2010–2019
Mosambisi ya Bosembo
Sanza ya Zomi 2016


10:25

Mosambisi ya Bosembo

Ezali na lolenge se moko ya kosambisa na bosembo, lokola Yesu Klisto asalaka, mpe wana esengeli kozala lokola Ye azali.

Na bomoi na Ye na bokufi, Yesu Klisto azalaki mosambisi moko ya bolingo mpe ya bwania ya momesano te, ya bokebi, mpe ya bompikiliki. Ayebani na makomi lokola “mosambisi ya bosembo” (2 Timote 4:8; Moses 6:57), mpe toli na ye na biso ezali biso lisusu “tosambisa basambisi ya bosembo” (tala Joseph Smith Translation, Matthew 7:1–2 [na Matai 7:1, litangi ya nse a]) mpe “botia elikia na bino na Molimo wana oyo akambaka na kosala malamu … [mpe] kosambisa na bosembo” (D&A11:12).

Mpo na kosalisa biso tosambisa lokola Ye asalaki, apesaki toli oyo na Banefi Zomi na Mibale: “Bokozala basambisi ya bato oyo, engebene na bosambisi oyo nakopesa bino, oyo ekozala ya boyengebene. Yango wana, bato ya lolenge kani bosengeli kozala? Ya solo, nalobi na bino, kutu lokola nazali” (3 Nefi 27:27; kobeta nsete ebakisami). Ntango mosusu tobosanaka ete ntango Ye apesaki toli ya kozala lokola Ye azali, azalaki kolobela boni kosambisa na bosembo.

Bosambisi ya Bosembo te

Mobikisi elongo na Bafalisi mpe bakomi

Ndakisa moko ya nsoni ya bosambisi ya bosembo te ewuti na lisese ya mpate ebunga, ntango Bafalisi mpe bakomi basambisaki mabe Mobikisi mpe baninga na Ye na bolei, kolobaka, “Moto oyo azali koyamba basumuki, mpe kolia elongo na bango” (Luka 15:2)—kobosanaka likambo oyo ete bazalaki basumuki bango moko. Kozalaka na mitema ya kokweyisa, bakomi mpe Bafalisi bayebaki ata moke te esengo ya kobikisa bampate babunga.

Mobikisi elongo na mwasi azwamaki na ekobo

Ezalaki lisusu “bakomi mpe Bafalisi” oyo bamemaki “mwasi moko azwamaki na ekobo” (Yoane 8:3) epai ya Mobikisi mpo na kotala soki Ye alingaki kosambisa ye engebene na mobeko ya Mose (tala molongo 5). Boyebi nsuka ya lisolo wana, boni akitisaki bango mpo na bosambisi na bango ya bosembo te mpe boni “bandimisamaki na kasansa na bango moko ” mpe bakendeki “moko na moko” (molongo 9; nsete ebakisami). Nde alobaki na mwasi, “Mpe ngai nakweyisi yo te: kende, mpe kosumuka lisusu te. Mpe mwasi wana apesaki nkembo na Nzambe uta ngonga wana, mpe andimelaki nkombo na ye” (Joseph Smith Translation, John 8:11 [na Yoane 8:11, litangi na nse c]).

Mobikisi kolobaka na mwasi azwamaki na ekobo

Mobali mpe mwasi ya mokili na kati na moko na moko na biso amesani kokweyisa basusu mpe kosambisa na bosembo te, to na bosembo ya biso moko. Kutu ekomelaki Yakobo mpe Yoane, Bapostolo mibale ya Mobikisi. Batombokaki ntango bato na mboka moko ya Samalia basalelaki Mobikisi na limemia te (tala Luka 9:51–54):

Mobikisi elongo na balandi

“Mpe ntango [bango] bamonaki ye, balobaki, Nkolo, olingi ete totinda moto ekita uta na lola, mpe ezikisa bango, kutu lokola Eliya asalaki?

“Kasi abalukaki, mpe apambelaki bango, mpe alobaki, Bino boyebi te lolenge kani ya molimo bozali na yango.

“Mpo Mwana ya moto ayei to mpo na kobebisa bomoi ya bato, kasi mpo na kobikisa bango” (milongo 54–56).

Basambisi ya bisika ya lelo (D&A 107:74) basangeli koboya botindiki ya nyonso na kokweyisa, lokola Yakobo mpe Yoane basalaki na libaku wana. Mosambisi ya bosembo akoyangola ya ntubela na mawa mpe bososoli. Elenge moko oyo abungaki, na ndakisa, asengeli kotika bilo ya episikopo koyokaka bolingi ya Mobikisi na nzela ya episikopo mpe kozingama na esengo mpe nguya ya kobikisa ya Bomikabi—na nsoni to kotiolama ata moke te. Soki te, episikopo wana akoki na kozanga koyeba kobengana mpate abunga lisusu na kati ya esobe (tala Luka 15:4).

