Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya minei 24–30. Yoane 7–10: “Nazali Mobateli Mpate Malamu”


“Sanza ya minei 24–30. Yoane 7–10: ‘Nazali Mobateli Mpate Malamu,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya minei 24–30. Yoane 7–10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu na mwasi bakwei na mabele

Napesi Yo Etumbu Te, na Eva Koleva Timothy

Sanza ya minei 24–30

Yoane 7–10

“Nazali Mobateli Mpate Malamu”

Ntango ozali kotanga Yoane 7–10, okoki kozwa makanisi kowuta na Molimo Mosantu na ntina ya mibeko ya malongi na mikapo oyo. Kokomaka makanisi na yo ekoki kosunga yo osala mwango mpo na kosalela yango.

Koma Makanisi na Yo

Atako Yesu Klisto ayaki mpo na komema “kimia [mpe] bolingi ya malamu epai ya bato” (Luka 2:14), ezalaki na “bokabwani na kati ya bato mpo na ye” (Yoane 7:43). Bato oyo batatolaki makambo moko wana bayaki kosukisa na bokeseni mpenza na oyo Yesu azalaki. Basusu basukisaki, “Ye azali moto malamu,” mpe basusu balobaki, “Ye akosaki bato” (Yoane 7:12). Ntango abikisaki mokufi miso na mokolo ya Saba, basusu balobaki na esika na yango “Moto oyo azali ya Nzambe te, mpe ye atosi te mokolo ya saba,” mpe basusu batunaki, “Lolenge nini moto ya masumu akoki kosala makamwisi ya boye?” (Yoane 9:16). Nsima, atako mabunga nyonso wana, baye balukaki bosolo bayebaki nguya na kati ya maloba na Ye, mpo ete “moto moko te naino aloba lokola moto oyo” (Yoane 7:46). Ntango Bayuda batunaki Yesu ete “yebisa biso mpenza” soki azalaki Klisto, Amonisaki mobeko oyo ekoki kosunga biso tokesenisa bosolo na mabe: “Mpate na ngai eyokaka mongongo na ngai,” Ye alobaki, “mpe nayebi yango, mpe elandaka ngai” (Yoane 10:24, 27).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Yoane 7: 14–17

Ntango nasaleli bosolo oyo Yesu Klisto ateyaki, nakoya koyeba ezali solo.

Bayuda basepelaki ete Yesu ayebaki ebele, mpamba te Atangaki kelasi te (tala molongo 15)—kasi, na ndenge te bazalaki kozwa yango. Kati na eyano ya Yesu, ateyaki lolenge ekeseni ya koyeba bosolo oyo ezali na kati ya moto nyonso, na kozangaka kotala boyekoli to mayele na ye. Engebene na Yoane 7:14–17, lolenge nini okoki koyeba ete malongi oyo Yesu ateyaki ezali solo? Lolenge nini likambo oyo esungaki yo kokolisa litatoli na yo ya nsango malamu?

Yoane 8:2–11

Mawa ya Mobikisi epesami na bato banso.

Kolobaka na ntina ya masolo ya Mobikisi elongo na mwasi oyo asalaki ekobo, Mpaka Dale G. Renlund alobaki: “Solo, Mobikisi andimaki ekobo te. Kasi apesaki mpe etumbu te na mwasi. Alendisaki ye abongola bomoi na ye. Azalaki na likoki ya kobongola yango mpo na motema ya bokaboli mpasi mpe mawa na Ye. Bobongoli ya Biblia ya Joseph Smith endimisi mbando ya oyo mpo na ye kokoma moyekoli: ‘Mpe mwasi akumisaki Nzambe uta na ntango wana, mpe andimelaki na nkombo na ye’ [tala Yoane 8:11, makomi ya nse c]” (“Mobateli Mpate na biso ya Malamu,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 30).

Ntango nini oyokaki lokola mwasi wana, kozwaka mawa na esika ya kozwa etumbu uta na Mobikisi? Ntango nini ozalaki lokola bakomi mpe Bafalisai, kofundaka to kosambisaka basusu atako ntango ozangi lisumu te? (tala Yoane 8:7). Nini okoki koyekola lisusu uta na nzela ya Mobikisi kolobelaka bakomi mpe Bafalisai mpe mwasi oyo azwamaki na ekobo? Oyekoli nini na ntina ya bolimbisi ya Mobikisi ntango otangi biteni oyo?

Tala lisusu “Go and Sin No More” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Yoane 9

Soki tozali na bondimi, Nzambe akoki komilakisa Ye moko na mitungisi na biso.

