Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya minei 10–16. Matai 15–17; Malako 7–9: “Yo Ozali Klisto”


“Sanza ya minei 10–16. Matai 15–17; Malako 7–9: ‘Yo Ozali Klisto,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya minei 10–16. Matai 15-17; Malako 7–9,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Kobongwana ya Klisto

Kobongwana, na Carl Heinrich Bloch

Sanza ya minei 10–16.

Matai15-17; Malako 7-9

“Yo Ozali Klisto”

Kotanga makomi ebengisaka Molimo Mosantu na kati ya bomoi na yo. Moko ya etinda ya motuya ya Molimo Mosantu ezali kotatola Yesu Klisto. Ntango ozali kotanga makomi poso oyo, sala keba na mayoki ya molimo oyo elendisaka litatoli na yo ya Mobikisi.

Koma Makanisi na Yo

Ezali kokamwa te ete Bafalisai mpe Basudukai basenga Yesu alakisa bango “elembo uta na lola”? Ebele ya makamwisi na Ye eyebana malamu ekokaki te? Olobi nini mpo na mateya na Ye ya nguya to ndenge nzike oyo Ye akokisaki masakoli ya kala? Bosenga na bango etindamaki na bozangi bilembo te kasi na bozangi bolingi ya “kososola bilembo” mpe kondima yango. (Tala Matai 16:1–4.)

Petelo, lokola Bafalisai mpe Basudukai, bazalaki banzeneneke ya makamwisi ya Mobikisi mpe bayokaki mateya na Ye. Kasi litatoli ya solo ya Petelo, “Yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe na bomoi,” eyaki te na nzela ya mayoki ya nzoto—ya ye “mosuni mpe makila.” Litatoli na ye emonisamaki epai na ye na ya biso “Tata oyo azali na lola.” Emoniseli ezali libanga likolo na liye wapi Mobikisi atongaki Eklezia na Ye ntango wana mpe sikawa—emoniseli uta na lola epai ya basali na Ye. Mpe oyo ezali libanga likolo na yango tokoki kotonga kimoyekoli na biso—emoniseli ete Yesu azali Klisto mpe ete basali na Ye basimbi “bafungola ya bokonzi.” Ntango totongami likolo ya moboko oyo “bikuke ya lifelo ekoka te kolonga” [biso]” (Matai 16:15–19).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 6:13–17

Litatoli ya Yesu Klisto eyaka na nzela ya emoniseli.

Soki Yesu atunaki batu lelo, “Bato bazali koloba ete Mwana na Moto nazali nani?” nini bakokaki koloba? Lolenge nini olingaki koyanola soki Yesu atunaki bino, “Bino bolobaka ete ngai nazali nani?” (Tala Matai 16:13–15.)

Manyola litatoli na yo ya Mobikisi mpe lolenge nini ozwaki yango. Oyekoli nini uta na Matai 16:15 -17 oyo ekoki kolendisa [litatoli] yango? Soki okolinga koyekola mingi mpo na oyo etali litatoli mpe emoniseli ya moto ye moko, tala makomi oyo: Yoane 15:26; 2 Nefi 31:17–18; Alma 5:45–48; mpe Malongi mpe Mayokani 8:2–3.

Tala lisusu “” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Matai 16:13-19; 17:1-9; Malako 9:2-9

“Bafungola ya bokonzi ya likolo” ezali na mabele lelo.

“Bafungola ya bokonzi ya likolo” oyo Mobikisi alakaki kopesa Petelo ezali bafungola ya bonganganzambe (Matai 16:19). Bafungola ya bonganganzambe ezali nini? Mpo na Nini tosengeli kozala na yango? Manyola mituna oyo ntango ozali kotanga oyo etali elaka ya Mobikisi kati na Matai 16:13–19 mpe bokokisi na yango kati na Matai 17:1–9; Malako 9:2–9 (tala lisusu Bobongoli ya Joseph Smith, Malako 9:3 [kati na Malako 9:4, matangi na nse ya lokasa a]).

Mikanda misusu mpo na kosalisa yo oyekola oyo etali bafungola ya bonganganzambe ezali na Malongi mpe Mayokani 65:2; 107:18–20; 110:11–16; 128:9–11; “Keys of the Priesthood” kati na Bokambi mpo na Makomi(scriptures.ChurchofJesusChrist.org); mpe nsango ya Mpaka Gary E. Stevenson “Where Are the Keys and Authority of the Priesthood?,” (Liahona, Sanza ya mitano 2016, 29–32). Ntango ozali koyekola maziba oyo, kanisa kosala mokanda ya maye oyekoli na ntina ya bafungola ya bonganganzambe mpe mapamboli oyo ewutaka na yango. Mpo na nini okanisi fungola ezali elembo malamu mpo ete bayengebene bayangela mosala ya bonganganzambe?

