Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya misato 27–Sanza ya mine 2. Matai 14; Malako 6; Yoane 5–6: “Bobanga Te”


“Sanza ya misato 27–Sanza ya minei 2. Matai 14; Luka 6; Yoane 5–6: ‘Bobanga Te,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya misato 27–Sanza ya minei 2. Matai 14; Malako 6; Yoane 5–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu azali kotambola elongo na bayekoli komemaka bitunga ya mampa

Sanza ya misato 27–Sanza ya minei 2

Matai 14; Malako 6; Yoane 5–6

“Bobanga te”

Ntango ozali koyekola Matai 14; Malako 6; mpe Yoane 5–6, luka bosolo oyo ezali na ntina monene mpo na yo. Okoki komituna mituna lokola “Lolenge nini masolo kati na mikapo oyo ezali kolobela yo?” “Biteni ya makomi nini namoni mpo na bomoi na ngai?” to “Nini nakolinga kokabola elongo na libota na ngai to elongo na basusu?” .

Koma Makanisi na Yo

Nini efulaki Petelo na molimo atika kimia ya masuwa na ye na katikati ya Mbu ya Galilea na ntango ya mopepe makasi? Nini ekambaki ye andima ete soki Yesu akokaki kotambola likolo ya mai, ye mpe akokaki? Tokoki koyeba malamu te, kasi ntango mosusu Petelo asosolaki ete Mwana ya Nzambe ayaki kaka mpo na kosala makambo ya kokamwa mpo na bato te kasi mpo na kopesa bato nguya lokola na Petelo ya kosala makambo ya kokamwa mpe. Libiangi ya Yesu, nsima ya nyonso, ezalaki “Yaka, landa ngai,” (Luka 18:22). Petelo andimaki libiangi oyo na mbala moko, azalaki na bolingi ya kondima yango lisusu, ata soki elingaki koloba kotelemela bobangi na ye mpe kosala likambo moko oyo emonanaki lokola ekoki kosalama te. Ntango mosusu Nkolo akotuna biso te tokita na masuwa katikati ya mopepe makasi to kopesa mwa bilei na biso ya lipa ntango bankoto bazali na mposa ya kolia, kasi Ye akoki kosenga biso tondima malako ata ntango tozali kososola yango mobimba te. Atako nini ekoki kozala mabengisii na Ye epai na biso, ekoki ntango mosusu komonana lokola likambo ya kokamwa to kutu ya kobangisa. Kasi makamwisi ekoki kosalama soki biso, lokola Petelo, tokotia mpembeni bobangi na biso, bantembe na biso, mpe bososoli na biso oyo ezali na ndelo mpe kolanda Ye kati na bondimi.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekolai Makomi Yo Moko

Yoane 5: 16–47

Yesu Klisto akumisaki Tata na Ye.

Mokangano katikati ya Tata na Lola mpe bana na Ye moko na moko esalami mpo na kozala moko ya bule. Na milongo oyo, Yesu Klisto apesaki biso ndakisa ya kofulama ya kolanda mokanganoi na biso elongo na Tata na Lola. Tanga Yoane 5:16–47, mpe tia elembo to koma mbala nyonso omoni liloba Tata. Lolenge nini Mwana akumisaka Tata, mpe lolenge nini okoki kolanda ndakisa na Ye? Oyekoli nini mpo na oyo etali lolenge nini Tata ayokaka oyo na ntina ya Mwana? Nini ofulami kosala mpo na kolendisa mokangano na Tata na yo na Lola?

Tala lisusu Yoane 17; Jeffrey R. Holland, “Bonene ya Nzambe,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2003, 70-73.

Elilingi
mapa mpe bambisi

Yesu aleisaki na lolenge ya kokamwa bato nkoto mitano na mapa mitano mpe mbisi mibale.

Matai 14:15–21; Malako 6:33–44; Yoane 6:5–14

Mobikisi akoki kokomisa monene makabo na ngai ya mike mpo na kokokisa bantina na Ye.

Esila yo kmiyoka ya kokoka te mpo na kokokisa bamposa oyo ozali komona nzinga nzinga na yo, na ndako na yo, na mikangano na yo, to na lingomba? Bayekoli ya Yesu basengelaki komiyoka ya kokoka te ntango Ye asengaki bango baleisa bato ya nzala nkoto mitano ntango bobele mapa mitano mpe mbisi mibale ekokaki kozwama. Ntango ozali kotanga oyo etali likamwisi oyo esalamaki nsima, maniola lolenge nini Nzambe akoki kosalela makabo mike na yo ya mosala mpo na kopambola baye bazali nzinga nzinga na yo. Lolenge nini Ye akumisaki makasi na yo ntango osaleli Ye? Tala esakola oyo uta na Ndeko mwasi Michelle D. Craig: “Yo elongo na ngai tokoki kopesa oyo tozali na yango epai ya Klisto, mpe Ye akobakisa makoki na biso. Oyo bozali na yango mpo na kobonza ekoki mpo na bino—atako na bozangi makoki na bino ya bomoto—soki botaleli ngolu ya Nzambe” (“Divine Discontent,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 54).

