Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mitano 15–21. Matai 21–23; Malako 11; Luka 19–20; Yoane 12: “Tala, Mokonzi na Yo Azali Koya”


“Sanza ya mitano 15–21. Matai 21–23; Malako 11; Luka 19–20; Yoane 12: ‘Tala, Mokonzi na Yo Azali Koya,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya mitano 15–21. Matai 21–23; Malako 11; Luka 19–20; Yoane 12,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
moto likolo ya nzete ntango Yesu azalaki kopusana

Zakaliya na Nzete ya Sikamole, na James Tissot

Sanza ya mitano 15–21

Matai 21–23; Malako 11; Luka 19–20; Yoane 12

“Tala, Mokonzi na Yo Azali Koya”

Yambo ya kotanga nsango oyo, tanga Matai 21–23; Malako 11; Luka 19–20; mpe Yoane 12. Koma makanisi oyo okoki kokabola na libota na yo to na kati ya biteyelo na yo ya Eklezia.

Koma Makanisi na Yo

Mobikisi azalaki na nzala nsima ya mobembo kolongwa Betani kino na Yelusaleme, mpe nzete ya figi na mosika emonanaki lokola na mbuma ya kolia. Kasi ntango Yesu apusanaki na nzete, Amonaki ete yango ezalaki kobota mbuma te (tala Matai 21:17–20; Malako 11:12–14, 20). Na lolenge moko, nzete ya figi ezalaki lokola bakambi ya bonzambe ya lokuta na Yelusaleme: mateya na bango ya mpamba mpe kotalisa misala na bango ya bosantu kaka na libanda ebotaka mbuma ya molimo te. Bafalisai mpe bakomi bamonisamaki kotosa mitindo mingi kasi bazangisaki kotosa mitindo ebele: ya kolinga Nzambe mpe kolinga mozalani na yo lokola yo moko (tala Matai 22:34–40; 23:23).

Na ngambo mosusu, bato ebele babandaki koyeba mbuma malamu kati na mateya ya Yesu. Ntango akomaki na Yelusaleme, bayambaki Ye na bitape oyo bakataki uta na banzete mpo na kobongisa nzela na Ye, kosepelaka ete, ata soki ewumeli ntango molai, lokola lisakoli ya kala elobaki, “Mokonzi na yo Azali Koya” (Zakaliya 9:9). Ntango ozali kotanga na poso oyo, kanisa na ntina ya bambuma ya mateya ya Mobikisi mpe libonza ya bomikabi na bomoi na yo mpe lolenge nini okoki kobota “mbuma ebele” (Yoane 12:24).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Luka 19:1–10

Nkolo asambisaka te na bomoto ya libanda kasi atalaka bamposa ya motema.

Na ntango ya Yesu, bato mingi bazalaki kokanisa ete bapibilikani, to bafutisi mpako, bazalaki na bosembo te mpe bazalaki koyiba uta na bato. Mpo ete Zakaliya, mokonzi ya bapubilikani, azalaki na bozwi, bazalaki kokanisela ye mabe. Kasi Yesu atalaki motema ya Zakaliya. Nini Luka 19:1–10 emonisi na ntina na motema ya Zakaliya? Okoki kokoma maloba kati ya milongo oyo ezali kolimbola maye Zakaliya asalaki mpo na kolakisa bomipesi na ye epai ya Mobikisi. Nini ezali bamposa ya motema na yo? Osalaka nini mpo na koluka Mobikisi, lokola Zakaliya asalaki?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 137:9.

Matai 23; Luka 20:45–47

Yesu alingaka lokuta te.

Mosala Mobikisi asalaki elongo na na bakomi mpe Bafalisai esali bokeseni ya litombaya ntina na kosala elongo na na Zakaliya. Lokola Mokambi Dieter F. Uchtdorf alimbolaki, “[Yesu] azwaki nkanda ya sembo na bato ya lokuta lokola bakomi, Bafalisai mpe Basadukai—baye bazalaki komeka komonisama basembo na ntina ete bazwa nkembo, nguya, mpe nkita ya mokili, na konyokolaka bato oyo bango basengelaki kopambola” (“On Being Genuine,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 81).

Na kati ya Matai 23, Mobikisi asalelaki masese mingi mpo na kolimbola lokuta. Kanisa kokoma to kotala masese yango mpe kokomaka nini eteyi na ntina ya lokuta. Bokeseni ezali nini kati na lokuta mpe bato na botau oyo biso banso tomonaka ntango tozali komeka kosalela nsango malamu? Nini efuli yo mpo na kosala bokeseni na ntina ya mateya ya Mobikisi?

Tala lisusu Bible Dictionary, “Hypocrite.”