Nini Yoane 9:1–3 eteyi na ntina ya mimekano mpe mitungisi ya bomoi? Ntango ozali kotanga Yoane 9, manyola lolenge nini “misala ya Nzambe [emimonisamaki]” na bomoi ya moto oyo abotamaki mokufi miso. Lolenge nini emimonisami na bomoi na yo—mpe lisusu na mitungisi na yo?

Yoane 10:1–30

Yesu Klisto azali Mobateli Mpate Malamu.

Atako okutanaka na mpate te mpe mobateli mpate, kotangaka Yoane 10, epai wapi Mobikisi alobi, “nazali mobateli mpate malamu,” ekoki koteya yo bosolo ya ntina na ntina na Ye. Mpo na kozwa bosolo, luka biteni ya maloba oyo elimboli nini mobateli mpate malamu akokani na yango mpe nsima kanisa lolenge nini maloba oyo esalelami na Mobikisi. Oyo elandi ezali mwa bandakisa:

  • Molongo 3: “Abiangaki mpate na ye moko na nkombo na yango, mpe akambaka yango.”

  • Molongo 11: Ye “apesaka bomoi na ye mpo na mpate.”

  • Molongo 16: “Ekozala lisanga moko, mpe mobateli mpate moko.”

Oyo ezali mituna mosusu mpo na kosunga yo omanyola mokapo oyo: Lolenge nini Yesu azali lokola ekuke? (tala milongo 7–9). Lolenge nini Apesaki yo “bomoi … mingi koleka”? (molongo 10). Ntango nini oyokaki ete Ye moko ayebi yo? (tala molongo 14). Lolenge nini oyebaka mongongo ya Mobateli Mpate Malamu? (tala molongo 27).

Tala lisusu Nzembo 23; Ezekiele 34; Alma 5:37–39; 3 Nefi 15:21–16:5; Gerrit W. Gong, “Mobateli Mpate Malamu, Mwana Mpate ya Nzambe,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 97–101.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Yoane 7:24.Mpo na kosunga libota na yo esosola liteya ya Yesu na Yoane 7:24, okoki kolakisa bango eloko moko oyo ezali kolakisa lolenge moko libanda kasi ezali ya kokesena na kati. To bandeko ya libota bakoki kokabola mayebi oyo eteyaki bango basambisa te na kotalaka bomoto ya libanda. Okoki lisusu kokoma makambo ya malamu ya ndeko moko na moko ya libota oyo emonanaka te libanda na miso (tala lisusu 1 Samwele 16:7; Thomas S. Monson, “Tala Basusu Lolenge Bakoki Kokoma,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2012, 68–71).

Yoane 8:31–36.Elimboli nini mpo na kozala “mosaleli ya lisumu”? (tala lisusu Moroni 7:11). Bosolo nini oyo eteyamaki na Yesu ekoki kopesa biso bonsomi?

Elilingi
Klisto azali kobikisa mokufi miso

Yesu Azali Kobikisa Mokufi Miso, na Carl Heinrich Bloch

Yoane 9.Lolenge nini okoki kosunga libota na yo etala lisolo ya Yesu kobikisaka mokufi miso na kati ya Yoane 9? Bokoki kolakisa lisolo yango libanda na kosalelaka yango elongo to kolakisa video “Yesu Abikisi Moto oyo Abotamaki Mokufi Miso” (ChurchofJesusChrist.org). Bopemisa lisolo ntango mosusu mpo ete bandeko ya libota bakoka kotanga milongo uta na Yoane 9. Bengisa bango bakoma mateya oyo bayekoli uta na lisolo, lokola lolenge elimboli mpo na kokoma mobongwani na nsango malamu ya Yesu Klisto.

Yoane 10:1–18, 27–29.Mpo na kokotisa bandeko ya libota na boyekoli uta na lisese ya mobateli mpate malamu, tuna moko na moko kati na bango ayema elilingi ya moko oyo elandi: moyibi, ekuke, mobateli mpate, elombe (mosali mosolo) mbwa ya zamba, mpe mpate. Bengisa bango batanga Yoane 10:1–18, 27–29, mpe nsima bosolola lokola libota maye Mobikisi ateyaki na ntina ya makambo maye bayemaki.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “The Lord Is My Shepherd,” Hymns, no. 108.

Kobongisa Boyekoli Makomi mpo na Yo Moko

Luka maloba mpe makomi oyo ekoki kofula. Ntango ozali kotanga, Molimo ekoki komema maloba songolo to makomi na kati ya makanisi na yo oyo efuli mpe elendisi yo to emonisami kokomama bobele mpo na yo. Kanisa kokoma maloba to makomi oyo efuli yo na Yoane 7–10.

Elilingi
Klisto na mwana mpate

Kobunga Lisusu Te, na Greg K. Olsen

Bimisa na lokasa