Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya Yambo 16–22. Yoane 1: Tomoni Masiya


“Sanza ya Yambo 16–22. Yoane 1: Tomoni Masiya,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya Yambo 16–22. Yoane 1,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
mwasi azali kokabola nsango malamu na libongo ya enbgunduka

Sanza ya Yambo 16–22

Yoane 1

Tomoni Masiya

Ntango ozali kotanga mpe komaniola Yoane 1, koma makanisi oyo okozwa. Nsango nini omoni oyo ekozala ya motuya koleka nyonso mpo na yo mpe libota na yo? Nini okokaki kokabola na bakelasi na yo ya Eklezia?

Koma Makanisi na Yo

Omituna naino soki olingaki koyeba Yesu ya Nazalete lokola Mwana ya Nzambe soki ozalaka na bomoi na ntango ya mosala na Ye ya kufa? Mibu mingi,Bayisalaele ya bosembo, kotangaka mpe Andele, Petelo, Filipo, mpe Natanaele, bazelaka mpe basambelaka mpo na boyei ya Masiya oyo balakamaki. Ntango bamonaki Ye, lolenge nini bayebaki ete Ye azalaki Moko oyo bazalaki koluka? Lolenge moko biso nyonso toyaka koyeba Mobikisi—na koyambaka libiangi ya “Yaka mpe Omona” na bisomei (Yoane 1:39). Totanga makambo mattali Ye na kati ya makomi. Toyoka malongi na Ye. Totala lolenge na Ye ya kotambwisa bomoi. Toyoka Molimo na Ye. Na nzela, tomonaka, lokola esalaki Natanaele, ete Mobikisi ayebaka biso mpe alingaka biso mpe alingaka kolengela biso tozwa “makambo minene” (Yoane 1:50).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Yoane azalaki nani?

Yoane azalaki moyekoli ya Yoane Mobatisi mpe nsima akomaki moko ya balandi ya yambo ya Yesu Klisto mpe moko ya Bapostolo Zomi na Mibale na Ye. Akomaki nsango malamu ya Yoane, mikanda mingi, mpe buku ya emoniseli. Na nsango malamu na ye, amilobelaki lokola moyekoli “oyo Yesu alingaki” mpe“moyekoli mosusu” (Yoane 13:23; 20:3). Mpila ya Yoane mpo na koteya nsango malamu ezalaki makasi ete asengaki atikala na mabele kino Boyei ya Mibale ya Mobikisi mpo ete akoka komema milimo epai ya Klisto (tala Malongi mpe Mayokani 7:1–6).

Tala lisusu Dictionnaire ya Biblia, “Yoane,” “Yoane, Nsango malamu ya.”

Yoane 1:1–5

Yesu Klisto azalaki “na ebandeli elongo na Nzambe.”

Yoane abandaki Nsango malamu na ye na kolimbolaka mosala oyo Klisto asalaki liboso abotama: “Na ebandeli …Liloba [Yesu Klisto] azalaki mpe Nzambe.” Nini toyekoli uta na milongo 1–5 mpo na oyo etali Mobikisi mpe mosala na Ye?)- Okoki komona bandimbola ya lisungi kati na Bobongoli ya Joseph Smith, Yoane 1:1–5 (na the Bible appendix). Ntango obandi koyekola bomoi ya Mobikisi, mpo na nini ezali motuya koyeba oyo etali mosala na Ye ya yambo ya mbotama?

Tala lisusu Masolo ya Nsango malamu, “Church Disciplinary Councils,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Yoane 1:1–18

Yesu Klisto azali “Pole ya solo,” Mwana ya Nzambe.

Yoane afulamaki mpo na koluka Mobikisi mpo na litatoli ya Yoane Mobatisi, oyo alobaki ete “atindamaki mpo na kotatola na ntina … Pole ya solo” (Yoane 1:8–9). Yoane yemei lisusu apesaki litatoli ya nguya ya bomoi mpe etinda ya Mobikisi.

Ekoki kozala na litoma ya kokoma mokanda ya bosolo oyo Yoane abakisaki na litatoli na ye ya ebandeli ya Klisto (milongo 1–18; tala lisusu Bobongoli ya Joseph Smith, Yoane 1:1–19 [na bobakisi ya Biblia]). Mpo na nini okanisi ete Yoane abandaki Nsango malamu na ye na bosolo oyo? Kanisa kokoma litatoli na yo ya Yesu Klisto—nini okolinga kokabola? Boyebi nini esungaki yo oya koyeba mpe kolanda Mobikisi? Nani akokaki kopambolama na koyoka litatoli na yo?

