Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya yambo 30–Sanza ya mibale 5. Matai 4; Luka 4–5: “Molimo ya Nkolo Azali likolo na Ngai”


“Sanza ya yambo 30–Sanza ya mibale 5. Matai 4; Luka 4–5: ‘Molimo ya Nkolo Azali likolo na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya yambo 30–Sanza ya mibale 5. Matai 4; Luka 4–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yesu atelemi na kati ya esobe.

Kende na Esobe,, na Eva Koleva Timothy

Sanza ya yambo 30–Sanza ya mibale 5

Matai 4; Luka 4-5

“Molimo ya Nkolo Azali likolo na Ngai”

Mobikisi asalelaki makomi mpo na kotelemela masenginya ya Satana mpe mpo na kotatola na ntina ya etinda na Ye moko ya bonzambe lokola (tala Luka 4:1–21). Manyola lolenge nini makomi ekoki kotonga bondimi na yo mpe mokano na yo ya kotelemela masenginya.

Koma Makanisi na Yo

Uta na bolenge na Ye, Yesu amonanaki lokola koyeba ete Azalaki na etinda oyo ezalaki bobele moko, ya bule. Kasi lokola Yesu amilengelaki mpo na kobanda lotomo na Ye na mabele, monguna alukaki kolona ntembe na molimo ya Mobikisi. “Soko ozali Mwana na Nzambe,” Satana alobaki (Luka 4:3, nsete ebakisami). Kasi Mobikisi asololaki elongo na Tata na Ye na Lola. Ayebaki makomi, mpe Ayebaki nani Azalaki. Mpo na Ye, likabo ya Satana—“Nakopesa yo bokonzi nyonso” (Luka 4:6)—ezalaki moko mpamba, mpo ete bomilengeli ya bomoi mobimba ya Mobikisi epesaki Ye ndingisa ya kozwa “nguya ya Molimo” (Luka 4:14). Yango wana atako masenginya, mimekano, mpe bobwakisami, Yesu Klisto atatabanaki mokolo moko te uta na mosala oyo Apesamaki kosala: “Esengeli na ngai kosakola Nsango Malamu na Bokonzi na Nzambe … mpo ete natindami na likambo yango” (Luka 4:43).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai 4:1–2

Kosolola elongo na Nzambe elengelaka ngai mpo na kosalela Ye;

Mpo na komilengela mpo na kobanda etinda na Ye, Yesu akendaki na kati ya esobe “mpo na kozala elongo na Nzambe” (Bobongoli ya Joseph Smith, Matai 4:1 [na Matai 4:1, makomi ya nse ya lokasa b]). Kanisa maye osalaka mpo na komiyoka penepene ya Nzambe. Lolenge nini likambo oyo elengelaka yo mpo na mosala oyo Ye alingi yo osala?

Matai 4:1–11; Luka 4:1–13

Yesu Klisto atiaki ndakisa mpo na ngai na kotelemelaka masenginya.

Ntango mosusu bato bamiyokaka mabe ntango bamekamaka mpo na kosumuka. Kasi kutu Mobikisi, oyo abikaki “na masumu te” (Baebele 4:15), amekamaki. Yesu Klisto ayebi masenginya tokutanaka na yango mpe lolenge nini kosalisa biso mpo na kolonga yango (tala Baebele 2:18; Alma 7:11–12).

Ntango ozali kotanga Matai 4:1–11 mpe Luka 4:1–13, oyekoli nini oyo ekoki kosalisa yo ntango okutanaka na masenginya? Okoki kobongisa makanisi na yo na etando moko lokola moko oyo:

Yesu Klisto

Ngai

Yesu Klisto

Nini Satana amekaki Klisto asala?

Ngai

Nini Satana amekaki ngai nasala?

Yesu Klisto

Lolenge nini Klisto amilengelaki mpo na kotelamela masenginya.

Ngai

Lolenge nini nakoki komilengele mpo na kotelemela masenginya?

Yesu Klisto

Ngai

Makanisi mosusu nini ozwi uta na Bobongoli ya Joseph Smith uta na Matai 4? (tala makomi ya nse ya lokasa na kati ya Matai 4).

Tala lisusu 1 Bakolinti 10:13; Alma 13:28; Moses 1:10–22; Gospel Topics, “Temptation,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Luka 4:16–32

Yesu Klisto azali Masiya oyo basakolaki.

Soki osengamaki kolimbola oyo Yesu Klisto atindamaki na mabele mpo na kosala, olingaki koloba nini? Na kotangaka masakoli ya Yisaya oyo etali Masiya, Mobikisi alimbolaki makambo ya etinda na Ye moko (tala Luka 4:18–19; Yisaya 61:1–2). Oyekoli nini na ntina ya etinda na Ye ntango otangi milongo oyo?

Ndenge mosusu nini Mobikisi abengi yo kosalela elongo na mosala na Ye?

