Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya Yambo 9–15. Matai 2; Luka 2: Toyei mpo na Kokumbamela Ye


“Sanza ya Yambo 9–15. Matai 2; Luka 2: Toyei mpo na Kokumbamela Ye,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya Yambo 9–15. Matai 2; Luka 2,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Bato ya Bwanya kosalaka mobembo likolo ya kamela

Tika Biso Tosanzola Ye, na Dana Mario Wood

Sanza ya Yambo 9–15

Matai 2; Luka 2

Toyei mpo na Kokumbamela Ye

Ntango ozali kotanga Matai2 mpe Luka 2, tiaka bokebi na makanisi ya molimo nyonso oyo okozwa. Makanisi ya koyekola kati na mwango oyo ekoki kosunga yo omona mibeko ya ntina mpe ya motuya na mikapo oyo.

Koma Makanisi na Yo

Uta na mikolo ya mbotama na Ye, ezalaki polele ete Yesu azalaki mwana ya pamba pamba te. Ezalaki kaka monzoto ya sika na likolo to esakola ya esengo ya banzelu te oyo esalaki ete bomwana ya Yesu eyebana. Ezali mpe lisusu likambo ete ebele ya bato ya bosembo ya boye—uta na bikolo, misala, mpe boyebi ekeseni—fbayaki koyoka mpe bakambamaki epai na Ye. Kutu liboso ya kobwaka mbela ya libengisi na Ye ya “Yaka, landa ngai,” bayaki (Luka 18:22). Moto nyonso te ayaki epai na Ye, solo mpenza. Ezalaki na mingi oyo basalaki keba na Ye te, mpe moyangeli ya zuwa alukaki kutu bomoi na Ye. Kasi baluki na komikitisa, baye ya peto, oyo bamipesaki na boyengebene bamonaki Ye lokola Azalaki—Masiya oyo balakamaki. Bomipesi na bango na losambo efulaka oyo ya biso moko, mpo ete “nsango malamu na esengo monene” oyo ememaki na babateli mpate ezalaki mpo na “bato nyonso,” mpe “Mobikisi, ye Klisto Nkolo ” abotelamaki biso nyonso mokolo wana (tala Luka 2:10–11).

Elilingi
elembo ya koyekola ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Luka 2:1–7

Yesu Klisto abotamaki na ezalela ya komikitisa

Atako Yesu Klisto azwaki nkembo na Nzambe Tata “liboso ete mokili ezalisama” (Yoane 17:5), Ye azalaki na bolingi ya kobotama na ezalela ya bosawa mpe kofanda kati na biso na mokili. Ntango ozali kotanga Luka 2:1–7, manyola maye lisolo ya mbotama na Ye ezali koteya yo na ntina na Ye. Meka komona makambo ya mike mike to makanisi kati na lisolo oyo omonaki te liboso. Lolenge nini komonaka makambo oyo etuti mayoki na yo epayi na Ye?

Tala lisusu “The Christ Child” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Matai 2:1–12; Luka 2:8–38

Ezali na banzeneneke mingi ya mbotama ya Klisto.

Mbotama mpe bomwana ya Klisto ezalaki na bilembo ya banzeneneke mpe bakumbameli uta na bipai na bipai. Ntango ozali kotala masolo na bango, nini oyekoli mpo na oyo etali ndenge ya kokumbamela mpe kotatola ya Klisto?

Kotatola ya Klisto

Nayekoli nini mpo na oyo etali kokumbamela mpe kotatola Klisto?

Kotatola ya Klisto

Babateli mpate (Luka 2:8–20)

Nayekoli nini mpo na oyo etali kokumbamela mpe kotatola Klisto?

Kotatola ya Klisto

Simeona (Luka 2:25–35)

Nayekoli nini mpo na oyo etali kokumbamela mpe kotatola Klisto?

Kotatola ya Klisto

Anna (Luka 2:36–38)

Nayekoli nini mpo na oyo etali kokumbamela mpe kotatola Klisto?

Kotatola ya Klisto

Bato ya Bwanya (Matai 2:1–12)

Nayekoli nini mpo na oyo etali kokumbamela mpe kotatola Klisto?

Tala lisusu 1 Nefi 11:13–23; 3 Nefi 1:5–21; “Shepherds Learn of the Birth of Christ” mpe “The Christ Child Is Presented at the Temple” (videos), ChurchofJesusChrist.org.

Matai 2:13–23

Baboti bakoki kozwa emoniseli mpo na kobatela mabota na bango.

Yosefe akokaki mokolo moko te kosala maye asengisamaki kosala—kobatela Yesu na bomwana na Ye—kozangaka lisalisi ya likolo. Lokola Bato ya Bwana, azwaki emoniseli oyo ekebisaki ye na likama. Ntango ozali kotanga oyo etali likambo ya Yosefe kati na Matai 2:13-23, kanisa oyo etali makama ya nzoto mpe ya molimo oyo ekutaka biso lelo. Kanisa makambo ntango oyokaki botambwisami ya Nzambe kati na kobatelaka yo mpe balingami na yo. Kanisa kokabola makambo oyo elongo na basusu. Nini okoki kosala mpo na kozwa botambwisami ya boye na mikolo ekoya?

