Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mitano 22–28. Joseph Smith—Matai 1; Matai 24–25; Malako 12–13; Luka 21: “Mwana ya Moto Akoya”


“Sanza ya mitano 22–28. Joseph Smith—Matai 1; Matai 24–25; Malako 12–13; Luka 21: “Mwana ya Moto Akoya,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika: 2023 (2022)

“Sanza ya mitano 22–28. Joseph Smith—Matai 1; Matai 24–25; Malako 12–13; Luka 21,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Boyei ya Mibale

Boyei ya Mibale, na Harry Anderson

Sanza ya mitano 22–28

Joseph Smith—Matai 1; Matai 24–25; Malako 12–13; Luka 21

“Mwana na Moto Akoya”

Ntango otangi Joseph Smith—Matai 1; Matai 24–25; Malako 12–13; mpe Luka 21, okoki kotuna, “Bansango nini mikapo oyo ezali na yango mpo na ngai? mpo na libota na ngai? mpo na libiangi na ngai?”

Koma Makanisi na Yo

Bayekoli ya Yesu bamonaki lisakoli na Ye kokamwa: tempelo ya nguya ya Yelusaleme, ndako ya molimo mpe ya bonkoko ya Bayuda, ebukanaki mpenza mpo ete “kuna [eloko] moko te etikalaki … libanga likolo ya mosusu.” Kasi, bayekoli balingaki koyeba mingi. “Ntango nini makambo maye makosalema?” batunaki. “Mpe nini ezali elembo ya boyei na yo?” (Joseph Smith—Matai 1:2–4). Biyano ya Mobikisi esakolaki ete bobebi monene ekoya na Yelusaleme—lisakoli oyo ekokisamaki na mibu 70 nsima ya Yesu—ezali pete soki tokokanisi na bilembo ya Boyei na Ye na mikolo ya nsuka. Makambo maye mamonisami kutu kozala malamu koleka tempelo na Yelusaleme ekolakisama kozala mpo na ntango moke—moyi, sanza, minzoto, bikolo, mpe mbu. Atako “banguya ya lola ekoningana” (Joseph Smith—Matai 1:33). Soki tolengelami na molimo, mobulungano oyo ekoki koteya biso totia motema na biso na eloko moko oyo ezali solo solo mpo na libela. Lokola Yesu alakaki, “Lola mpe mabele ekoleka; kasi maloba na ngai ekoleka te. … Mpe oyo nyonso akoyekama na liloba na ngai, akoyokisama mpasi te” (Joseph Smith—Matai 1:35, 37).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Joseph Smith—Matai ezali nini?

Joseph Smith—Matai, oyo ezwami na kati ya Liyaka ya Ntalo Monene, ezali Bobongoli ya Joseph Smith ya molongo ya nsuka ya Matai 23 mpe mobimba ya Matai 24. Mabongoli ya Joseph Smith efulama ezongisi makambo ya solo ya ntina koleka oyo ebungaki. Milongo 12–21 elimboli bobebi ya Yelusaleme ya kala; milongo 21–55 ezali na masakoli etali mikolo ya nsuka.

Joseph Smith—Matai 1:21–37; Malako 13:21–37; Luka 21:25–38

Masakoli etali Boyei ya Mibale ekoki kosunga ngai natalela makambo makoya na mikolo ya nsima na bondimi.

Mitungisi ekoki kolongola kimia na kotanga na ntina na makambo oyo ekomema na Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto. Kasi ntango Yesu asakolaki na ntina ya makambo oyo, Ye ayebisaki bayekoli na ye “batungisama te” (Joseph Smith—Matai 1:23). Lolenge nini bokoki “komitungisa te” ntango boyoki maye matali boningani ya mabele, bitumba, makambo ya mpasi, mpe banzala? Kanisa na ntina na motuna oyo ntango ozali kotanga milongo oyo. Tia elembo to koma toli ya elikya oyo ozwi.

Tala lisusu Gospel Topics, “Boyei ya Mibale ya Yesu Klisto,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Joseph Smith—Matai 1:26–27, 38–55; Matai 25:1–13; Luka 21:29–36

Nasengali kozala ntango nyonso ya komilengela mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi.

Nzambe amonisaki te “mokolo to ntango oyo wapi Mwana na moto akoya” (Matai 25:13). Kasi Ye alingaka te ete mokolo wana ekomela biso na “bozangi koyeba” (Luka 21:34), yango wana Apesi biso toli na ntina ya lolenge nini komilengela.

Ntango otangi milongo oyo, kitola masese mpe bokokani mosusu Mobikisi asalelaki mpo na koteya biso tomilengela ntango nyonso mpo na Boyei na Ye ya Mibale. Oyekoli nini uta na yango? Nini maklambo yango efuli yo kosala?

