Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya motoba 12–18. Luka 22; Yoane 18: “Bolingi na Ngai Te, kasi ya Yo, Esalama”


“Sanza ya motoba 12–18. Luka 22; Yoane 18: ‘Bolingi na Ngai Te, kasi ya Yo, Esalama,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya motoba 12–18. Luka 22; Yoane 18,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Klisto mpe bayekoli na Getesemane

Zamba ya Getesemane, na Derek Hegsted

Sanza ya motoba 12–18

Luka 22; Yoane 18

“Bolingi na Ngai Te, kasi ya Yo, Esalama”

Zwa ntango na yo otanga Luka 22 mpe Yoane 18 na poso oyo. Manyola mpe sambela na ntina ya oyo ozali kotanga. Kosalaka oyo ekoki kopesa Molimo libaku ya kotatola na motema ete makomi ezali solo.

Koma Makanisi na Yo

Ezalaki bobele na batatoli misato ya bomoi na bolozi ya Yesu Klisto na Elanga ya Getesemane—mpe balalaki mingi. Na elanga wana mpe nsima na ekulusu, Yesu amemaki likolo na Ye moko masumu, mpasi mpe bolozi ya moto nyonso oyo aaei na mokili, atako moto moko te na ntango wana ayebaki oyo ezalaki kosalama. Makambo ya ntina koleka ya seko elekaka mingi mingi na kidiba bato bayebaka te. Kasi Nzambe Tata ayebaki. Ayokaki libondeli ya Mwana na Ye ya bosembo: “Tata, soki olingi, longola mpasi oyo nazali na yango: bongo bolingi na ngai te, kasi ya yo nde, esalema. Mpe anzelu abimelaki ye kowuta na lola, mpo na kolendisaka ye” (Luka 22:42–43). Lokola tozalaki wana te mpo na kotatola likambo oyo ya mawa mpe bomikitisi, biso tozali banzeneneke ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Mbala nyonso toyambolaka mpe tozwaka bolimbisi ya masumu na biso, ntango nyonso toyoki nguya ya bolendisi ya Mobikisi, tokoki kotatola bosolo ya oyo esalemaki na Elanga ya Getesemane.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Boyekoli Makomi Yo Moko

Luka 22:31–34, 54–62; Yoane 18:17–27

Mbongwana ezali likambo ezwaka ntango.

Kanisa na ntina ya makambu Petelo amonaki na Mobikisi—makamwisi amonaki mpe malongi ayekolaki. Mpo na nini Alobaki nsima epai ya Petelo, “Ntango okobongwana, lendisa bandeko na yo”? (Luka 22:32; italics added). Ntango omanyoli oyo, ekoki kosunga yo obanza maye Mpaka David A. Bednar ateyaki na ntina ya bokeseni oyo ezali kati na kozala na litatoli mpe kozala solo solo ya kobongwana (tala “Mbongwana kati na Nkolo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2012, 106–9).

Ntango ozali kotanga na ntina ya maye Petelo akutanaki na yango na kati ya Luka 22:31–34, 54–62 (tala lisusu Yoane 18:17–27), kanisa na ntina ya mbongwana na yo moko. Esi ekomela yo oyoka bomipesi oyo, lokola Petelo, ozali “ya kolengelama mpo ya kokende elongo na [Mobikisi], bino mibale na kati ya boloko, mpe na nkufa”? (Luka 22:33). Mpo na nini mayoki oyo ezangaka ntango mosusu? Ezali na mabaku ya mikolo na mikolo ya kowangana to kotatola na ntina ya Mobikisi, okosala nini mpo na kozala motatoli ya mikolo minso na ntina na Ye? Mateya nini mosusu oyekoli uta na boyebi ya Petelo?

Ntango okobi kotanga Boyokani ya Sika, botala elembo oyo emonisi bokobi ya mbongwana ya Petelo. Yeba lisusu bandenge andimaki mokumba ya Nkolo ya “kolendisa bandeko na yo” (Luka 22:32; tala Misala 3–4).

Tala lisusu Malako 14:27–31.

Luka 22:39–46

Mobikisi anyokwamaki mpo na ngai na Getesemane.

Mokambi Russell M. Nelson abengisaki biso “toluka ntango ya boyekoli na ntina ya Mobikisi mpe libonza ya bomikabi na Ye ” (“Drawing the Power of Jesus Christ into Our Lives,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 40).

Banza maye okosala mpo na kondima libiangi ya Mokambi Nelson. Okoki kobanda na losambo komanyolaka bolozi ya Mobikisi na Getesemane, lokola elimbolami na kati ya milongo oyo, mpe kokomaka makanisi mpe mituna oyo ezali koyela yo na makanisi.

