Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya Yambo 23–29. Matai 3; Malako 1; Luka 3: “Bolengela Nzela ya Nkolo”


“Sanza ya Yambo 23–29. Matai 3; Malako 1; Luka 3: ‘Bolengela Nzela ya Nkolo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya Yambo 23–29. Matai 3; Malako 1; Luka 3,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Yoane Mobatisi akobatisa Yesu

Lininisa ya ntoki ya talatala kati na Tempelo ya Nauvoo Illinois, na Tom Holdman

Sanza ya Yambo 23–29

Matai 3; Malako 1; Luka 3

“Bolengela Nzela ya Nkolo.”

Banda na kotangaka Matai 3; Malako 1; mpe Luka 3. Ntango ozali kosambela mpo ete Molimo mosantu asalisa yo ososola mikapo oyo, Akopesa yo boyebi oyo ezali mingi mingi kaka mpo na yo. Koma makanisi oyo, mpe sala miango mpo na kosalela yango.

Koma Makanisi na Yo

Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye bakoki kobongola bomoi na yo. Luka atangaki esakola ya kala ya Yisaya oyo elimbolaki mbano oyo boyei ya Mobikisi ekozala na yango: “Mabwaku nyonso makotondisama; nkeka mpe ngomba nyonso ekokitisama ; bisika bikumbami bikosembolama, bisika na mabulu bikobongisama” (Luke 3:5; tala lisusu Yisaya 40:4). Oyo ezali nsango mpo na biso nyonso, kobakisa mpe baoyo bakanisaka bakoki kobongwana te. Soki eloko moko ya ntango nyonso lokola ngomba ekoki kokitisama, bongo solo Nkolo akoki kosalisa biso kosembola banzela ekumbama na biso moko (tala Luka 3:4–5). Ntango tondimi libiangi ya Yoane Mobatisi mpo na koyambola mpe kobongwana, tolengelaka milimo mpe mitema na biso mpo na koyamba Yesu Klisto mpo ete biso mpe tokoka “komona kobikisama na Nzambe” (Luka 3:6).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malako azalaki nani?

Kati na bakomi ya nsango malamu, toyebi mingi te mpo na oyo etali Malako. Toyebi ete azalaki moninga misionele ya Paulo, Petelo, mpe bamisionele mingi basusu. Banganga ya mayele ya bibilia mingi bandimi ete Petelo asengaki Malako mpo na kokoma makambo ya bomoi ya Mobikisi. Nsango malamu ya Malako ekomamaki pene liboso ya misato mosusu.

Tala Dictionnaire ya Biblia, “Malako.”

Matai 3:1–12; Malako 1:1–8; Luka 3:2–18

Boyamboli ezali mbongwana ya nguya ya molimo mpe motema.

Etinda ya Yoani Mobatisi ezalaki mpo na kolengela mitema ya bato bayamba Mobikisi mpe bakoma mingi koleka lokola Ye. Lolenge nini asalaki yango? Asakolaki, “Bobongola mitema” (Matai 3:2). Mpe asalelaki bililingi lokola mbuma mpe masango mpo na koteya oyo etali boyamboli (tala Luka 3:9, 17).

Bililingi nini mosusu omoni kati na masolo ya mosala ya Yoane Mobatisi? (tala Matai 3:1–12; Malako 1:1–8; Luka 3:2–18). Kanisa kotia yango bilembo na makomi na yo to koyema bafoto na yango. Bililingi oyo eteyi nini mpo na oyo etali malongi mpe ntina ya boyamboli?

Boyamboli ya solo ezali “mbongwana moko ya mayele, emoneli ya sika ya oyo etali Nzambe, na oyo etali moto yemei, mpe na oyo etali mokili. … [Elingi koloba] kobalusa motema mpe bolingi epai ya Nzambe” (Bible Dictionary, “Repentance”). Na Luka 3:7–14, mbongwana nini Yoane abengisi bato basala mpo na komilengela koyamba Klisto? Lolenge nini toli oyo ekosalelama epai na yo? Lolenge nini ekoki yo kolakisa ete oyamboli solo mpenza? (tala Luka 3:–8).

Tala lisusu Russell M. Nelson, “We Can Do Better and Be Better,” Liahona,, Sanza ya mitano 2019, 67–69; Dallin H. Oaks, “Cleansed by Repentance,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 91–94.

Matai 3:7; Luka 3:7

Bafalisai mpe Basadukai bazalaki banani?

Bafalisai bazalaki bandimi ya lingomba ya Nzambe ya Bayuda oyo bazalaki na lolendo na bango moko ya kotosa mobeko ya Mose mpe misala na yango. Basadukai bazalaki bayuda ya bozwi na nguya ya Nzambe mpe politiki monene; bandimelaki malongi ya lisekwa te. Maboke nyonso mibale bapengwaka uta na mokano ya ebandeli ya mibeko ya Nzambe .

