Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya minei 17–23. Matai 18; Luka 10: “Nakosala Nini Mpo na Koyingela na Bomoi ya Seko?”


“Sanza ya minei 17–23. Matai 18; Luka 10: ‘Nakosala Nini Mpo na Koyingela na Bomoi ya Seko?,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya minei 17–23. Matai 18; Luka 10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Mosamalia malamu

Mosamalia Malamu, na Dan Burr

Sanza ya minei 17–23

Matai 18; Luka 10

“Nakosala Nini Mpo na Koyingela na Bomoi ya Seko?”

Ntango ozali kotanga mpe komaniola Matai 18 mpe Luka 10, sala keba na bitinda ya Molimo Mosantu. Ye akoyebisa yo lolenge nini mateya mpe masolo oyo ekoki kosalema epai na yo. Koma makanisi oyo ozali kozwa.

Koma Makanisi na Yo

Ntango otuni Nkolo motuna, okoki kozwa eyano oyo ozelaki te. Nani azali mozalani na ngai? Moto songolo oyo azali na mposa ya lisungi mpe bolingo na yo. “Nani azali ntina koleka kati na bokonzi ya lola? Mwana. Esengeli bobele mpo na kolimbisa motuki mbala nsambo? Te, osengeli kolimbisa ntuku nsambo mbala nsambo. (Tala Luka 10:29–37; Matai 18:4, 21–22.) Biyano oyo tozelaki te uta na Nkolo ekoki kobengisa biso kobongola lolenge na biso ya kokanisa, koyoka mpe kosala. Soki ozali koluka bolingi ya Nkolo mpo ete olingi mpenza koyekola uta na Ye, Nkolo akoteya yo lolenge ya kotambwisa bomoi na nzela oyo ekambaka na bomoi ya seko elongo na Ye.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na KoyekolaMakomi Yo Moko

Matai 18:21–35

Nasengeli kolimbisa basusu soki nazali kozela Nkolo alimbisa ngai.

Likanisi ya Petelo ya koloba ete akoki kolimbisa moto songolo mbala nsambo ekoki komonisama kozala ya boboto mpenza, kasi Yesu ateyaki mobeko ya motuya mingi koleka. Eyano na Ye, “nayebisi bino te, kino na mbala sambo: kasi kino na mbala ntuku nsambo mbala nsambo” (eteni 22), ezalaki koteya te na ntina ya mitango kasi na ntina ya kokolisa ezalela ya Kimoklisto ya bolimbisa. Ntango ozali kotanga lisese ya mosali azanga mawa, manyola mbala boni oyokaki mawa mpe okabolaki mpasi ya Nzambe. Ezali na moto songolo oyo azali na mposa ya kokabola mpasi mpe koyoka mawa na yo?

Mpaka David E. Sorensen apesaki likebisi oyo ya ntina: “Atako tosengeli kolimbisa mozalani oyo atuki biso, tosengeli ntango nyonso kosala na etingia mpo na kopesa lisusu nzela te ete botuki wana ezongela lisusu. … Bolimbisi esengi biso te tondima to tosepela na mabe. … Kasi lokola tozali kobundisa mabe, tosengeli te kopesa nzela na boyini to nkanda ekonza makanisi to misala na biso” (“Bolimbisi Ekobongola Boyini na Bolingo,” Liahona, Sanza ya mitano 2003, 12).

Luka 10:1–20

Banani bazali Bantuku Nsambo?

Kolandaka ndakisa etiamaki na bantango ya Boyokani ya Kala (tala Esode 24:1; Mitango 11:16), Yesu Klisto “aponaki bantuku nsambo mosusu,” likolo ya Bapostolo na Ye Zomi na Mibale, mpo na kotatola na ntina na Ye, koteya nsango malamu na Ye, mpe kosunga Ye na mosala na Ye. Ndakisa oyo ekobaka na Eklezia ezongisama. Bantuku Nsambo babiangemaka mpo na kosunga Bazomi na mibale na etinda na bango lokola banzeneneke ya kafukafu ya Yesu Klisto na mokili mobimba.

Tala Malongi mpe Mayokani 107:25–26, 33–34, 97.

Luka 10:25–37

Mpo na kozwa bomoi ya seko, nasengeli kolinga Nzambe mpe mozalani na ngai lokola ngai moko.

Ezali ntina tomikundola ete lisese ya Mosamalia malamu ezalaki lolenge ya Yesu ya koyanola na mituna mibale: “Nakosala nini mpo na koyingela na bomoi ya seko?” mpe “Nani azali mozalani na ngai?” (Luka 10:25, 29). Ntango ozali kotanga lisese oyo, bomba mituna oyo na makanisi. Biyano nini ozwi?