Mpo na boyekoli mosusu ya bozindo koleka ya Mobikisi mpe Bomikabi na Ye, meka koluka makomi mosusu mpo na biyano na mituna lokola oyo:

Ntango otangi oyo esalamaki na Getesemane, ekoki kozala ntina makasi oyeba ete Getesemane ezalaki elanga ya banzete ya bilaya mpe lisusu bokamoli ya mbuma ya bilaya, esalamaki mpo na konyika bambuma ya bilaya mpe kobimisa mafuta oyo basalelaki mpo na kopelisa mwinda mpe bilei mpe lokola kobikisa makono (tala Luka 10:34). Lolenge nini mosala ya kobimisa mafuta ya olive elimboli oyo Mobikisi asalaki mpo na biso na Getesemane? Mpo na makanisi mosusu, tala nsango ya Mpaka D. Todd Christofferson “Kangama na Bolingo na Ngai” (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 50–51).

Tala lisusu Matai 26:36–46; Malako 14:32–42.

Yoane 18:28–38

Bokonzi ya “Mobikisi ezali ya mokili oyo te.”

Lokola mokambi ya politiki, Ponso Pilato azalaki kosalela nguya mpe babokonzi ya mokili oyo. Kasi Yesu alobelaki oyo etali lolenge ebele ekeseni ya bokonzi. Kokanisaka nsima na oyo otangaki na ntina ya bomoi ya Mobikisi, elembo nini emonisi yo ete Bokonzi “na Ye ezali ya mokili oyo te”? (Yoane 18:36). Mpo na nini ezali ntina mpo na yo oyeba yango? Nini mosusu esungi yo na ntina ya maloba ya Mobikisi epai ya Pilate?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Luka 22:31–32.Liyoki nini Petelo akokaki koyoka mpo na koyeba ete Yesu asambelaki mpo na ye mpe bondimi na ye? Mpo na banani tokoki kosambela, “mpo ete bondimi na [bango] ekweisama te”? (molongo 32).

Luka 22:39–46.Koyekolaka na ntina ya bolozi ya Mobikisi na Getesemane ekoki kozala boyebi moko ya bule mpo na libota na yo. Banza maye okoki kosala mpo na kokela molimo ya limemia mpe bokumbameli ntango oyekoli Luka 22:39–46. Bokoki kosala lisano to koyemba elongo nzembo oyo bolingaka na libota to nzembo ya bana oyo elobeli Mobikisi. Bokoki kotala mosala ya ntoki to video lokola “Bolozi ya Mobikisi na Getesemane” (ChurchofJesusChrist.org). Ntango otangi milongo, bandeko ya libota bakoki kokabola mikapo oyo ezali mingimingi ntina mpo na bango—ntango mosusu oyo ekosunga bango bayoka bolingo ya Mobikisi (tala lisusu Matai 26:36–46; Malako 14:32–42). Okoki lisusu kobengisa bango bakabola matatoli na bango na ntina ya Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.

Luka 22:42.Bandeko ya libota bakoki kokabola boyebi na bango ntango bayekolaki koloba, “Bolingi na ngai te, kasi ya yo, esalema.”

Luka 22:50–51; Yoane 18:10–11.Nini toyekoli na ntina ya Yesu uta na milongo oyo?

Elilingi
Klisto azali kobikisa litoi ya mosali

Suffer Ye Thus Far, na Walter Rane

Yoane 18:37–38.Lolenge nini tokoki koyanola na motuna ya Pilate “Bosolo ezali nini?” (molongo 38). Mpo na makanisi mosusu, tala Yoane 8:32; Malongi mpe Mayokani 84:45; 93:23–28; mpe “Oh Say, What Is Truth?,” Hymns, no. 272.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “I Stand All Amazed,” Hymns, no. 193.

Kobongisa Boyekoli Ya Moto Ye Moko

Yekola maloba ya baprofeta mpe bapostolo ya mikolo mya nsuka. Tanga oyo baprofeta mpe bapostolo ya mikolo mya nsuka bateyi na ntina ya babosolo ozwi na makomi. Na ndakisa, na kati ya likambo ya likita linene oyo ewuti koleka kala te Liahona, okoki koluka lisikulu ebakisami mpo na “Bomikabi” (tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi21).

Elilingi
Klisto na Getesemane

Bolingi na Ngai Te, kasi ya Yo, na Walter Rane

Bimisa na lokasa