Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya motoba 5–11. Yoane 14–17: “Koba kati na Bolingo na Ngai”


“Sanza ya motoba 5–11. Yoane 14–17: ‘Koba kati na Bolingo na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya motoba 5–11. Yoane 14–17,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Elambo ya Nsuka

Elambo ya Nsuka, na William Henry Margetson

Sanza ya motoba 5–11

Yoane 14–17

“Koba kati na Bolingo na Ngai”

Ntango ozali kotanga mateya ya Mobikisi na kati ya Yoane 14–17, Molimo Mosantu akosunga yo kokitola bansango na yo. Koma makanisi oyo ozwi.

Koma Makanisi na Yo

Lelo tobengaka yango “Elambo ya Nsuka,” kasi toyebi te soki bayekoli ya Yesu bayebaka malamu, ntango basanganaka mpo na Feti ya Pasika ya mobu, ete yango ekoki kozala bilei na bango ya nsuka elongo na Molakisi na bango yambo ya liwa na Ye. Nzokande, Yesu“ayebaki ete ntango na Ye ya nsuka ezalaki koya” (Yoane 13:1). Kala mingi te akokutana na akonyokwama na Getesemane, na bofundi mpe bowangani ya baninga na Ye ya pembeni, mpe na liwa ya bolozi likolo ya ekulusu. Nsima kutu atako mitungisi wana liboso na Ye, makanisi ya Yesu ezalaki epai na Ye te kasi epai na bayekoli na Ye. Nini basengelaki koyeba na mikolo mpe mibu miye mizalaki koya liboso? Mateya kitoko ya Yesu na kati ya Yoane 14–17 ebimisi lolenge nini Ye azali kokanisa na ntina ya bayekoli na Ye, na ntango wana mpe sikawa. Na kati ya bosolo ebele ya bolendisi na Ye oyo akabolaki ezalaki na elikya ete, na lolenge moko, Ye akotika biso ata moke te. “Soki bobateli mitindo na ngai,” Ye alakaki, “bokotikala na bolingo na ngai” (Yoane 15:10).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Yoane 14–15

Nalakisi bolingo na ngai mpo na Yesu Klisto na kobatelaka mitindo na Ye.

Ntango ozali kotanga Yoane 14–15, okoki kokoma to kotia elembo na esaleli moko na moko ya liloba bolingo. Okoki koyeba liloba mitindo ezongisami mbala mingi na bokangani na liloba bolingo na kati ya mikapo oyo. Oyekoli nini na ntina ya mokangano kati ya bolingo mpe mitindo uta na mateya ya Mobikisi? Maloba nini mosusu mpe makomi nini ozwi ekokani na bolingo na mikapo oyo?

Manyola lolenge nini bolingo ya Mobikisi ezwaki nguya likolo na yo.

Tala lisusu Yoane 13:34–35; D. Todd Christofferson, “Bokangama na Bolingo na Ngai,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 48–51.

Elilingi
Yesu azali koloba na bayekoli

Elambo ya Nsuka, na Clark Kelley Price

Yoane 14–16

Molimo Mosantu asungaka ngai mpo ete nakokisa mokumba na ngai lokola moyekoli ya Yesu Klisto.

Ekokaki kozala mpasi na motema mpo na bayekoli ya koyoka ete ntango na bango ya kozala elongo na Mobikisi ekomaki pene na kosila. Bakokaki lisusu komitungisa na ntina ya lolenge nini bakokaki kotikala na kozangaka Ye. Ntango otangi Yoane 14–16, luka mpo na nini Mobikisi alobaki akopesa bango elikya. Mingi mingi, talaka nini Ye ateyaki bango na ntina ya Molimo Mosantu. Oyekoli nini na ntina ya Molimo Mosantu uta na maloba ya Mobikisi na milongo miye milandi?

Mpo na nini bayekoli bazalaki na mposa ya kozwa lolenge ya lisungi kowutaka na Molimo Mosantu? Lolenge nini Molimo Mosantu akokisaki makambo oyo mpo na yo? Banza lolenge nini okoki kosala mpo ete nguya na Ye ezala makasi na kati ya bomoi na yo.

Tala lisusu 3 Nefi 19:9; 27:20; Malongi mpe Mayokani 11:12–14; Mose 6:61; Michelle D. Craig, “Likoki ya Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2019, 19–21.

Yoane 15:1–8

Ntango nakangami na Klisto, nakobota mbuma kitoko.

Okanisi maloba “kokangama na [Klisto]”elingi koloba nini? (Yoane 15:4). “Mbuma” na yo ezali nini oyo elakisi ete okangami na elanga ya vino, oyo elimboli Yesu Klisto?

Yoane 17

Yesu abondeli mpo na bayekoli na Ye.