Elilingi
Yesu atelemi kati na sinagoga

Atako Bayuda bazalaki kozela bikekemingi mpo ete esakola ya Yisaya ekokisama, mingi bandimaki te ete Yesu azalaki Masiya ntango Ye alobaki, “Lelo likomi oyo ekokisami solo na matoi na bino” (Luka 4:21). Ntango ozali kotanga Luka 4:20–30 (tala lisusu Malako 6:1–6), meka komitia na esika ya bato ya Nazalete. Ezali na eloko moko oyo ekoki kopekisa yo kondima mobimba Klisto lokola Mobikisi na yo moko?

Tala lisusu Moziya 3:5–12; “Jesus Declares He Is the Messiah” video, ChurchofJesusChrist.org.

Matai 4:18-22; Luka 5:1–11

Ntango natie elikya na Nkolo, Akoki kosunga ngai nakokisa makoki na ngai ya bonzambe.

Mokambi Ezra Taft Benson ateyaki, “Mibali mpe basi oyo batikaka bomoi na bango epai ya Nzambe bakomona ete bakoki kosala mingi uta na bomoi na bango koleka bango moko” (Teachings of Presidents of the Church: Ezra Taft Benson [2014], 42). Yeba lolenge nini oyo esalamelaki Simoni Petelo mpe baninga na ye babomi ya mbisi. Yesu amonaki eloko moko monene koleka kati na bango koleka oyo bango bamonaki kati na bangomei. Alingaki kokomisa bango “balobi bato” (Matai 4:19; tala lisusu Luka 5:10).

Ntango ozali kotanga 4:18–22 mpe Luka 5:1–11, manyola maye Yesu Klisto azali kosalisa yo okoma. Lolenge nini oyoki Ye kobengisa yo mpo na kolanda Ye? Lolenge nini okoki kolakisa Nkolo ete ozali na bolingi ya kotika makambo nyonso mpo na kolanda Ye? (tala Luka 5:11).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 4:1–2; Luka 4:1–2Boyebi nini ekoki biso kozwa uta na lisolo oyo etali nguya ya kokila bilei? Mpo na kosalisa libota na yo eyekola maye etali bokili bilei, okoki kosalela “Fasting and Fast Offerings” in Gospel Topics (topics.ChurchofJesusChrist.org). Bato ya libota bakoki kokabola makambo bakutanaki na yango na bokili bilei. Ntango mosusu okoki na losambo kosala miango ya kokila bilei mpo na bantina songolo.

Matai 4:3–4; Luka 4:3–4Ntango Satana amekaki Klisto akomisa libanga limpa, atelemelaki bokitoli ya bonzambe ya Klisto na kolobaka, “Soki yo ozali Mwana ya Nzambe” (Matai 4:3, nsete ebakisami). Mpo na nini Satana amekaka kosala ete biso totia ntembe na ya biso bokitoli ya bonzambe—mpe oyo ya Mobikisi? Boniboni ye amekaka kosala yango? (Tala lisusu Moses 1:10–23.)

Bobongoli ya Joseph Smith, Matai 4:11.Nsima Yesu amekamaki na nzoto mpe na molimo, makanisi na Ye ebalukaki epai ya bamposa ya Yoane Mobatisi, oyo azalaki na boloko: “Mpe sikawa Yesu ayebaki ete Yoane abwakamaki na boloko, mpe atindaki banzelu, mpe, tala bayaki koalela ye [Yoane]” (Bobongoli ya Joseph Smith, Matai 4:11 [na Matai 4:11, matangi ya nse ya lokasa a). Lolenge nini topambolami ntango tolandi ndakisa ya Klisto ya kokanisaka basusu.

Luka 4:16--21.Oyebi moto moko oyo azali na motema ya kobukana to oyo azali na mposa ya kozala na “lisiko”? Luka 4:18 Lolenge nini ekoki biso kosalisa basusu bazwa libiki mpe lisiko ya Mobikisi? Okoki lisusu kosolola lolenge nini kosala makuli ya tempelo esalisaka komema “lisiko mpo na bakangami” (Luka 4:18).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Come, Follow Me,” Hymns,,no. 116.

Kobongisa Mateya na Biso

Kosalela nsango malamu ya Yesu Klisto. “Ntango mosusu likambo ya motuya mingi mpenza okoki kosala [lokola moboti to moteyi] ezali … kosalela nsango malamu na motema na yo mobimba. … Yango ezali lolenge ya yambo mpo na kolongobana mpo na kimoninga na Molimo Mosantu. Osengeli kobonga nie te, kaka komeka na molende kosala nyonso—mpe koluka bolimbisi na nzela ya Bomikabi ya Mobikisi ntango nyonso okobeta libaku” (Teaching in the Savior’s Way13).

Elilingi
Yesu azali kobianga Bapostolo mpo na kozala balobi bato

Klisto kobiangaka Bapostolo Yakobo mpe Yoane, Edward Armitage (1817–96)/Sheffield Galleries and Museums Trust, UK/© Museums Sheffield/The Bridgeman Art Library International

Bimisa na lokasa