Bosemboli

Nzokande, mawa elongoli te ntina ya kosembola. Liloba bosemboli ewuti na liloba ya Latin discere, “koyekola,” to discipulus, “moyekoli,” kokomisa moyekoli mpe molandi.1 Kosembola na lolenge ya Nkolo ezali koteya na bolingo mpe bompikiliki. Na makomi Nkolo mbala mingi asalelaka liloba kopesa etumbu, na kolobelaka bosemboli (tala, na ndakisa, Moziya 23:21; D&A 95:1). Liloba kopesa etumbu ewuti na Latin castus,,” elingi koloba “ya mbindo te to ya peto,” mpe kopesa etumbu elingi koloba “kopetola.”2

Na mokili, ezali mosambisi ya mabele nde akweyisaka moto mpe akanga ye na boloko. Na bokeseni, Buku ya Mormon ezali koteya biso ete ntango tosumuki na bolingi, tokomi ya biso “moko basambisi” (Alma 41:7) mpe tomikangi na boloko. Na kosekisa, mosambisi ya esika na likambo oyo asimbi bafungola oyo ekokangolabikuke ya boloko; “mpo elongo na etumbu nalengeli nzela mpo na ya bango bokangolina makambo manso libanda ya lisenginia” (D&A 95:1; kobela nsete ebakisami). Ndenge ya kosambisa ya mosambisi ya bosembo ezali ya boboto, ya bolingo, mpe ya kosikola, ya kokweyisa te.

Elenge Joseph Smith basembolaki ye na mibu minei ya komekama yambo azwa bapalaki ya wolo, “mpamba te obatelaki mitindo ya Nkolo te.”3 Nsima, ntango Joseph abungisaki nkasa 116 ya nkoma, basembolaki ye lisusu. Atako ayokaki mawa ya solo, Nkolo alongolaki lisusu matomba na ye mwa ntango mokuse, mpamba te “baye nalingi nakopesa bango etumbu lokola ete masumu na bango elimbisama” (D&C 95:1).

Joseph alobaki, “Anzelu asepelaki ntango apesaki ngai lisusu Urimi mpe Tumimi mpe alobaki Nzambe asepelaki na bondimi mpe bomikitisi na ngai, mpe alingaki ngai mpo na mawa na ngai mpe etingia na ngai na losambo.”4 Mpamba te Nkolo alingi koteya na Joseph liteya moko ya kobongola motema, Ye asengaki na ye libonza ya kopasola motema—libonza kozalaka eteni ya motuya ya bosemboli.

Libonza

“Na mikolo ya kala, libonza elingaki koloba eloko moko to moto moko ya bule,”5 kokangisaka yango, na lolenge moko ekangana mpenza, mpo na kolimbola liloba kopesa etumbu—“mpo na kopetola.” Na lolenge moko, na Yisalaele ya kala, bolimbisi eyaki na nzela ya likabo ya lisumu to ya kobuka mobeko, to libonza.6 Libonza “elakis[aki] libonza wana ya monene mpe ya nsuka” (Alma 34:14) kaka te kasi esalisaki mpo na kobota ntina moko ya mozindo koleka ya botondi mpo na Bomikabi ya Mobikisi. Kozanga kolinga kobonza ezali eteni ya koseka ya mawa to na biso kokitisa libonza na Ye ya monene koleka mpo na lisumu wana kaka mpe komona mpamba mpasi na Ye—lolenge moko ya kozanga botondi na koyeba te.

Na loboko mosusu, na nzela ya liseki ya libonza, ya solo biso tolongi eloko moko ya ntina ya seko—Ngolu mpe bolimbisi na Ye, mpe na nsuka “nyonso oyo Tata [yango] azali na yango” (D&A 84:38). Lokola eteni ya nzela ya boyamboli, libonza ekosala lisusu lokola mafuta ekosalisa kolongola “mawa ya kasansa” (Alma 42:18) mpo na kotia “kimia ya kasansa” (Moziya 4:3). Soki libonza te, moto akoki koyoka mpasi na komilimbisa, na ntina ya kowumela na kasansa ete eloko eloko moko elongwe.7

Moboti lokola Mosambisi ya Bosembo

Atako moke na kati na biso bakobiangama basambisi ya bisika, mabongi ya bosambisi ya bosembo ekosalelama na biso banso, mingimingi na baboti oyo bazali na libaku mokolo na mokolo ya kosalela mabongi oyo na bana na bango. Koteya mwana esali mozindo mpenza ya kimoboti malamu, mpe bosemboli ya bolingo ezali mozindo mpenza ya kozala mosambisi ya bosembo.

Mokambi Joseph F. Smith ateyaki, “Soki bana bazali batomboki mpe mpasi na kolandela, bozala na bompikiliki na bango kino bokoki kolonga na bolingo, … mpe nde okoki [kosala] bomoto na bango lokola osepeli.”8

Ezali likambo ya mozindo ete nakoteyaka boni kosembola, baprofeta bamonani lokola ete ntango nyonso balakisi bizalela ya Boklisto. Doctrine et Alliances epesi biso toli oyo eyebana malamu ya oyo etali kosembola:

“Nguya to bokasi te ekoki to esengeli kotiama na nzela ya bonganganzambe, bobele na kondimisa, na motema molai, na boboto mpe bosekomi, mpe na bolingo ya lokuta te;

“Na boboto, mpe boyebi ya peto, oyo ekokomisa monene mingi molimo na bokibisi te, mpe mayele mabe te—

“Kopamelaka ntango mosusu na mpiko, ntango otindami na Molimo Mosantu; mpe nde kolakisaka nsima bobakisi ya bolingo” (D&A 121:41–43).

