Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mitano 29–Sanza ya motoba 4. Matai 26; Malako 14; Yoane 13: “Mpo na Kokanisa”


“Sanza ya mitano 29–Sanza ya motoba 4. Matai 26; Malako 14; Yoane 13: ‘Mpo na Kokanisa,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya mitano 29–Sanza ya motoba 4. Matai 26; Malako 14; Yoane 13,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Elambo ya Nsuka

Mpo na Kokanisa Ngai, na Walter Rane

Sanza ya mitano 29–Sanza ya motoba 4.

Matai 26; Malako 14; Yoane 13

“Mpo na Kokanisa”

Ntango ozali kotanga makambo oyo elimbolami kati na Matai 26; Malako 14; mpe Yoane 13, sala keba na makanisi nyonso okozwa, mingi mingi oyo elendisaka bondimi na yo na Yesu Kisto mpe bomipesi na yo epai na Ye.

Koma Makanisi na Yo

Mokolo yambo ya kufa na Ye, Yesu apesaki bayekoli na Ye eloko moko mpo bakanisa Ye. Ye “azwaki lipa, mpe apambolaki yango, mpe akataki yango mpe apesaki yango epai ya bayekoli, mpe alobaki, Bozwa, bolia; oyo ezali nzoto na ngai. Mpe azwaki kopo, mpe azongisaki matondo, mpe apesaki bango yango, kolobaka, Bomela yango bino banso; mpo oyo ezali makila na ngai” (Matai26:26–28).

Yango esalemaki pene ya mibu 2,000 eleki, na esika oyo moko na biso akoki komona te, na lokota oyo kaka bato moke kati na biso bakoki kososola. Kasi sikawa, Eyenga nyonso na bisika na biso ya mayangani, banganganzambe, oyo bapesami ndingisa mpo na kosala na nkombo ya Yesu Klisto, basalaka oyo Ye asalaki. Bazwaka lipa mpe mayi, bapambolaka yango, mpe bapesaka yango epai ya moko na moko kati na biso, bayekoli na Ye. Ezali likambo moko ya pete—ekoki kozala na eloko mosusu ya pete koleka, ya motuya koleka kolia lipa mpe komela mayi? Kasi lipa mpe mayi wana ezalaka bule mpo na biso mpo ete esungaka biso tokanisa Ye. Ezali lolenge na biso ya koloba, “nakobosana Ye ata moke te”—bobele kaka te, “nakobosana ata moke te oyo natangaki na ntina ya mateya na Ye mpe bomoi na Ye.” Kasi nzokande, tolobaka, “nakobosana te maye Asalaki mpo na ngai.” “Nakobosana te lolenge abikisaki ngai ntango nangangaki mpo na lisungi.” Mpe “nakobosana te bomipesi na Ye epai na ngai mpe bomipesi na ngai epai na Ye—liyokani oyo tosalaki.”

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 26:6–13; Malako 14:3–9

“Ayei … mpo na kopakola nzoto na ngai na bokundi.”

Na likambo moke kati na bomikitisi ya bokumbameli, mwasi oyo balimboli na kati ya milongo oyo alakisi ete ayebaki oyo Yesu azalaki mpe oyo Akokaki kosala (tala Matai 26:12). Mpo na nini okanisi misala na ye ezalaki na ntina koleka epai ya Mobikisi? (tala molongo 13). Nini ekamwisi yo na ntina ya mwasi yango mpe bondimi na yo? Manyola lolenge nini okoki kolanda ndakisa na ye.

Tala lisusu Yoane 12:1–8.

Matai 26:20–22; Malako 14:17–19

“Nkolo, ezali Ngai?”

Nini oyekoli na ntina ya bayekoli uta na mituna na bango epai ya Nkolo na kati ya milongo oyo? Mpo na nini okanisi batunaki yango? Kanisa lolenge nini okoki kotuna NKolo, “Ezali Ngai?”

Tala lisusu Dieter F. Uchtdorf, “Nkolo, Ezali Ngai?,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2014, 56–59.

Matai 26:26–29; Malako 14:22–25

Elambo ezali libaku ya kokanisa Mobikisi.

Ntango Mobikisi abandisaki elambo epai ya Bayekoli na Ye, makanisi mpe mayoki nini okanisi bazalaki na yango? Kanisa na ntina ya oyo ntango ozali kotanga maye bakutanaki na yango na kati ya Matai 26:26–29 mpe Malako 14:22–25. Mpo na nini okanisi Yesu aponaki nzela oyo mpo ete biso tokanisa Ye? Okoki lisusu komanyola maye omonaki na ntango ya elambo. Ezali na eloko okoki kosala mpo kokomisa makambo oyebi na elambo bule mpe ntina mingi koleka?

Nsima ya kotanga mpe komanyola milongo oyo, okoki kokoma makambo oyo oyoki efuli yo mpo na kokanisa na ntina ya Mobikisi. Okoki kotala makambo maye mbala ya nsima ntango okolia elambo. Okoki kotala yango lisusu na mbala mosusu, lokola lolenge ya “kokanisa ye ntango nyonso” (Moroni 4:3).

