Boyokani ya Sika 2023
Sanzaaya Yambo 2–8. Matai 1; Luka 1: “Tika Ebimela Ngai Lokola Elobi Yo”


“Sanza ya Yambo 2–8. Matai 1; Luka 1: ‘Tika Ebimela Ngai Lokola Elobi Yo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya Yambo 2–8. Matai 1; Luka 1,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Malia mpe Elizabeta

Sanza ya Yambo 2–8

Matai 1; Luka 1

“Tika Ebimela Ngai Lokola Elobi Yo”

Ntango ozali kotanga mpe komanyola Matai1 mpe Luka 1, koma makanisi ya molimo oyo okozwa. Bosolo ya malongi nini ozwi? Nsango nini ekozala ya motuya koleka nyonso mpo na yo mpe libota na yo? Makanisi ya koyekola kati na mwango oyo ekoki kosunga yo omona makanisi mosusu.

Koma Makanisi na Yo

Na emoneli ya mokufi, ekoki kosalama te. Moseka akokaki kozwa zemi te—to ekokaki te mwasi ekomba oyo alekisaki mibu ya kobota bana abota. Kasi Nzambe azalaki na mwango mpo na mbotama ya Mwana na Ye mpe mbotama ya Yoane Mobatisi, yango wana Malia mpe Elizabeta lokola, kotelemelaka makanisi nyonso ya mabele, bakomaki bamama. Ekoki kosunga komikundola makambo na bango ya kokamwa ntango nyonso tokutanaka na makambo moko oyo ezali komonana lokola ekoki kosalama te. Ekoki biso kolonga botau na biso? Ekoki biso kosimba motema ya moto ya libota oyo azali koyanola te? Gabaliele akokaki na pete kolobela biso ntango akundolisaki Malia, “Epai na Nzambe makambo nyonso makoki kosalama” (Luke 1:37). Mpe eyano ya Malia ekoki lisusu kozala ya biso ntango Nzambe amonisi bolingi na Ye: “Tika Ebimela Ngai Lokola Elobi Yo” (Luka 1:38).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Matai mpe Luka bazalaki banani?

Matai azalaki moto ya leta Moyuda, mokongoli ya mpako, oyo yesu abiangaki lokola moko ya bapostolo na Ye (tala Matai 10:3; tala lisusu Bible Dictionary, “Publicans”). Matai akomaki Nsango malamu na ye mingi mingi epai ya bandeko na ye Bayuda; nzokande, aponaki kobeta nsete na masakoli ya Kondimana na Kala oyo etali Masiya oyo ekokisamaki na nzela ya bomoi mpe mosala ya Yesu.

Luka azalaki monganga Moyuda Te oyo akendaki mobembo elongo na Apostolo Paulo. Akomaki Nsango malamu na ye nsima ya liwa ya Mobikisi ya liboso mpo na bayoki oyo bazali Bayuda Te. Atatolaki na ntina ya Yesu Klisto lokola Mobikisi ya Bayuda Te mpe Bayuda mpe lokola. Akomaki matatoli amonaki kati na bomoi ya Mobikisi, mpe abakisaki masolo mingi oyo elobeli basi koleka Basango malamu mosusu.

Tala lisusu Dictionnaire ya Biblia, “Gospels,” “Matai,” “Luka.”

Matai 1:18-25; Luka 1:26-35.

Yesu Klisto abotamaki na mama moko na nzoto ya kufa mpe Tata ya kufa te.

Na Matai 1:18–25 mpe Luka 1:26–35, tala lolenge nini Matai mpe Luka balimbolaki likamwisi ya mbotama ya Yesu. Lolenge nini ndiimboli na bango elendisi bondimi na yo na Mobikisi? Mpo na nini ezali ntina mpo na yo koyeba ete “Yesu azalaki na mbala moko Mwana mobali ya Nzambe mpe mwana mobali ya Malia?

Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki ete Bomikabi ya Yesu Klisto “esengaki libonza ya moto ye moko na nzela ya moto ya kufa te oyo azali mpo na liwa te. Nzokande asengeli kokufa mpe kozwa lisusu nzoto na Ye moko. Mobikisi azalaki bobele moko oyo akokaki kokokisa masengami oyo. Uta na mama na Ye Asangolaki nguya ya kokufa. Uta na Tata na Ye Azwaki nguya likolo ya liwa” (“Constancy amid Change,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1993, 34).

Luka 1:5–25, 57-80.

Mapamboli ya Nzambe eyaka na ngonga na Ye moko.

Soki omimoni kozelaka lipamboli moko to soki emonani lokola ete Nzambe azali koyoka nsambo na yo te, lisolo ya Elizabeta mpe Zekalia ekoki kozala bokundoli moko ete Ye abosani yo te. Lokola Mpaka Jeffrey R. Holland alakaki: “Ntango tozali kosala mpe kozela elongo biyano na nsambo mosusu ya biso, napesi bino elaka na ngai ya kiapostolo ete nsambo na bino ezali koyokama mpe koyanolama, atako ntango mosusu te na ngonga to na lolenge tolingelaki. Kasi yango ezali ntango nyonso koyanolama na ngonga mpe na lolenge moboti moyebi manso mpe ya seko ya mawa asengeli koyanola yango” (“Waiting on the Lord,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 115–16). Lolenge nini Zekalia mpe Elizabeta batikalaki bosembo? (tala Luka 1:5–25, 57–80). Omimonaka kozelaka lipamboli moko? Nini okanisi Nkolo azelaka epai na yo ntango ozelaka?

