Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mitano 1–7. Luka 12–17; John 11: “Sepela elongo na Ngai; mpo ete Nazwi Mpate na Ngai Oyo Ebungaki”


“Sanza ya mitano 1–7. Luka 12–17; Yoane 11: ‘Sepela elongo na Ngai; mpo ete Nazwi Mpate na Ngai Oyo Ebungaki,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya mitano 1–7. Luka 12–17; Yoane 11,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
mobali ayambi mwana na ye ya mobali

Mwana Mobali oyo Abungaki, na Liz Lemon Swindle

Sanza ya mitano 1–7

Luka 12–17; Yoane 11

“Sepela elongo na Ngai; mpo ete Nazwi Mpate na Ngai Oyo Ebungaki”

Ntango ozali kotanga Luka 12–17 mpe Yoane 11, na losambo luka oyo Tata na Lola alingi yo oyeba mpe osala. Boyekoli na yo ya mikapo oyo ekoki kofungola motema na yo na bansango elobelami mpo na yo.

Koma Makanisi na Yo

Na mabaku mingi, 99 kati na 100 ekomonana lokola malamu koleka—kasi te ntango mitango ya boye etangami mpo na balingami bana ya Nzambe (tala Malongi mpe Mayokani 18:10). Na likambo wana, atako molimo moko tosengeli koluka yango na bozindo mpe ya boyokisi motema mpasi “kino [biso] tokozwa yango” (Luka 15:4), lokola Mobikisi ateyaki na lisese ya mpate ebunga. Nsima nde bosepeli ekoki kobanda, mpo ete “esengo ekozala na lola mpo na mosumuki moko oyo ayamboli, koleka bato malamu ntuku libwa na libwa oyo balingi koyambola te” (Luka 15:7). Soki yango emonananii kozala sembo te, ezali malamu tomikundola ete, solo, ezali na moto moko te oyo “asengeli koyambola te.” Biso nyonso tozali na mposa ya lobiko. Mpe nyonso tokoki kokota na mosala ya kobikisa, kosepelaka elongo likolo ya molimo oyo ebikisami (tala Malongi mpe Mayokani 18:15–16).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Luka 12; 14–16

Napambolami ntango natie motema na ngai na makambo ya seko.

Mpo na nini Nzambe asengelaki koloba “Ozali zoba” na mosali moko ya makasi mpe mozwi oyo atongaki bibombelo minene mpe atondisaki yango na bambuma ya misala na ye? (tala Luka 12:16–21). Na mikapo oyo kati ya Luka, Mobikisi ateyi masese mingi oyo ekoki kosunga biso totombola bomoni na biso mosika likolo ya biloko ya mokili mpo na biloko ya seko. Boko ya masese oyo etangami awa: Lolenge nini okolimbola nsango ya moko na moko? Nini okanisi oyo Nkolo azali koyebisa yo?

Tala lisusu Matai 6:19–34; 2 Nefi 9:30; Malongi mpe Mayokani 25:10.

Luka 15

Tata na Lola asepelaka ntango baoyo babungaki bazwami.

Ntango ozali kotanga masese Yesu ateyaki na kati ya Luka 15, oyekoli nini na ntina ya lolenge nini Tata na Lola ayokaka na ntina ya baoyo basumuki to na maloba mosusu “babungi”? Lolenge nini mokambi ya molimo—to moko na moko kati na biso—ayoki mpo na bango? Kanisa lolenge nini Bafalisai mpe bakomi bakoki koyanola mituna oyo (tala Luka 15:1–2). Eyano ya Yesu ekoki kozwama na kati ya masese misato kati ya Luka 15. Ntango ozali kotanga, kanisa na ntina ya oyo Yesu azalaki koteya bakomi mpe Bafalisai na masese oyo.

Okoki lisusu kokanisa kokoma bokokani mpe bokeseni kati ya masese. Ndakisa, okoki kotala oyo ebungaki na kati ya lisese moko na moko mpe mpo na nini yango ebungaki, lolenge nini ezwamaki, mpe lolenge nini bato bayanolaki ntango ezwamaki. Bansango nini Yesu azalaki na yango mpo baoyo “babungaki”—mpe lisusu baoyo bakanisi te ete babungi? Bansango nini Azalaki na yango mpo na bato oyo bazali koluka baoyo babungi?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 18:10–16; Jeffrey R. Holland, “The Other Prodigal,” Ensign, Sanza ya mitano 2002, 62–64.