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “Bafungola mpe Likoki ya Bonganganzambe,” Liahona,, Sanza ya mitano 2020, 69-72; Dikisionele ya Biblia, “Mbongwana, Ngomba ya.”

Elilingi
ekeko ya Petelo kosimbaka bafungola

Bafungola ya bonganganzambe ezali likoki ya kokamba misala ya bonganganzambe.

Matai 17:14-21; Malako 9:14-29

Ntango ozali koluka bondimi monene koleka, nakoki kobanda na bondimi oyo nazali na yango.

Tata oyo alobelami kati ya Matai 17 mpe Malako 9 azalaki na ntina ya kondima te ete Yesu akokaki kobikisa mwana na ye ya mobali. Asengaki bayekoli ya Yesu babikisa mwana na ye ya mobali, kasi bakokaki te. Kasi ntango asengaki Mobikisi likamwisi, aponaki kolakisa bondimi . “Nkolo, nazali kondima,” alobaki. Nsima, na kondimaka ete bondimi na ye ezalaki ya kobonga nie te, abakisaki, “Sunga ngai na ntembe na ngai.”

Molimo eteyi yo nini ntango ozali kotanga oyo etali likamwisi oyo? Lolenge nini Tata na Lola asungaki oyo omatisa bondimi na yo? Nini okoki kosala mpo na kotonga likolo ya bondimi oyo ozali na yango? Ntango mosusu okoki kosangisa mokanda ya makomi, bansango ya likita, to makambo oyebi oyo elendisaki bondimi na yo.

Tala lisusu Jeffrey R. Holland, “Nkolo, Nandimeli,” Liahona, Sanza Mitano 2013, -95.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 15:7–9; Malako 7:6–7.Bokeseni nini ezali kati na kotosa Nzambe na bibebu to maloba,na biso, mpe kotosa ye na mitema na biso?

Matai 15:17-20; Malako 7:18-23.Mpo na nini tosala keba na oyo totiaka kati na minoko na biso? Engebene na maye Yesu ateyaki na milongo oyo, mpo na nini tosengeli kozala kutu na bokebi mingi koleka na oyo etali maye ebimaka na minoko na biso—mpe ebimaka na mitema na biso? Lolenge nini tokoki kobomba mitema na biso peto?

Matai 16:15–17.Lolenge nini Nzambe amonisaka epai na biso ete Yesu azali “Klisto mpe Mwana ya Nzambe na bomoi”? (molongo 16). Boniboni tokoki komilengela mpo ya kozwa emoniseli oyo uta na Ye?

Matai 16:13–19; 17:1–9.Mpo na koteya bana bafungola ya bonganganzambe, okoki kobeta lisolo ya Mpaka Gary E. Stevenson na ntina ya koangamaka libanda ya motuka na ye (tala video “Where Are the Keys?” na ChurchofJesusChrist.org). Mpo na koteya bana maye etali bafungola ya bonganganzambe, okoki kotika bana na yo basalela bafungola mpo na kofungola ndako, motuka, to bikangeli mosusu. Kanisa kolakisa foto ya Mokambi ya Eklezia mpe kotatola ete azali na bafungola nyonso ya bonganganzambe lokola Petelo.

Matai 17:20.Baprofeta na bondimi kati na Yesu Klisto balongolaki bangomba na koloba ya solo (tala Yakobo 4:6; Mose 7:13). Kasi mbala mingi, wana ezali likamwisi tozali na yango mposa te. Mokambi M. Russell Ballard ateyaki: “Soki tozali na bondimi moke lokola mbuma ya sinapi, Nkolo akoki kosalisa biso tolongola bangomba ya bolembisi nzoto mpe ya ntembe kati na mosala oyo ezali liboso na biso ntango tozali kosala elongo na bana ya Nzambe, kobakisa bato ya libota, bandimi ya Eklezia, mpe baoyo bazali bandimi ya Eklezia te” (“Makabo ya Motuya uta na Nzambe,” Liahona, Sanza ya mitano 2018, 10). Bangoma mosusu nini ezali kati na bomoi na biso oyo esengeli kolongolama? Lolenge nini tokoki kolakisa bondimi kati na nguya ya Nzambe mpo na kosalisa biso tolongola bangomba oyo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Oui, je crois en Christ,” Cantiques, no. 71.

Kobongisa Mateya na Biso

Bosanga elongo mbala mingi. Mokambi Henry B. Eyring ateyaki: “Kozangisa mokolo moko te libaku ya kosangisa bana elongo mpo na koyekola na ntina ya malongi ya Yesu Klisto. Bangonga ya boye emonanaka mingi te mpenza na bokokanisi na makasi ya monguna” (“The Power of Teaching Doctrine,” Ensign,, Sanza ya mitano 1999, 74).

Elilingi
Moto elongo na mwana ya mobali liboso ya Yesu

Nkolo, Namemeli Yo Mwana na Ngai ya Mobali, na Walter Rane

Bimisa na lokasa