Tala lisusu Matai 23:23–28; Dikisionele ya Biblia, “Bafalasai,” “Basadukai.”

Matai 3:11, 13–17; Malako 1:9–11; Luka 3:15–16, 21–22

Yesu Klisto abatisamaki mpo na “kokokisa makambo nyonso ya boyengebene.”.

Ntango obatisamaki, olandaki ndakisa ya Mobikisi. Kokanisa maye oyekoli uta na masolo ya libatisi ya Mobikisi na oyo esalamaki na ntango ya libatisi na yo.

Libatisi ya Mobikisi

Libatisi na ngai

Libatisi ya Mobikisi

Nani abatisaki Yesu, mpe likoki nini azalaki na yango?

Libatisi na ngai

Nani abatisaki yo, mpe likoki nini azalaki na yango?

Libatisi ya Mobikisi

Yesu abatisamaki wapi?

Libatisi na ngai

Obatimaki wapi?

Libatisi ya Mobikisi

Lolenge nini Yesu abatisamaki?

Libatisi na ngai

Lolenge nini obatisamaki?

Libatisi ya Mobikisi

Mpo na nini Yesu abatisamaki?

Libatisi na ngai

Mpo na nini obatisamaki?

Libatisi ya Mobikisi

Lolenge nini Tata na Lola Alakisaki ete Asepelaki na Mobikisi?

Libatisi na ngai

Lolenge nini Tata na Lola Alakisaki ete Asepelaki ntango obatisamaki? Lolenge nini Asalaki bondimi na Ye uta ntango wana?

Tala lisusu 2 Nefi 31; Moziya 18:8-11; Malongi mpe Mayokani 20:37, 68–74; “The Baptism of Jesus” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Matai 3:16–17; Malako 1:9–11; Luka 3:21–22

Bato ya Bonzambe bazali bato misato ya kokesana.

Biblia ezali na makambo ya bosolo mingi oyo emonanaka polele ete bato ya Bonzambe bazali bato misato ya kokesana. Masolo ya libatisi ya Mobikisi ezali ndakisa moko. Ntango otangi masolo oyo, manyola maye oyekoli na ntina ya bonzambe. Mpo na nini malongi oyo ezali motuya mpo na yo?

Tala lisusu Genese 1:26; Matai 17:1–5; Yoane 17:1–3; Misala 7:55–56; Malongi mpe Mayokani 130:22.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 3.Yoane Mobatisi azalaki na Bonganganzambe ya Alona. Tokoki koyekola nini uta na ndakisa ya Yoane mpo na oyo etali bantina ya Bonganganzambe ya Alona? Mapamboli nini tozwi na nzela ya Bonganganzambe ya Alona? Soki ozali na elenge mobali na libota na yo, okoki kozwa ntango ya kosalisa ye asosola lolenge nini akoki kosalela Bonganganzambe ya Alona mpo na kopambola basusu. (Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 13:1; 20:46–60.)

Elilingi
elenge mobali azali kobatisa elenge mosusu

Ntango tobatisami, masumu na biso masukwami mpenza.

Matai 3:11–17; Malako 1:9–11; Luka 3:21–22.Bato ya libota na yo bamona moto moko kobatisama to kokotisama lokola mondimi ya Eklezia? Bato ya libota bayokaki nini? Ntango mosusu okoki koteya bango oyo etali elembo ya libatisi mpe nkotisa. Lolenge nini kobatisama mpe kokoiisama ezali lokola kobotama ya sika? mpo na nini tozindisamaki mobimba kati na mai ntango tobatisamaki? Mpo na nini tolataka pembe ntango tobatisami? Mpo na nini likabo ya Molimo Mosantu elimbolami lokola “libatisi ya moto”? (Malongi mpe Mayokani 20:41; tala lisusu Dikisionele ya Biblia, “Libatisi,” “Molimo Mosantu”).

Matai 3:17; Malako 1:11; Luka 3:22.Ntango nini toyokaki ete Nzambe asepelaki na biso? Nini tokoki kosala lokola libota mpo na kosepelisa Nzambe?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana..

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Baptism,” Children’s Songbook,100–101.

Kobongisa Boyekoli Makomi Yo Moko

Senga Nkolo mpo na kozwa lisalisi. Makomi mapesamaki na nzela ya emoniseli, mpe mpo na kososola yango solo tozali na mposa ya emoniseli. Nkolo alakaki, “Senga, mpe ekopesamela yo, luka, mpe okozwa, beta, mpe bakofungolela yo:” (Matai 7:7).

Elilingi
Yoane kobatisaka Yesu

Yoane Mobatisi Kobatisaka Yesu,, na Greg K. Olsen

Bimisa na lokasa