Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya zomi na mibale 26–Sanza ya yambo 1. Tozali na Mokumba ya Boyekoli na Biso Moko


“Sanza ya zomi na mibale 26–Sanza ya yambo 1. Tozali na Mokumba ya Boyekoli na Biso Moko,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya zomi na mibale 26–Sanza ya yambo 1. Tozali na Mokumba ya Boyekoli na Biso Moko,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Libota ezali kotala album ya foto

Sanza ya zomi na mibale 26–Sanza ya yambo 1

Tozali na Mokumba ya Boyekoli na Biso Moko

Ntina ya makomi ezali ya kosunga biso toya epai ya Klisto mpe tokoma ya kobongwana makasi na nsango malamu na Ye. Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota ekoki kosunga bino bososola makomi mpe bozwa kati na yango makasi ya molimo oyo bino mpe libota na bino bosengeli na yango. Nsima, na bakelasi na bino ya Eklezia, bokozala na mabaku ya kokabola makanisi mpe mpiko ya baninga na bino Basantu na makasi na bango mpo na kolanda Klisto.

Koma Makanisi na Yo

“Nini bozali koluka?” Yesu Klisto atunaki bayekoli ya Yoane Mobatisi (Yoane 1:38). Bokoki komituna motuna yango kaka—mpo maye bokozwa na Kondimana na Sika mobu oyo ekotalela makasi nini bokoluka. “Boluka, mpe bokozua” ezali elaka ya Mobikisi (Matai 7:7). Yango wana botuna mituna oyo eyei na makanisi na bino ntango bozali koyekola, mpe boluka na etingya biyano. Kati na Kondimana na Sika bokotanga oyo etali makambo ya molimo ya nguya ya bayekoli ya Yesu Klisto. Lokola moyekoli ya bosembo ya Mobikisi, okoki kozala na makambo ya molimo ya nguya ntango ondimi libengisi ya Mobikisi, oyo ezwami na nzela ya buku ya bule oyo mobimba, “Yaka, landa ngai” (Luka 18:22).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Mpo na koyekola solo uta na Mobikisi, nasengeli kondima libengisi na Ye, “Yaka, landa ngai.”

Libengisi ya Mobikisi, “Yaka, landa ngai,” ezali mpo na banso—ata soki tozali bato ya sika na nzela ya kimoyekoli to tolandi yango bomoi na biso mobimba. Oyo ezalaki libengisi na Ye na elenge mobali ya bozwi oyo azalaki koluka kobatela mitindo (tala Matai19:16–22; Luka 18:18–23). Nini elenge mobali ayekolaki—mpe nini tosengeli banso koyekola—ezali ete kozalaka moyekoli elingi koloba kopesaka milimo na biso mibimba na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Tozali kokola na kimoyekoli ntango tomonaka nini tozangi, tosalaka mbongwana, mpe tolukaka kolanda Bango na mobimba.

Koyekola uta na Mobikisi ebandaka ntango tolukaka kososola nini Ye ateyaki. Ndakisa, lolenge nini bososoli na yo ya bomikitisi ekoli ntango oyekoli maye malandi?

Soki olingi koyekola mingi, meka molulu oyo na mobeko mosusu ya nsango malamu, lokola bolingo to bolimbisi.

Nazali na mokumba ya koyekola ngai moko.

Mpaka David A. Bednar ateyaki: “Tosengeli te kozela ete Eklezia lokola lingomba eteya to elobela biso nyonso tosengeli koyeba mpe kosala mpo na kokoma bayekoli oyo bamipesa mpe koyika mpiko tii na nsuka. Nzokande, mokumba na biso ya moto se moko ezali ya koyekola nini tosengeli koyekola, kotambwisa bomoi lolenge toyebi tosengeli kotambwisa, mpe kokoma banani Nkolo alingi biso tokoma. Mpe bandako na biso ezali bisika ya ebandeli mpo na koyekola, kobika mpe kokoma” (“Prepared to Obtain Every Needful Thing,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 102).

Nini yango elingi koloba na yo kozwa mokumba to boyanoli ya boyekoli na yo moko? Boluka biyano bikoki kati na esakola ya Mpaka Bednar mpe makomi oyo elandi: Yoane 7:17; 1 Batesaloni 5:21; Yakobo 1:5–6, 22; 2:17; 1 Nefi 10:17–19; 2 Nefi 4:15; Alama 32:27; mpe Malongi mpe Mayokani 18:18; 58:26–28; 88:118. Nini oyoki efuli yo kosala mpo na kozala makasi mingi koleka na koyekola nsango malamu?