Matai 14:22-33; Malako 6:45–52; Luka 6:15-21

Yesu Klisto abiangi ngai natia pembeni bobangi mpe bantembe na ngai mpe nasalela bondimi kati na Ye.

Kanisa na molimo na yo makambo ya etando elimbolami kati na Matai 14:22–33; Malako 6:45–52; mpe Yoane 6:15–21. Banza lolenge nini Petelo mpe bayekoli mosusu bakokaki komiyoka. Oyekoli nini mpo na oyo etali kimoyekoli uta na maloba mpe misala ya Mobikisi na milongo oyo? Oyekoli nini uta na maloba mpe misala ya Petelo? (Tala lisusu 1 Nephi 3:7.) Nini Nkolo azali kobengisa yo osala oyo ekoki kozala lokola kokita na bwato? Ozwi nini na kati ya milongo miye oyo epesi yo bokasi ya kosalela bondimi na yo kati na Yesu Klisto?

Yoane 6:22–71

Lokola moyekoli ya Yesu Klisto, nasengeli kozala na bolingi ya kondima mpe koyamba bosolo, ata ntango ezali mpasi mpo na kosala yango.

Ntango Yesu Amilobeli kozala “Lipa ya bomoi” (Yoane 6:48), mingi bamonaka yango lokola “maloba ya makasi” (Yoane 6:60). Lolenge nini maloba ya Petelo kati na Yoane 6:68–69 ezali kosalisa yo na bantango oyo malongi ya Mobikisi ezali komonana lokola mpasi mpo na kondima to kosalela? Nini esimbi yo na ntina ya litatoli ya Petelo? Nini ezali mwa “maloba ya bomoi ya seko” (Yoane 6:68) oyo esalisi yo otikala ya komipesa mpo na kolanda Mobikisi?

Tala lisusu M. Russell Ballard, “To Whom Shall We Go?,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2016, 90-92.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 14:15–21.Kanisa lolenge nini okoki kosalisa libota na yo ekanisa mapa mpe mbisi boni esengeli mpo na koleisa bato nkoto mitano. Likamwisi kati na Matai 14:15–21 eteyi biso nini mpo na oyo etali Mobikisi? Kanisa kokabola likambo moko ntango omiyokaki ozalaki na mingi te mpo na kopesa mpe Mobikisi abakisaki makasi na yo.

Matai 14:22–33.Libota na yo ekoki kosepela kosala lisusu lisano ya lisolo oyo ezali kati na milongo oyo. Mpo na nini bayekoli bazalaki kobanga? Mpo na nini Petelo azalaki na makoki ya kolonga bobangi na ye mpe kotika bwato? Lolenge nini alakisaki bondimi atako ntango abandaki kozinda? Lolenge nini tozali ntango mosusu lokola Petelo?

Yoane 5:1–16.Bengisa bato ya libota bakoma mbala boni maloba “kobikisa” ezali komonana kati na milongo oyo. Na ndenge nini Yesu Klisto akoki kobikisa bato? Ntango nini mpe lolenge nini Ye abikisaki biso?

Yoane 6:28–58.Pesa moto ya libota moko na moko eteni ya lipa mpo na kolia, mpe solola matomba ya kozwa uta na lipa mpe bilei mosusu ya kolongonu. Nsima boluka kati na milongo oyo elongo, kolukaka mpo na nini Yesu Klisto Amibiangaki “lipa ya bomoi” (Yoana 6:35). Elingi koloba nini “kolia” lipa ya bomoi? (tala D. Todd Christofferson, “The Living Bread Which Came Down from Heaven,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 36–39).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo ekoki koyembama: “Oh, Quel Amour,” Cantiques, no. 112.

Kobongisa Boyekoli Makomi Yo Moko

Luka makanisi ya molimo ya yo moko. Kati na boyekoli ya yo moko mpe ya libota na yo, komisukisa na biteni ya makomi oyo elobelami na mateya oyo te. Nkolo azali ntango mosusu na bitinda mpo na yo kati na mikapo oyo ekomami te awa. Luka yango na libondeli.

Elilingi
Yesu azali kobimisa Petelo libanda na mai.

Kotelemela Mopepe, na Liz Lemon Swindle

Bimisa na lokasa