Na eleko ya Yesu, bozangi boyokani ya Bayuda mpe Basamalia ewumelaki uta bikeke. Basamalia bazalaki bakitani ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na Samalia oyo babalanaki na bapagano. Bayuda bamonaki ete Basamalia bakosamaki na bosangani na bango na Bapagano mpe bandimi basila kopengwa. Bayuda basengelaki kokende mobembo ya bakilometele na kokimaka koleka na Samalia. (Tala lisusu Luka 9:52–54; 17:11–18; Yoane 4:9; 8:48.)

Mpo na nini bokanisi ete Mobikisi aponaki Mosamalia, moto oyo ayinamaki na Bayuda, lokola ndakisa ya mawa mpe ya kolinga mozalani? Lisese oyo efuli yo mpo na kosala nini?

Tala lisusu Moziya 2:17; “Lisese ya Mosamalia Malamu” mpe “Mosamalia Malamu” (videos), ChurchofJesusChrist.org.

Luka 10:38–42

Toponaka “eteni wana ya malamu” na kosalaka mikolo nyonso maponi oyo ekambaka na bomoi ya seko.

Na Luka 10:38–42, Yesu na boboto abengisaki Malata akanisa na ndenge ekeseni na ntina ya lolenge azalaki kosalela ntango na ye. Nsima ya kotanga biteni oyo, Ndeko mwasi Carol F. McConkie ateyaki: “Soki tokozala bule, tosengeli koyekola kofanda na makolo ya Moko oyo Azali Bule ya Yisalaele mpe kopesa ntango na bosantu. Totiaka mpembeni telefone, mokanda ya makambo ezanga nsuka oyo tosengeli kosala, mpe mitungisi ya makambo ya mokili? Losambo, boyekoli mpe boyoki ya liloba ya Nzambe ebengisaka bolingo mpe libiki na Ye ya peto na milimo na biso. Tika tozwa, ntango ya kozala bule, mpo ete tokoka kotondisama na Molimo na Ye ya bule mpe bosantisi” (“The Beauty of Holiness,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 11). Okoki kolinga kotala lolenge nini osalelaka ntango na yo—atako na makambo ya malamu. Ezali na eloko moko songolo koleka ya “bosenga” (eteni 42) oyo esengaka mingi bokebi na yo?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 18:1–11.Mpo na nini Yesu alingaka biso tokoma lokola bana mike? Bizaleli nini bana mike bazalaka na yango oyo tokoki kokolisa mpo na kokoma Baklisto mpenza? (tala Moziya 3:19).

Elilingi
Yesu na bana

Yesu alingaka bayekoli na Ye bakoma lokola bana mike.

Matai 18:15.Lolenge nini tokoki kosalela liteya na kati ya Matai 18:15 na bizaleli ya libota na biso? Lolenge nini kosalela yango mpo ete epambolaka libota na biso?

Matai 18:21–35.Lisese oyo eteyi biso nini na ntina ya Yesu Klisto? Eteyi biso nini na ntina ya lolenge nini mpo na kosalela basusu?

Luka 10:25–37.Bandeko ya libota bakoki kosepela kolata bakazaka mpe kosalela lisese oyo. Lolenge nini ntango mosusu tozali lokola bato bakeseni na kati ya lisese? Lolenge nini Mobikisi azali lokola Mosamalia malamu? Lolenge nini tokoki kozala lokola Mosamalia malamu?

Tokoki koyemba elongo loyembo to loyembo ya bana oyo esungaka bosolo na kati ya lisese oyo. Ndakisa moko ezali “Lord, I Would Follow Thee” (Hymns, no. 220), kasi ezali na mosusu ebele. Bandeko ya libota bakoki kosepala kozwa loyembo to miziki mpe kolimbola lolenge nini ekokanina lisese.

Luka 10:38–42.Ntango mosusu ezalaka mpasi kokotisa makambo ya molimo na kati ya manaka ya libota na yo? Lisolo ya Maliya mpe Malata ekoki kofula liyangani ya libota to likita ya mpokwa na oyo etali lolenge nini kosala yango malamu koleka. Lokola libota, bokoki kokoma ndenge ya kopona “eteni wana ya malamu” (Luka 10:42).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana..

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Jesus Said Love Everyone,” Chants pour Enfants, 61.

Kobongisa Mateya na Biso

Kolisa ezalela ya bolingo na libota. Lolenge bato ya libota bayokaka mpe lolenge basalelaka moko na mosusu na libota ekoki kozala na litomba makasi na molimo ya ndako na yo. Sunga bato ya libota bakokisa mokumba na bango ya kosala libota ya bolingo, ya limemia mpo ete moto nyonso amiyoka na bokengi mpo na kokabola mayele, mituna mpe matatoli. (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi,15.)

Elilingi
Klisto na Malia mpe Malata

Klisto na Ndako ya Maliya mpe Malata, na Walter Rane

Bimisa na lokasa