Nazali na mposa ya koyekola bosolo ngai moko.

Ntango mosusu oyebi bato oyo bazali ata mokolo moko te lokola kobungisa bondimi na bango, likambo te nini esalamaka na bomoi na bango. Bakoki kokundolisa bino baseka mitano ya bwanya kati na lisese ya Mobikisi (tala Matai 25:1–13). Nini okoki komona te ezali makasi ya etingya mpo na kolendisa matatoli na bango ya bosolo.

Lolenge nini tozwaka mpe toleisaka matatoli na biso moko? Bokoma makanisi na bino ntango bozali komaniola makomi oyo elandi: Luka 11:9–13; Yoane 5:39; 7:14–17; Misala 17:10–12; 1 Bakolinti 2:9–11; mpe Alama 5:45–46. (Tala lisusu Mateya ya Nsango malamu, “Litatoli,” topics.ChurchofJesusChrist.org

Elilingi
Elenge mwasi mpembeni ya nzela

Moko na moko na biso asengeli kozwa litatoli biso moko.

Nini nasengeli kosala ntango nazali na mituna?

Ntango ozali koluka boyebi ya molimo, mituna ekoya na makanisi na yo. Mibeko oyo elandi ekoki kosunga koyanola mituna na ndenge oyo etongaka bondimi mpe litatoli:

  • Boluka bososoli uta na Nzambe. Nzambe azali liziba ya bosolo nyonso, mpe Ye amonisaka bosolo na nzela ya Molimo Mosantu, makomi, mpe baprofeta mpe bapostolo na Ye.

  • Kosala na bondimi. Soki biyano ezali koya nokinoki te, zala na elikya ete Nkolo akomonisa biyano ntango ngonga ekoya. Na ntango oyo, koba kobika engebene na bosolo oyo osili koyeba.

  • Bobomba elikya ya seko. Meka komona makambo lokola Nkolo amonelaka yango, kasi lokola mokili emonaka te. Tala mituna na yo na lolenge ya mwango ya lobiko ya Tata na biso na Lola.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 13:1–23.Mpo na kosunga libota na yo emilengela mpo na koyekola uta na Kondimana na Sika mobu oyo, okoki kotanga lisese ya moloni. Libota na yo ekoki kosepela kokende libanda mpe koluka ndenge ekeseni ya mabele maye elimbolami na lisese. Lolenge nini tokoki kasala mitema na biso lokola “mabele malamu” oyo Yesu alimbolaki? (Matai 13:8).

Bagalatia 5:22–23; Bafilipi 4:8.Mokambi Russell M. Nelson abengisi bino “bobongola [ya bino] ndako na ndako ya losambo ya bondimi” mpe “bobongisa lisusu ndako na bino ekoma ndako ya boyekoli nsango malamu.” Na baoyo bazali kosala makambo oyo, alaki: “Ya bino bana bakosepela mingi koyekola mpe kosalela mateya ya Mobikisi, mpe nguya ya monguna na ya bino bomoi mpe na ya bino ndako ekokita. Bambongwana na libota na bino ekozala makasi mpe ekowumela” (“Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 113).

Ebandeli ya mobu ya sika ezali ngonga malamu ya kosala likita ya bopesi toli ya libota mpo na oyo etali kosala ndako na bino “ndako ya losambo ya bondimi” mpe “ndako ya koyekola nsango malamu.” Makanisi nini mpo na oyo etali lolenge nini ya kosala oyo eyei na motema na yo ntango totangi Bagalatiia 5:22–23 mpe Bafilipi 4:8? Ntango mosusu libota na bino ekoki kotia mikano ya moto ye moko mpe ya libota mpo na koyekola Kondimana na Sika mobu oyo ezali koya. Nini tokoki kosala mpo na komikundola biso moko mikano na biso?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Teach Me to Walk in the Light,” Children’s Songbook,, 177.

Kobongisa Boyekoli Na Yo Moko

Luka malongi. Malongi ezali bosolo moko ya seko, ebongwanaka te. Mokambi Boyd K. Packer asakolaki ete “malongi ya solo, soki esosolami, ekobongola ndenge ya moto mpe bizaleli” (“Little Children,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1986, 17). Ntango yo mpe libota na yo bokoyekola ya makomi, boluka bosolo oyo ekoki kosunga bino kozala mingi lokola Mobikisi.

Elilingi
Yesu Klisto

Pole ya Mokili, na Brent Borup

Bimisa na lokasa