Elilingi
mwasi azali koluka mbongo

Mbongo ya Motako oyo Ebungaki, na James Tissot

Luka 16:1–12

Klisto azalaki koteya nini na kati ya lisese ya kalaki azanga bosembo?

Mpaka James E. Talmage alimbolaki liteya moko oyo tokoki koyekola uta na lisese: “Zala na etingia; mpo ete mokolo oyo okoki kosalela nkita na yo ya mokili ekoleka. Zwa liteya uta ata na bato bazanga bosembo mpe bato mabe; soki bazali na bokebi mpenza lokola mpo na kopesa makanisi na bango mokolo mokoya sima, lolenge nini osengeli, yo oyo ondimelaka makambo ya seko, kopesa yango! Soki oyekolaki bwania te mpe bokebi na bosaleli ‘nkita ezanga bosembo,’ lolenge nini okozala na boyengebene na nkita ya malamu?” (Yesu Klisto [1916], 464). Mateya nini mosusu ozwaki na kati ya lisese oyo?

Luka 17:11–19

Kozongisa matondi mpo na mapamboli na ngai ekomema ngai pene ya Nzambe.

Soki ozalaki moko ya bato ya maba zomi, okanisi okokaki kozonga mpo na kotonda Mobikisi? Mapamboli nini ebakisama oyo moto ya maba ya botondi azwaki mpo ete apesaki matondi?

Osengeli lisusu komanyola maloba ya Mobikisi, “Bondimi na yo epetoli yo” (molongo 19). Na makanisi na yo, lolenge nini botondi mpe bondimi ezali kosala elongo? Lolenge nini nyonso mibale esungaka biso kokoma mto ya mobimba? Video “Mokambi Russell M. Nelson na Nguya ya Libiki ya Botondi” (ChurchofJesusChrist.org) ekoki kosunga yo omanyola mituna miye.

Tala lisusu Dale G. Renlund, “Banza Bolamu mpe Bonene ya Nzambe,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 41–44.

Yoane 11:1–46

Yesu Klisto azali Bosekwi mpe Bomoi.

Likamwisi ya kolamusa Lazalo uta na bawei ezalaki nguya mpe litatoli ezanga mbeba ete Yesu azalaki mpenza Mwana ya Nzambe mpe Masiya ya elaka. Maloba, makomi to ndimbola nini na kati ya Yoane 11:1–46 elendisaka bondimi ete Yesu Klisto azali “lisekwa mpe bomoi”? Elimboli nini mpo na yo ete Yesu azali “lisekwa, mpe bomoi”?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Luka 15:1–10.Bandeko ya libota na yo basosoli ndenge nini toyokaka ntango eloko songolo ebungi—to ebungisami? Mpo na kozwa bato kosolola na ntina ya maye babungisa , bakoki kobanda lisolo etali masese ya mpate oyo ebungaki mpe mbongo ebunga. To okoki kosakana lisano oyo moto songolo abombani mpe bandeko ya libota mosusu bameki koluka ye. Lolenge nini lisano oyo esungi biso tososola masese oyo?

Luka 15:11–32.Lolenge nini tokoki kokokana na tata na kati ya lisolo ntango tolingaki bandeko oyo babunga? Nini tokoki koyekola uta na boyebi ya mwana ya nkulutu oyo akoki kosunga biso tozala mingi lokola Klisto? Na bandenge nini tata na kati ya lisese oyo azali lokola Tata na biso na Lola?

Luka 17:11–19.Mpo na kosunga bandeko ya libota basalela lisolo ya bato zomi ya maba, okoki kobengisa bango bapesana makomi ya botondi moko na mosusu. Bokoki lisusu koyemba elongo “Count Your Blessings” (Hymns, no. 241) mpe botanga mapamboli libota na bino ezwi.

Yoane 11:1–46.Bandeko ya libota bakoki kotala video “Lazalo Asekwi uta na Bawei” (ChurchofJesusChrist.org) mpe kokabola matatoli na bango ya Yesu Klisto.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana..

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Dear to the Heart of the Shepherd,” Hymns, no. 221.

Kobongisa Mateya na Biso

Salela masolo mpe bandakisa mpo na koteya mabongi to mibeko ya nsango malamu. Mobikisi mbala mingi ateyaki na ntina ya mabongi ya nsango malamu na kosalelaka masolo mpe masese. Kanisa bandakisa mpe masolo ya bomoi na yo moko oyo ekoki kosala libongi ya nsango malamu ezala na bomoi to kosala kati na libota na yo (tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi,22).

Elilingi
moto afukami na botondi liboso ya Yesu

Wapi Libwa, na Liz Lemon Swindle

Bimisa na lokasa