Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya minei 3–9. Pasika: “O Kufa, Elonga na Yo Ezali Wapi?”


“Sanza ya minei 3–9. Yoane 1: ‘O Kufa, Elonga na Yo Ezali Wapi?,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya minei 3–9. Pasika,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Lilita na Elanga

Sanza ya minei 3–9.

Pasika

“O Kufa, Elonga na Yo Ezali Wapi?”

Ntango ozali kotanga Matatoli ya Lisekwa ya Mobikisi kati na liteya oyo, koma mayoki mpe makanisi oyo eyeli yo uta na Molimo Mosantu.

Koma Makanisi na Yo

Na poso ya nsuka ya bomoi ya Mobikisi, Bayuda mingi nzinga nzinga na Ye bazalaki kosala elongo kati na mimeseno ya Pasika. Bazalaki kolengela elambo, bazalaki koyemba nzembo, mpe bazalaki kosangana elongo mpo na komikundola bokangoli ya ndako ya Yisalaele uta na bowumbo ya Baezipito. Mabota ezalaki koyoka lisolo ya anjelu oyo bababebisi bazalaki koleka bandako ya bankoko na bango oyo kani bikuke batiaka elembo na bikuke na bango na makila ya mwana mpate. Na kati ya bokembeli oyo nyonso etondaki mpenza na lisese ya bokangoli, penepene moke bayebaki ete Yesu Klisto, Mwana ya Mpate ya Nzambe, azalaki pene ya kokangola bango uta na bowumbo ya lisumu mpe liwa—na nzela ya mpasi na Ye, liwa na Ye, mpe Lisekwa na Ye. Atako bongo, ezalaki na baoyo bayebaki lisusu Yesu lokola Masiya balakelamaki, Mokangoli na bango ya seko. Uta na ntango wana kino lelo, bayekoli ya Yesu Klisto batatoli na mokili mobimba “ete Klisto akufi mpo na masumu na biso … ; mpe ete akundami mpe ete asekwi na mokolo na misato” (1 Bakolinti 15:3–4).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 21–28

Yesu Klisto akangolaka ngai uta na lisumu mpe liwa, alendisaka ngai na botau na ngai, mpe abondisaka ngai na mimekano na ngai.

Lolenge moko ya koyekama na mapamboli ya Bomikabi ya Mobikisi poso oyo ezali kolekisa ntango mokolo na mokolo kotangaka maye etali poso ya nsuka ya bomoi ya Yesu (manaka moko oyo ekoki kosalamela elandi). Nini ozwi na mikapo miye oyo esalisi yo oyoka bolingo ya Mobikisi? Maniola maye mikapo miye eteyi yo mpo na oyo etali lolenge nini Akoki kokangola yo uta na lisumu, liwa, mimekano, mpe botau. Lolenge nini ozali kosalela bondimi kati na nguya na Ye ya bokangoli?

Tala lisusu Easter.ComeuntoChrist.org.

Elilingi
Yesu likolo na ekulusu

Bobaki na Ekulusu, na Louise Parker

Matai 28:1–10; Luka 24:13–35; Yoane 20:19–29; 1 Bakolinti 15:1–8, 55

Banzeneneke mingi batatoli na ntina ya Lisekwa ya Yesu Klisto.

Kanisa nini yango elingaki kozala lokola mpo na bayekoli kotala Yesu kotiolama, konyokwama, mpe kobakama na ekulusu. Bamonaki Nguya na Ye, bayokaki bosolo ya mateya na Ye, mpe bazalaki na bondimi ete Ye azalaki Mwana ya Nzambe. Kozala nzeneneke ya liwa na Ye esengeli kosala bayekoli na Ye bayoka mawa mpe mobulungano. Kasi nokinoki bakomaki banzeneneke ya likamwisi monene ya Lisekwa na Ye.

Okoki koyekola nini uta na masolo ya baoyo bazalaki banzeneke ya Lisekwa ya Mobikisi? Tia elembo to koma boyebi ya moto na moto kati na Matai 28:1–10; Luka 24:13–35; Yoane 20:19–29; mpe 1 Bakolinti 15:1–8, 55. (Banzeneke basusu ya Klisto Mosekwi ekoki komonana kati na 3 Nefi 11; Mormon 1:15; Etele 12:38–39; Malongi mpe Mayokani 76:19–24; 110:1–10; mpe Joseph Smith—Mambi ya kala 1:15–17.) Nini esepelisi yo mpo na oyo etali matatoli ya banzeneneke oyo? Nsima ya lisekwa ya Mobikisi, basusu basekwisamaki mpe babimelaki bato mingi (tala Matai 27:52–53; 3 Nefi 23:9). Lolenge nini bondimi na yo kati Mobikisi mpe elaka ya lisekwa ezali na nguya na lolenge otambwisaka bomoi na yo?

