Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mitano 8–14. Matai 19–20; Malako 10; Luka 18: “Nini Ezangi Ngai Lisusu?”


“Sanza ya mitano 8–14. Matai 19–20; Malako 10; Luka 18: ‘Nini Ezangi Ngai Lisusu?,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya mitano 8–14. Matai 19–20; Malako 10; Luka 18,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
basali na kati ya elanga ya vino

Sanza ya mitano 8–14

Matai 19–20; Malako 10; Luka 18

“Nini Ezangi Ngai Lisusu?”

Tanga mpe manyola Matai 19–20; Malako 10; mpe Luka 18, kotiaka bokebi na bitinda ya molimo ozali kozwa. Koma bitinda yango, mpe zwa ekateli na lolenge nini okosalela yango.

Koma Makanisi na Yo

Soki ozalaki na libaku ya kotuna Mobikisi motuna, motuna yango elingaki kozala nini? Ntango moto na nkita songolo akutanaki na Mobikisi mpo na mbala ya yambo, atunaki, “Eloko nini ya malamu nasengeli kosala, mpo ete nakoka kozwa bomoi ya seko?” (Matai 19:16). Eyano ya Mobikisi elakisaki makambo mibale, bosepeli mpo na makambo kitoko elenge mobali asalaki mpe kosepelaka na bolendisi ya kosala mingi koleka. Ntango tomanyoli boni ekoki kosalema ete tozwa bomoi ya seko, tokoki komituna soki ezali na makambo mosusu tosengeli kosala. Ntango totuni, na lolenge na biso moko, “Nini ezangi ngai lisusu?” (Matai 19:20), Nkolo akoki kopesa biso biyano oyo ezali bobele mpo na biso moko lokola eyano na Ye epai ya elenge oyo azalaki na nkita. Atako nyonso oyo Nkolo asengi biso tosala, kosala yango engebene na na eyano na Ye ekosenga ntango nyonso totiela Ye motema mingi koleka bosembo na biso moko (tala Luka 18:9–14) mpe mpo ete tokoka kozwa bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke” (Luka 18:17; tala lisusu 3 Nefi 9:22).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 19:3–9; Malako 10:2–12

Libala kati na mobali mpe mwasi ebulisami na Nzambe.

Masolo oyo kati na Mobikisi mpe Bafalisai ezali moko ya makambo moke oyo ekomami na oyo Mobikisi ateyaki mingi mingi mpo na libala. Nsima ya kotanga Matai 19:3–9 mpe Malako 10:2–12, koma makambo mingi oyo oyoki eezali kopesa na bokuse makanisi ya Nkolo na oyo etali libala. Nsima yekola mwa mikanda oyo ezwami na kati ya “Libala” (Mikanda ya Nsango malamu, topics.ChurchofJesusChrist.org), mpe bakisa makambo ebele na kati ya oyo okomi. Lolenge nini boyebi na yo ya mwango ya lobiko ya Tata esimbaka lolenge okanisaka mpe oyokaka na ntina ya libala?

Matai 19:3–9; Malako 10:2–12

Eteyaki Yesu ete bokabwani endimami te to ete bato bakabwani bakoki kobala lisusu te?

Na liteya etali bokabwani, Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki ete Tata na Lola alingi ete libala ezala seko. Na yango, Nzambe asosoli lisusu ete bokabwani ezali ntango mosusu ntina. Mokambi Oaks alimbolaki ete Nkolo “apesaka ndingisa na bato bakabwani babala lisusu na botosi ya mobeko lokola elimbolami na mobeko monene. Soki mondimi oyo akabwana abuki mobeko ya ya makasi, ye akoki kokoma na ndingisa ya kozwa mokanda ya ndingisa mpo na kokota na tempelo na nse ya mibeko ya bolongobani wana oyo epesameli bandeko mosusu” (“Bokabwani,” Liahona, Sanza ya mitano 2007, 70).

Matai 19:16–22; Malako 10:17–22; Luka 18:18–23

Soki nasengi Nkolo, Ye akoteya ngai oyo nasengeli kosala mpo na koyingela na bomoi ya seko.

Lisolo ya elenge mobali ya nkita ekoki kopesa kokanisa atako moyekoli ya boyengebene mpe libela. Ntango ozali kotanga Malako 10:17–22, elikya nini ozwi ya elenge mobali ya boyengebene mpe sembo? Lolenge nini Nkolo ayokaki mpo na elenge mobali oyo?