Okokaki lisusu kotala lolenge nini Mobikisi alingi yo mpo na kosunga kolengela mokili mpo na Boyei na Ye ya Mibale. Okanisi nini na oyo elimboli kozala ya komilengela mpo na koyamba Mobikisi ntango Akoya? Nsango ya Mpaka D. Todd Christofferson “Komilengelaka mpo na Bozongi ya Nkolo” (Liahona, Sanza ya mitano 2019, 81–84) ekoki kosunga yo omanyola oyo.

Tala lisusu Russell M. Nelson, “Yamba Lobi ekoya na Bondimi,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2020, 73–76.

Matai 25:14–30

Tata na Lola azali kozela ngai nasalela makambo na Ye na bwanya.

Na kati ya lisese ya Mobikisi, “talanta” elobelaki mosolo. Kasi lisese ya batalanta ekoki kotinda biso komanyola lolenge nini ya kosalela nyonso ya mapamboli na biso, kasi bobele mosolo te. Nsima ya kotanga lisese oyo, okoki kokoma mwa mapamboli mpe mikumba oyo Tata na Lola apesaki yo. Azali kozela osala nini na mapamboli oyo? Lolenge nini okoki kosalela makabo oyo na bwanya koleka?

Matai 25:31–46

Ntango nasalisi basusu, nazali kosalisa Nzambe.

Soki omitungisi lolenge nini Nkolo akosambisa bomoi na yo, tanga lisese ya mpate mpe ntaba. Mpo na nini okanisi kolengela baye bazali kokelea ekoki kosunga yo omilengela mpo na “koyingela na bokonzi” ya Nzambe?

Lolenge nini lisese oyo ezali kokokana na mibale mosusu kati na l Matai 25? Bansango nini ya bokokani ezali kati ya nyonso misato?

Tala lisusu Moziya 2:17; 5:13.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na KoyekoliaMakomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Joseph Smith—Matai.Mpo na kosunga libota na yo etanga mokapo oyo, bengisa bango baluka yambo mateya ya Mobikisi na ntina ya lolenge nini tokoki komilengela mpo na Boyei na Ye ya Mibale (tala, na ndakisa, milongo 22–23, 29–30, 37, 46–48). Nini tokoki kosala mpo na kolanda toli oyo? Libota na yo ekoki kosepela koyemba “Ntango Akoya Lisusu” (Children’s Songbook, 82–83) yema bilili ya oyo bazali kokanisa Boyei ya Mibale ya Mobikisi lolenge ekozala.

Joseph Smith—Matai 1:22, 37.Elimboli nini kokumisa liloba ya Nzambe? Lolenge nini tokoki kosala yango biso moko mpe lokola libota? Lolenge nini kosala bongo ekosunga biso tokima makambo oyo eyokisaka motema mpasi?

Matai 25:1–13.Okoki kosalela elilingi ya baseka zomi oyo esimbisi mwango oyo mpo na kosolola Matai 25:1–13. Makambo ya mike mike nini tomoni na kati ya elilingi oyo elimbolami na kati na milongo oyo?

Okoki kokata likasa na lolenge ya matanga ya mafuta mpe kobomba yango nzinga nzinga ya ndako na yo. Okoki kokangisa makasa wana na biloko songolo lokola makomi to elilingi ya tempelo. Ntango bandeko ya libota bazwi makasa oyo ebombamaki, bokoki kosolola lolenge nini makambo maye esungaka biso tomilengela mpo na Boyei ya Mibale.

Malako 12:38–44; Luka 21:1–4.Milongo oyo eteyi nini na ntina na lolenge nini Mobikisi amonaka mabonza na biso? Lakisa libota na yo lolenge nini kofuta moko na zomi mpe mabonza ya kokila epai ya Nkolo. Lolenge nini mabonza oyo esungaka botongi ya bokonzi ya Nzambe? Ndenge mosusu ezali nini oyo tokoki kobonzela “nyonso oyo [tozali na yango]” epai ya Nkolo? (Malako 12:44).

Elilingi
mwasi azali kotia mbongo na kesi

Misolo ya mike mike ya Mwasi akufela mobali, na Sandra Rast

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo ekoki koyembama: “When He Comes Again,” Children’s Songbook, 82–83.

Kobongisa Boyekoli Makomi ya moto Ye Moko

Lengela nzinganzinga na yo. “Nzinganzinga na biso ekoki kosimba na bozindo makoki na biso ya koyekola mpe koyoka bosolo” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi15). Meka koluka esika ya koyekola makomi oyo ekobengisa nguya ya Molimo Mosantu. Miziki mpe bilili ya kolendisa ekoki lisusu kobengisa Molimo.

Elilingi
basi basimbi minda

Mitano na Bango Bazalaki na Bwanya, na Walter Rane

Bimisa na lokasa