Lisusu, okoki kokanisa kotalaka video “The First Christmas Spirit” (ChurchofJesusChrist.org) mpo na bolimboli ya maye Yosefe akokaki koyoka ntango akutanaki na mokumba ya kobatela Mwana ya Nzambe.

Luka 2:40–52

Kutu lokola elenge, Yesu afandisaki makanisi kaka na kosalaka bolingi ya Tata na Ye.

Lokola elenge mobali, Mobikisi ateyaki nsango malamu na nguya mpenza ete kutu bateyi kati na tempelo bakamwaki na ya Ye “bososoli mpe biyano” (Luka 2:47). Nini oyekoli uta na milongo oyo na ntina ya Mobikisi lokola elenge mobali? Lolenge nini bilenge oyo oyebi bazali komeka “kozala kati na mosala ya Tata [na bango]”? (Luka 2:49). Lolenge nini osungi bilenge mpe bana bazwa bososoli moko ya mozindo ya nsango malamu? Nini lisusu oyekolaka uta na ndakisa ya bomwana ya Yesu na Luka 2:40–52 mpe na Bobongoli ya Joseph Smith, Matai 3:24–26 (na bobakisi ya Biblia)?

Elilingi
Yesu lokola elenge mobali elongo na bateyi kati na tempelo

“Boyebaki te ete esengeli na ngai kozala kati na mosala ya Tata na Ngai?” (Luka 2:49).

Bobongoli ya Joseph Smith ezali nini?

Mpo makambo ya solo “ya polele mpe ya motuya mingi” ebungisamaki uta na Biblia na bikeke (1 Nefi 13:28; tala lisusu Mose 1:41), Nkolo atindaki Joseph Smith asala mosala ya kotanga lisusu efulama ya Biblia, eyebani lokola Bobongoli ya Joseph Smith. Makambo atangaki mpe abongolaki lisusu mingi oyo esalamaki na nzela ya Profeta ebakisaki bobakisi ya bobimisi ya makomi ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Bobongoli ya Joseph Smith ya Matai 24, eyebani lokola Joseph Smith—Matthew, ekoki kozwama kati na Liyaka ya Ntalo Monene. Mpo na kozwa nsango mingi, tala “Joseph Smith Translation (JST)” na the Bible Dictionary mpe biteni ya Gospel Topics “Bible, Inerrancy of” (topics.ChurchofJesusChrist.org).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Luka 2.Senga bato ya libota bapona moto moko alimbolami kati na Luka 2, tanga mwa milongo mitali masolo ya moto wana na Mobikisi, mpe kabola eloko moko oyo bayekolaki oyo ematisi bondimi na bango kati na Yesu Klisto. Yemba elongo “Mary’s Lullaby” to “The Nativity Song” (Children’s Songbook, 44–45, 52–53). Toyekoli nini uta na banzembo oyo etali mbotama ya profeta?

Kanisa lolenge nini mosala ya ntoki ekoki kotombola lisolo na bino mpo na oyo etali mbotama ya Klisto. (Ndakisa, tala Gospel Art Book to history.ChurchofJesusChrist.org/exhibit/birth-of-Christ.)

Matai 2:1–12.Oyekoli nini mpo na oyo etali koluka mpe komona Mobikisi uta na ndakisa ya Bato ya Bwanya?

Luka 2:41–49.“Mosala ya Tata” ezali nini? (Luka 2:49; tala Mose 1:39; General Handbook: Serving in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints1.2, ChurchofJesusChrist.org). Nini toyekoli mpo na oyo etali mosala wana uta na lisolo yango na ElamanI 02:41-49? Kanisa kokoma banzela mosusu libota na yo akoki kosala elongo na ndako ya Tata mpe kotia yango na mbeki. Na poso ekoya, ntango libota na yo ekozala koluka ndenge ya kosunga na mosala ya Tata na Lola, bakoki kopona makanisi uta na mbeki yango. Sala mwango ya ntango okokabola boyebi na yo.

Luka 2:52Nini tokoki koyekola uta na Luke 2:52 mpo na oyo etali lolenge nini Yesu akolaki na bomoi na Ye? Bantina nini ya moto ye moko to ya libota tokoki kotia mpo na kokola “na bwania mpe nzoto, mpe na kondimama na Nzambe mpe moto”?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Stars Were Gleaming,” Children’s Songbook, 37.

Kobongisa Boyekoli Makomi na Yo moko

Kosalela lisungi ya boyekoli makomi. Mpo na kozwa boyebi ntango ozali koyekola makomi, salela makoki lokola matangi na nse ya lokasa, Bokambi na Masolo, lisusu Dikisionele ya Biblia, Bokambi na Makomi, mpe masalisi masusu mpo na boyekoli ezwami na ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
Maliya, Joseph mpe mwana Yesu

Mobikisi ya mokili ayaki na mabele na bizalela ya komikitisa.

Bimisa na lokasa