; Luka 9:23-26.Elingi koloba nini “kobungisa” bomoi na biso mpe “kozwa” yango? (Matai 10:39). Ntango mosusu bato ya libota bakoki kokabola makambo bakutanaki na yango oyo etalisi mateya ya Yesu kati na milongo oyo.

Matai 10:40.Lolenge nini yo na libota na yo bozali kosala mpo na koyambaka mpe kolandaka toli ya Bapostolo ya mikolo ya sika? Lolenge nini botosi na biso ya toli na bango ezali komema biso penepene ya Yesu Klisto?

Luka 9:61–62.Elingi koloba nini kotala nsima nsima ya kotiaka loboko na biso na etimeli? Mpo na nini ezalela oyo ebongi na biso mpo na bokonzi ya Nzambe te?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “When Faith Endures,” Hymns, no. 128.

Kobongisa Boyekoli Makomi Yo Moko

Yokela Molimo. Ntango ozali koyekola, tia bokebi na makanisi mpe mayoki na yo (tala Malongi mpe Mayokani 8:2–3), ata soki ezali lokola etali makambo oyo ozali kotanga te. Mayoki wana ekoki kozala makambo oyo mpenza Nzambe alingi yo oyeba mpe osala.

Elilingi
Yesu azali kotelemisa mwana mwasi uta na mbeto

TTalita Kami, na Eva Koleva Timothy

Bimisa na lokasa