Matai 21:1–11; Malako 11:1–11; Luka 19:29–44; Yoane 12:1–8, 12–16

Yesu Klisto azali Mokonzi na ngai.

Ntango Yesu akomaki na Yelusaleme bobele mikolo mibale yambo akokisa Bomikabi na Ye, baoyo bayebaki Ye lokola Mokonzi na bango balakisaki bomipesi na bango na kopakolaka Ye, kotiaka bilamba mpe mandalala na nzela na Ye kino na Yelusaleme, mpe kogangaka masanzoli. Kanisa lolenge nini mikanda miye milandi ekoki kolendisa bososoli na yo ya makambo maye, oyo ebandaki na nsuka ya poso ya bomoi ya Mobikisi.

Lolenge nini okoki kotosa mpe kozwa Mobikisi lokola Nkolo mpe Mokonzi na yo?

Tala lisusu Gerrit W. Gong, “Ozana mpe Aleluya—Yesu Klisto ya Bomoi: Motema ya Bozongisi mpe Pasika,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 52–55; “Bokoti ya Nkembo ya Nkolo kati ya Yelusaleme” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Matai 22:34–40

Mibeko minene mibale ezali ya kolinga Nzambe mpe kolinga basusu lokola yo moko.

Soki omiyoki ya kolemba ntango ozali koluka kolanda Yesu Klisto, maloba ya Mobikisi epai ya mosambisi na kati ya Matai 22 ekoki kosunga yo olendisa mpe obongisa kimoyekoli na yo. Oyo ezali moko ya lolenge ya kosala yango: Koma mitindo ebele ya Nkolo. Lolenge nini likambo moko na moko oyo okomi ekangani na mitindo minene mibale? Lolenge nini kotiaka makanisi na mitindo minene mibale esungaka yo obatela misusu?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 21:12–14.Lolenge nini maloba ya Yesu mpe misala na kati na Matai 21:12–14 elakisi lolenge Akanisaki na ntina na tempelo? Lolenge nini tolakisaka lolenge tokanisaka na ntina na tempelo? Nini tokoki “kotika” (molongo 12) na bomoi na biso mpo na kosala ete ndako na biso ekoma mingi lokola tempelo? Kanisa koyembaka loyembo na ntina na tempelo, lokola “I Love to See the Temple” (Children’s Songbook, 95).

Matai 21:28–32.Mateya nini uta na lisese ya moto azalaki na bana mibali mibale ekoki kosunga libota na yo? Na ndakisa, okoki kosalela lisolo mpo na kososola ntina ya botosi ya sembo mpe boyamboli. Ntango mosusu libota na yo ekoki kokoma likomi mpo na kolimbola lisese mpe kopesa nzela na mosusu kosalaka mikumba ekeseni.

Matai 22:15–22; Luka 20:21–26.Bana bakoki kosepela kosala bambongo ya libende na elilingi ya Yesu mpe nkoma” likolo na yango. Bakoki kokoma na nsima ya bambongo yango mwa “makambo oyo ezali ya Nzambe” (Matai 22:21) oyo tokoki kopesa Ye. Bokoki lisusu kosolola na ntina na oyo elimboli kozala na elilingi ya Mobikisi “mpe nkoma” likolo na biso (Matai 22:20; tala lisusu Moziya 5:8; Alma 5:14).

Yoane 12:1–8.Lolenge nini Maliya alakisi bolingo na ye mpo na Mobikisi? Lolenge nini tolakisaka bolingo na biso mpo na Ye?

Elilingi
mwasi azali kopangisa makolo ya Yesu na nsuki na ye

Kosokola Makolo ya Yesu, na Brian Call

Yoane 12:42–43.Makama nini ya lingomba ya bato elembisaka ntango mosusu biso uta na kolakisaka to kolobelaka bondimi na biso na Klisto? Mpo na kozwa bandakisa ya bato oyo bakomipesa te na makambo ya mokili, tala Daniele 1:3–20; 3; 6; Yoane 7:45–53; 9:1–38; mpe Moziya 17:1–4. Lolenge nini tokoki kolakisa botosi epai ya basusu ntango bazali kolakisa to kolobela boyambi ya lingomba na bango?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Rejoice, the Lord Is King!,” Hymns, no. 66.

Kobongisa Mateya na Biso

Salela ntoki mpo na kolendisa bandeko ya libota.Gospel Art Book mpe Gospel Media Library na ChurchofJesusChrist.org ezali na bilili mpe bavideo mingi oyo ekoki kosunga [libota na yo] etala makanisi to makambo” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi22).

Elilingi
Bokoti ya Klisto na nkembo

Bokoti ya Nkembo, na Walter Rane

Bimisa na lokasa