Lisolo oyo ekoki kotinda yo otuna, “Nini ezangi ngai lisusu?” (Matai 19:20). Lolenge nini Nkolo asungaka biso tokokisa oyo tozangaka? (tala Etele12:27). Nini tokoki kosala mpo na komilengela biso moko tondima toli na Ye mpe lisungi ntango tozali koluka kobongwana?

Tala lisusu Larry R. Lawrence, “Nini Ezangi Ngai Lisusu?,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2015, 33–35; S. Mark Palmer, “Nsima Yesu Atalaki Ye mpe Alingaki Ye,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 114–16.

Matai 20:1–16

Moto nyonso akoki kozwa lipamboli ya bomoi ya seko, ezala ntango nini bandimeli nsango malamu.

Bokoki kotala mayebi ya moko ya basali na elanga ya vino? Liteya nini ozwi mpo na yo moko kati na lisese oyo? Nsango ya Mpaka Jeffrey R. Holland “Basali na kati ya Elanga ya Vino” (Liahona, Sanza ya mitano 2012, 31–33) ekoki kosunga yo omona nzela ya sika mpo na kosalela lisese oyo. Bitinda nini mosusu Molimo apesi yo?

Elilingi
moto na bomikitisi mpe Falisai

Moyamboli mofutisi mpako mpe Mofalisai moto na komilongisa kati na Tempelo, na Frank Adams

Luka 18:9–14

Nasengeli kondimela mawa ya Nzambe, kasi boyengebene na ngai moko te.

Lolenge nini okolimbola bokeseni kati na nsambo mibale oyo na kati ya lisese oyo? Manyola oyo oyoki osengeli kosala mpo na kozala lokola moyamboli na miso ya bato kati ya lisolo oyo mpe moke lokola Falisai.

Tala lisusu Bafilipi 4:11–13; Alma 31:12–23; 32:12–16.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malako 10:13–16; Luka 18:15–17.Mpo na kosunga bandeko ya libota bamanyola lisolo na kati ya milongo oyo, bokoki koyemba elongo loyembo moko, lokola “I Think When I Read That Sweet Story” (Children’s Songbook, 56). Elingaki kozala lolenge nini soki ozalaki na kati ya bana oyo Yesu apambolaki? Yango elimboli nini “kozwa bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke”? (Malako 10:15).

Malako 10:23–27.Bokeseni nini ezali kati na kozala na nkita mpe kotia elikya na nkita? (tala Malako 10:23–24). Ntango otangi molongo 27, okoki kolinga kokoma Bobongoli ya Joseph Smith: “Na bato oyo batiaka elikya na nkita, esalemaka te; kasi te esalemaka na bato oyo batiaka elikya na bango na Nzambe mpe batikaka nyonso mpo na ntina na ngai, mpo ete na boye makambo nyonso oyo esalemaka” (Joseph Smith Translation, Mark 10:26 [in Malako 10:27, makomi ya nse a]). Lokola libota, lolenge nini tolakisaka ete tondimelaka Nzambe koleka biloko ya mokili?

Matai 20:1–16.Mpo na kolimbola mabongi na kati ya Matai 20:1–16, bokoki kosala lisano moke, lokola lisano ya mokuse ya momekano ya mbangu. Nsima ya moto nyonso kosilisa lisano, pesa lifuti lolenge moko, kobandaka na moto oyo asukisaki mpe sukisa na moto oyo asilisaki liboso. Yango eteyi biso nini na ntina ya nani azwaka mapamboli ya bomoi ya seko na mwango ya Tata na Lola?

Matai 20:25–28; Malako 10:42–45.Nini ezali ndimbola ya liloba “oyo akozala mokonzi kati na bino, tika azala mosaleli na bino”? (Matai 20:27). Lolenge nini Yesu Klisto alimbolaki mobeko oyo? Lolenge nini tokoki kolanda ndakisa na Ye na kati ya libota na biso, palwasi na biso to etape na biso mpe bato na biso ya penepene?

Luka 18:1–14.Toyekoli nini na ntina ya losambo uta na masese mibale na kati ya milongo oyo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Dearest Children, God Is Near You,” Hymns, no. 96.

Kobongisa Boyekoli ya Makomi na Yo Moko

Luka ngonga oyo ebongi mpo na yo. Ezali mbala mingi pete mingi mpenza koyekola ntango nini okoki koyekola makomi na bozangi kokatama. Luka ngonga oyo ebongi mpo na yo, mpe sala nyonso okoki mpo na koyekola ntango nyonso na ngonga wana mokolo na mokolo.

Elilingi
Klisto mpe elenge mobali ya nkita

Klisto mpe Elenge Mokonzi ya Nkita, na Heinrich Hofmann

Bimisa na lokasa