Tala lisusu “Yesu Asekwi,” “Nkolo Mosekwi Amonani na Bapostolo,” “Bapambolami Ezali Bango Oyo Bamoni Te, Kasi Bandimeli” (videos), ChurchofJesusChrist.org.

1 Petelo 1:3–11

Yesu Klisto apesi ngai elikya mpe esengo.

Maloba to biteni ya maloba nini kati na 1 Petelo 1:3–11 epesi yo elikya mpo na Yesu Klisto? Ntango nini oyokaki elikya wana?

Mpaka Gerrit W. Gong atatoli ete Lisekwa “ epesaka elikya na baoyo babungisaki binama, baoyo babungisaki makoki ya komona, koyoka, to kotambola, to baoyo bakanisaki babungisamaki na bokono ebikisaka te, maladi ya moto, to mosusu oyo elembisaka makoki. Ye akuti biso. Ye akomisi biso mobimba. … [Lisusu,] lokola ‘ Nzambe Ye moko asikoli masumu ya mokili’ [Alma 42:15], … Ye akoki, na mawa, kosalisa biso engebene na maladi na biso . … Toyambolaka mpe tosalaka manso tokoki. Azingaka biso sekoseko ‘na maboko ya bolingo na ye’ [2 Nefi 1:15]” (“Hosanna and Hallelujah—The Living Jesus Christ: The Heart of Restoration and Easter,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 54).

Tala lisusu Alma 27:28; 36:1–24; 3 Nefi 9:11–17; Moroni 7:40–41.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

ComeuntoChrist.org.Easter.ComeuntoChrist.org ezali na manaka mpe bolimboli ya maye masalamaka na poso ya nsuka ya bomoi ya Mobikisi. Mokolo moko na moko ya poso, libota na yo ekoki kozongela bandimbola oyo mpo na komona maye Mobikisi asalaki mokolo wana, to okoki kotanga makambo etali poso na ye ya nsuka kati na makomi lokola libota (tala mokanda epesameli makanisi kati na “Makanisi mpo na Koyekola Makomi Ya Moto ye Moko” na likolo).

Mokanda ya Nzembo mpe Chants pour Enfants.Bokanisa koyemba nzembo elongo ya makambo etali Bomikabi mpe Lisekwa ya Mobikisi na poso oyo, bakisa mosusu oyo bomesani na yango mingi te. Tala masolo ya bobakisi ya Hymns to Children’s Songbook, na nse ya masolo lokola “Bomikabi,” “Pasika,” to “Bosekwi.”) Mpo na kosalisa bato ya libota bayekola nzembo, okoki kolakisa bafoto oyo ezali kobalana na maloba.

“Yesu Klisto” liboke ya bilili na Ebombelo ya Buku ya Nsango Malamu.Liboke ya Ebombelo ya Buku ya Eklezia na nkombo ya “Jesus Christ” ezali na video, misala ya ntoki, mpe miziki oyo ekoki kosalisa libota na yo kosepela na Bosekwi ya Mobikisi na Pasika oyo.

“Klisto na Bomoi: Litatoli ya Bapostolo.”Lokola libota, botanga “Klisto na Bomoi: Litatoli ya Bapostolo” (ChurchofJesusChrist.org). Bengisa moto ya libota moko na moko azwa nsango moko ya Pasika uta na litatoli oyo mpo na kokabola elongo na basusu. Ndakisa, okokaki kokela mikanda ya mayebisi mpo na kobimisa na media sociaux, kotia na ekuke ya liboso ya ndako, to kotia kati na ndako na yo.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Yesu Asekwi,” Chants pour Enfants,70., 70.

Kobongisa Boyekoli Makomi Yo Moko

Botia mikano bokoki kokokisa. Kolekisaka kutu mwa minuti na mokolo moko mpo na koyekolaka makomi ekoki kopambola bomoi na bino. Bomipesa na koyekola mokolo moko na moko, bozwa nzela mpo na komikundola bomipesi na bino, mpe bosala nyonso mpo na kolandela. Soki bobosani, botika te. Bandela lisusu kaka.

Elilingi
Klisto na Getesemane

Getesemane [Getesemane], na Adam Abram

Bimisa na lokasa