Makomi oyo eteyi biso kopamela “ntango otindami na Molimo Mosantu,” te ntango atindami na nkanda. Molimo Mosantu mpe nkanda bayokanaka te, mpamba te “ye oyo azali na molimo ya koswana azali ya ngai te, kasi azali ya zabulu, oyo azali tata ya boswani, mpe ye akotindikaka mitema ya bato na koswana na nkanda” (3 Nefi 11:29). Mokambi George Albert Smith ateyaki ete “makambo ya boboto te elobelami mbala mingi na nse ya bofuli ya Nkolo te. Molimo ya Nkolo ezali molimo ya boboto; ezali molimo ya bompikiliki; ezali molimo ya bolingani mpe bolingo mpe kondima mpe motema molai. …

“… Kasi soki tozali na motema ya komonaka libunga … na lolenge moko ya kobebisa, yango ata moke te eyaka lokola mbano ya kimoninga ya Molimo ya Tata na biso ya Lola mpe esalaka ntango nyonso mpasi.

… Boboto ezali nguya oyo Nzambe apesi biso mpo na kofungola mitema makasi mpe milimo ya botomboki.”9

Nkombo ya Solo ya Bana na Biso

Ntango Mobikisi abimelaki Banefi, asalaki likambo moko ya kafukafu na bana:

Mobikisi elongo na bana ya Banefi

“Mpe esalemaki ete ateyaki mpe asalaki na bana ya ebele …, mpe afungolaki minoko na bango, mpe balobaki epai ya batata na bango makambo ya minene mpe ya kokamwa. …

“… mpe bamonaki mpe bayokaki bana oyo; kutu babebe bafungolaki minoko na bango mpe balobaki makambo ya kokamwa” (3 Nefi 26:14, 16).

Ntango mosusu koleka kofungola minoko ya babebe, Nkolo azalaki kofungola miso matoyi ya baboti na bango oyo bakamwaki. Baboti wana bapesamaka likabo ya kafukafu ya komona na kati ya boseko mpe ya komona bozali ya soko mpe lolenge ya yambo ya bokufi ya bana na bango. Yango elingaki libela kobongola lolenge baboti bamonaki mpe basalelaki bana na bango te? Nalingaka bokeseni moko ya litangi moko ya Goethe: “Lolenge omonaka [mwana] ezali lolenge osalelaka bango, mpe lolenge osalelaka bango ezali [nani] bango [bako] koma.”10 Komikundola bozali ya solo ya mwana ezali likabo ya bomoni liboso oyo ekofula na bonzambe bomoni ya mosambisi ya bosembo.

Mpo na Kosukisa

Mokambi Thomas S. Monson ateyaki biso, “Kotika ata moke te kpokoso ya koyambola ekoma na motuya koleka moto ya kolinga.”11 Boni libongi oyo ya motuya ezali mpo na kokoma basambisi ya bosembo, mingimingi na bana na bisomei.

Ezali na lolenge se moko ya kosambisa na bosembo, lokola Yesu Klisto asalaka, mpe wana esengeli kozala lokola Ye azali. Yango wana, “lolenge kani ya mibali [mpe basi] basengeli kozala? Ya solo nalobi na bino, kutu lokola Ngai nazali” (3 Nefi 27:27). Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala “disciple,” etymonline.com.

  2. Tala Merriam-Webster’s Collegiate Dictionary, 11th ed. (2003), “chasten.”

  3. Karen Lynn Davidson and others, eds., Histories, Volume 1: Joseph Smith Histories, 1832–1844, vol. 1 of the Histories series of The Joseph Smith Papers (2012), 83.

  4. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 71; nsete ebakisami.

  5. Guide to the Scriptures, “Sacrifice,” scriptures.lds.org.

  6. Tala Bible Dictionary, “Sacrifices.”

  7. Libonza tobonzaka likolo ya masa ya elambo poso moko na moko ezali motema ebukana mpe molimo ya mawa (tala 2 Nephi 2:7; 3 Nephi 9:20; Doctrine et Alliances 59:8). Motema ebukana ezali motema ya koyambola; molimo ya mawa ezali molimo ya botosi (tala D. Todd Christofferson, “When Thou Art Converted,” Liahona, Sanza ya mitano 2004, 12).

  8. Teachings of Presidents of the Church: Joseph F. Smith (1998), 299.

  9. Teachings of Presidents of the Church: George Albert Smith (2010), 225–26, 228; nsete ebakisami.

  10. Attributed to Johann Wolfgang von Goethe, brainyquote.com/quotes/authors/j/johann_wolfgang_von_goeth.

  11. Thomas S. Monson, “Finding Joy in the Journey,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2008.