Maloba ya Yesu oyo ekomami na kati ya Yoane 17 eyebani lokola Losambo ya Kobondela. Na kati ya losambo oyo, Yesu asambelaki mpo na Bapostolo na Ye mpe “bango lisusu oyo bakondimela [Ye] na nzela ya liloba na bango” (Yoane 17:20). Yango elingi koloba Ye azalaki kosambela mpo na yo. Yesu asengi nini kowuta na Tata na Ye na ntina na yo mpe bandimi mosusu nyonso? Nini yango eteyi yo na ntina ya mayoki na Ye mpo na yo?

Losambo oyo lisusu eteyi bosolo ya mozindo mpe ya seko. Bosolo nini ozwi? Ntango ozali kotanga mokapo oyo, banza kokomaka maye oyekoli na ntina ya makambo maye malandi:

  • Losambo

  • Mokangano ya Mobikisi na Tata na Ye

  • Mokangano ya Mobikisi na bayekoli na Ye

  • Lolenge nini bayekoli basengeli kolakisa bokeseni na mokili

  • Bosolo mosusu oyo emonisami mpo na yo

Yoane 17:11, 21–23

Tata na Lola mpe Yesu Klisto bazali na bomoko oyo ebonga nie.

Na kati ya losambo na Ye na Yoane 17, Yesu alobelaki mingi bomoko na Ye na Tata. Na bandenge nini Tata mpe Mwana bazali “moko”? (Yoane 17:11, 21–23). Yeba ete Mobikisi asambelaki ete bayekoli bakoka kozala moko “nktu lokola”—to na lolenge moko oyo—Ye mpe Tata na Ye bazali moko (Yoane 17:22). Elimboli nini mpo na yo? Kanisa na ntina na mokangano na yo—ndakisa, na molongani na yo to bandeko mosusu ya libota, na bandeko ya palwasi, mpe Baklisto mosusu. Lolenge nini okoki kosala na lolenge ya bomoko oyo Yesu azali na yango na Tata?

Tala lisusu Quentin L. Cook, “Hearts Knit in Righteousness and Unity,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 18–22; Sharon Eubank, “By Union of Feeling We Obtain Power with God,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 55–57.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Yoane 14:5–6.Bandeko ya libota bakoki kosepela kokamba libota na yo moko nsima ya moninga na botamboli na nzela. Lolenge nini Yesu azali “nzela”? Azli kokamba biso epai wapi?

Yoane 14:26–27.Lolenge nini kimia ya Yesu ezali ya kokesena na lolenge oyo “mokili epesaka”? Bandeko ya liloba bakoki kokabola ndenge bazwaki kimia mpe bolendisi na nzela ya Molimo Mosantu.

Yoane 15:1–8.Bokoki na lisano kotanga milongo miye libanda pene ya nzete ya vino, nzete, to nzete mosusu. Nini ekomelaka etape ya nzete ntango elongolami na nzete? Bokoki kosolola na ntina ya lolenge nini tozali lokola bitape to nini elimboli “kokangama” na Mobikisi mpe “kobota mbuma.”

Yoane 15:17–27; 16:1–7.Mpo na nini bokanisi Yesu Klisto akebisaki bayekoli na Ye na ntina ya minyoko? Lolenge nini bayekoli ya Klisto bazali konyokwama lelo? Lolenge nini toli ya Mobikisi na kati ya milongo miye ekoki kosunga biso ntango tokutani na minyoko?

Yoane 16:33.Lolenge nini Yesu Klisto alongaki mokili? Lolenge nini Bomikabi na Ye ememelaka biso kimia mpe esengo malamu? (tala lisusu Malongi mpe Mayokani 68:6).

Yoane 17:21–23.Nini ekoki kosunga libota na yo eyekola lolenge ya kozala na bomoko koleka Yesu Klisto mpe Tata na Lola? Ntango mosusu bokoki kosolola na ntina ya masano kitoko ya ekipi mpe lolenge nini basalaka elongo mpo na ntina moko. To bokoki koyoka lingomba ya bayembi to miziki mpe kosolola lolenge nini bayembi basanganaka mpo na kosala miziki kitoko.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “The Holy Ghost,” Chants pour Enfants,, 105.

Kobongisa Mateya na Biso

Salela miziki ya audio. Ntango ozali kotangisa libota na yo makomi, banza koyokaka maloba ya makomi etiami na audio, ezwami na ChurchofJesusChrist.org to na kati ya Gospel Library app. Koyoka Yoane 14–17 ekoki kozala na nguya makasi mpo ete mikapo miye mizali na maloba mingi ya Mobikisi.

Elilingi
bambuma na nzete ya vino

Yesu ateyaki, “Ngai nazali nzete ya bilaya, bino bozali bitape” (Yoane 15:5).

Bimisa na lokasa