Yoane 1: 11–13

Yesu Klisto apesaka biso “nguya ya kokoma” bana mibali mpe bana basi ya Nzambe.

Atako tozali banso bana basi mpe bana mibali ya Nzambe Tata, ntango tosumukaka tokomaka mopaya, to mosika, na Ye. Yesu Klisto apesaka biso makoki ya kozongela na nzela ya mbeka ya bomikabi na Ye. Manyola maye Yoane 1:11–13 ateyi mpo na oyo etali kokoma bana basi mpe bana mibali ya Nzambe. Kanisa lisusu maye makomi oyo eteyaka mpo na oyo etali lolenge nini tozwaka likabo oyo: Baloma 8:14–18; Moziya 5:7–9; Malongi mpe Mayokani 25:1. Elingi kolobela yo nini kozala na “nguya ya kokoma” bana basi to bana mibali ya Nzambe?

Yoane 1: 18

Tata atatolaka na ntina ya Mwana na Ye.

Yoane 1:18 elobi ete moto moko te amona Nzambe. Nzokande, Bobongoli ya Joseph Smith ya molongo oyo elobi polele ete “moto moko te amona Nzambe ntango nyonso longola ete atatoli na ntina ya Mwana” (tala Yoane 1:18, litangi ya nse ya makomi c). Kanisa kotala lisusu bandakisa oyo elandi kati na yango Nzambe Tata ayokanaki kotatola na ntina ya Mwana: Matai 3:17; 17:5; 3 Nefi 11:6–7; Joseph Smith—Mambi ya kala 1:17.

Mpo na nini ezali lipamboli ya kozala na lisolo oyo? Nini ezali koteya yo etali mokangano ya Yesu Klisto elongo na Tata na Ye?

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Elilingi
mwana mwasi azali kotanga makomi

Ntango tozali kotanga makomi, tokozwa bofuli mpo na bomoi na biso.

Yoane 1:4–10Lolenge nini okoki kosunga bato ya libota na yo batala maye bazali kotanga na ntina ya pole na milongo oyo? Okoki kotika libota bapelisa mwinda kati na kisuku ya molili mpe kokabola lolenge nini Mobikisi azali Pole ya bomoi na bango. Nsima, ntango ozali kotanga Yoane 1:4–10, bato ya libota bakoki kozala na boyebi mosusu kati na litatoli ya Yoane na ntina ya Yesu Klisto, Pole ya Mokili.

Yoane 1:35–36.Mpo na nini Yoane Mobatisi abengaki Yesu “mwana Mpate ya Nzambe”? Toyekoli nini etali nkombo oyo uta nsango ya Mpaka Jeffrey R. Holland “Behold the Lamb of God” to nsango ya Mpaka Gerrit W. Gong “Good Shepherd, Lamb of God”? (Liahona, Sanza ya mitano 2019, 44–46, 97–101)

Yoane 1:35–46.Nini eyaki na nsuka ya litatoli ya Yoane? Nini libota na yo ekoki koyekola uta na bato balimbolami kati na milongo oyo na ntina ya lolenge nini kokabola nsango malamu? Tala lisusu video “Inviting Others to ‘Come and See’” (ChurchofJesusChrist.org).

Yoane 1:45–51.Natanaele asalaki nini oyo esungaki ye azwa litatoli ya Mobikisi? Bengisa bato ya libota basolola na ntina ya lolenge nini bazweli matatoli na bango.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “The Lord Is My Light,” Hymns, no. 89.

Kobongisa Koteya na Biso

Bokabola mateya ya ndakisa. Bengisa bato ya libota bazwa biloko oyo bakoki kosalela mpo na kosalisa bango basosola mibeko ezwami kati na makomi oyo ozali kotanga lokola libota. Ndakisa, bakoki kosalela buzi mpo na kolakisa Pole ya Klisto (tala Yoane 1:4).

Elilingi
Yesu Klisto azali kokela mabele

Yehova Akeli Mabele, na Walter Rane

Bimisa na lokasa