Elilingi
Elizabeta mpe Zekalia elongo na mwana Yoane

Nsima ya kozela na bosembo, Elizabeta mpe Zekalia bapambolamaki na mwana moko.

Matai 1:18-25; Luka 1:26–38

Bayengebene bomipesaka na motema moko na bolingi ya Nzambe.

Lokola Malia, ntango mosusu tomonaka ete miango ya Nzambe mpo na bomoi na biso ezali mpenza ya kokesana uta na nini tokanaka. Nini toyekoli uta na Malia mpo na oyo etali kondima bolingi ya Nzambe? Na bitando oyo elandi, koma maloba uta na anzelu mpe Malia (tala Luka 1:26–38), elongo na yango bansango oyo okomona na maloba na bango:

Maloba ya anzelu epai ya Malia.

Nsango mpo na ngai

Maloba ya anzelu epai ya Malia.

“Nkolo azali na yo elongo” (molongo 28).

Nsango mpo na ngai

Nkolo ayebi ezalela mpe bitumba na ngai.

Maloba ya anzelu epai ya Malia.

Nsango mpo na ngai

Maloba ya anzelu epai ya Malia.

Nsango mpo na ngai

Biyano ya Malia

Nsango mpo na ngai

Biyano ya Malia

“Oyo ekozala boni?” (molongo 34).

Nsango mpo na ngai

Ezali malamu kotuna mituna mpo na kososola malamu koleka bolingi ya Nzambe.

Biyano ya Malia

Nsango mpo na ngai

Biyano ya Malia

Nsango mpo na ngai

Ntango ozali kotanga oyo etali ndakisa ya bosembo ya Yosefe Matai 1:18-25, oyekoli nini na ntina ya kondima bolingi ya Nzambe? Makanisi mosusu nini oyekoli uta na makambo ya Zekalia mpe Elizabeta ? (tala Luka 1).

Tala lisusu Luka 22:42; Bible Dictionary, “Gabriel.”

Luka 1:46–55

Malia atatolaki na ntina ya etinda ya Yesu Klisto

Maloba ya Malia kati na Luka 1:46–55 esakolaki biteni mosusu ya etinda ya Mobikisi. Oyekoli nini mpo na oyo etali Yesu Klisto uta na maloba ya Malia? Okoki komekola milongo oyo na maloba ya Hana kati na 1 Samwele2:1–10 mpe Bisengo Mwambe ya Yesu kati na Matai 5:3–12. Molimo eteyi yo nini ntango ozali komaniola milongo oyo?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Matai 1:1–17.Ntango libota na yo ezali kotanga bonkoko ya Yesu, okoki kosolola na ntina ya lisitwale ya libota na yo moko mpe kokabola mwa masolo etali bankoko na yo. Lolenge nini koyebaka maye etali lisitwale ya libota epamboli libota na yo? Mpo na milulu mingi ya lisitwale ya libota, tala FamilySearch.org/discovery.

Matai 1:20; Luka 1:11–13, 30.Mpo na nini bato na milongo oyo bazalaki kobanga-banga? Nini etindaka biso toyoka kobanga? Lolenge nini Nzambe abengisaki biso ete “tobanga te”?

Luka 1:37.Mpo na kosunga libota na yo etonga bondimi ete “Epai na Nzambe makambo yonso makoki kosalema,” okoki koluka na Luka 1 elongo mpe komona makambo Nzambe asalaki oyo ekoki komonana ete ekoki kosalama te. Masolo nini mosusu ekoki biso kokabola—uta na makomi to bomoi na biso moko—kati na oyo Nzambe asalaki makambo mamonanaki lokola maye makoki kosalama te? Koluka na kati na Gospel Art Book ekoki kopesa makanisi.

Luka 1:46–55.Nini ezali ndambo ya “Makambo minene” Mobikisi asalaki mpo na biso? Nini Yango elingi koloba mpo na milimo na biso “kokumisa Nkolo”?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “He Sent His Son,” Children’s Songbook,, 34–35.

Kobongisa Mateya na Biso

Salela makomi na bomoi na yo. Nsima ya kotangaka eteni moko ya makomi, bengisa bato ya libota basalela yango na bomoi na bango (tala Teaching in the Savior’s Way21). Ndakisa, lolenge nini bato ya libota batiaka na misala maye bayekoli uta na Matai 1 mpe Luka1 mpo na oyo etali koyanolaka libiangi ya Nkolo?

Elilingi
Gabaliele abimelaki Malia

Opambolami kati na Basi, na Walter Rane

Bimisa na lokasa