Tala lisusu Luka 22:7–39; 3 Nefi 18:1–13; Malongi mpe Mayokani 20:76–79; Gospel Topics, “Elambo,” topics.ChurchofJesusChrist.org; “Kanisa Ye Ntango nyonso” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Yoane 13:1–17

Mobikisi azali ndakisa na biso ya kosalisa basusu na bomikitisi.

Na eleko ya Yesu, kosokola makolo ya bato mosusu ezalaki mokumba ya basali, kasi ya bakambi te. Kasi Yesu alingaki bayekoli na Ye bakanisa na lolenge ekeseni na ntina ya oyo elimboli kokamba mpe kosalisa. Bansango nini ozwi na kati ya maloba mpe misala ya Mobikisi na kati ya Yoane 13:1–17? Na bonkoko na yo, kosukola makolo ya bato mosusu ekoki kozala te lolenge ya momesano mpo na kosalisa. Kasi banza oyo okoki kosala mpo na kolanda ndakisa ya Mobikisi ya kosalisaka kati na bomikitisi.

Ekoki kozala lisusu ntina koleka koyeba makambo maye Yesu ayebaki mpe ayokaki na ntango likambo oyo ya bule elongo na Bapostolo na Ye (tala milongo 1 mpe 3). Lolenge nini babomoni oyo esungi yo ososola na ntina ya Mobikisi?

Tala lisusu Luka 22:24–27.

Yoane 13:34–35

Bolingo na ngai mpo na basusu ezali elembo ete nazali mpenza moyekoli ya solo ya Yesu Klisto.

Na ebandeli, Yesu apesaka motindo ya “kolinga mozalani na yo lokola yo moko” (Matai 22:39). Sika awa apesaki “motindo ya sika.” Okanisi nini yango elimboli kolinga basusu lokola Yesu alingaka yo? (tala Yoane 13:34).

Okoki lisusu komanyola lolenge nini bato mosusu bayebaka ete yo ozali moyekoli ya Yesu Klisto. Lolenge nini okoki komindimela ete bolingo ezali ezalela na yo ya Kimoklisto?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 26:26–29; Malako 14:22–25.Boyebi ya libota na yo ezali nini lokola na ntango ya elambo poso nyonso? Kotangaka na ntina ya elambo ya yambo ekoki kofula lisolo etali ntina ya elambo mpe ndenge ya kobongisa boyebi na yo. Kanisa kolakisa elilingi Bokaboli Elambo (Gospel Art Book, no. 108) mpe kokabolaka makanisi mpo na maye bokoki kosala yambo, na ntango mpe nsima ya elambo.

Elilingi
mwasi azali kozwa elambo

Elambo esalisaka biso kokanisa Yesu Klisto.

Matai 26:30.Kanisa koyemba loyembo, lokola Yesu mpe Bapostolo na Ye basalaki—ntango mosusu loyembo ya elambo. Lolenge nini koyembaka loyembo ezalaki lipamboli epai ya Yesu mpe Bapostolo na Ye na eleko wana? Lolenge nini nzembo ezali lipamboli epai na biso?

Yoane 13:1–17.Okoki kolinga kolakisa libota na yo elilingi na nsuka ya liteya ntango bozali kotanga milongo oyo. Bosolo nini Mobikisi ateyi na misala na Ye? Makambo mike mike nini na kati ya elilingi esungi biso tososola bosolo oyo? Ntango mosusu bandeko ya libota bakoki kokabola lolenge nini kosalela bosolo oyo ememelaki bango esengo (tala Yoane 13:17).

Yoane 13:34–35.Nsima ya kotanga milongo oyo, bokoki kosolola elongo na ntina ya lolenge nini bato mosusu bayebaka ete bozali bayekoli ya Yesu Klisto. Lolenge nini Mobikisi alingaka bayekoli na Ye bayebana? Okoki kotuna bandeko ya libota basolola na ntina ya bato oyo bazalaka na bolingo mpo na basusu elakisaka ete bazali bayekoli ya solo ya Yesu Klisto. Bokoki lisusu kosolola ndenge bokoki kolakisa bolingo koleka lokola libota.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Love One Another,” Children’s Songbook, 136.

Kobongisa Boyekoli na Yo Moko

Manyola. Makomi ezali na ndimbola ya molimo oyo tokoki kozangisa soki tozali kotanga yango na bozangi bokebi mingi, lokola ntango tosalaka, ntango totangaka mikanda mosuus. Kozala mbangu te mpo na kosilisa mokapo moko. Zwa ntango ya kokanisa na bozindo na ntina ya maye ozali kotanga.

Elilingi
Yesu azali kosokola makolo ya bayekoli

Monene na kati ya Bokonzi, na J. Kirk Richards

Bimisa na lokasa