Elambo Ekoki Kosunga Biso Tokoma Basantu
Botala banzela mitano ya kokolisa bokasi mpe nguya ya kosangana mingimingi na bokuli ya elambo ebulisami.
Moko ya makundoli na ngai ya kala te ezali liyangani ya elambo oyo esalamaki na ndako na biso na Warrnambool, Australie. Tozalaki bato 10 mpe 15 basangani na etape na biso, tata na ngai, moko ya basimbi bonganganzambe misato, mingimingi azuaki libaku ya kopambola elambo. Nakundoli mayoki nayokaki ntango na komikitisa mpe na bokebi nyonso atangaki maloba ya nsambo ya elambo. Bangonga mosusu mongongo na ye ezalaki kolenga ntango ayoki Molimo. Ye azalaki ntango mosusu kopema mpo na kotala mayoki na ye yambo akokisa libondeli.
Lokola nazalaki na mibu mitano, nakokaki kososola na mobimba te ndimbola ya oyo ezalaki kolobama mpe kosalema; kasi, nayebaki eloko moko ya motuya ezalaki kosalema. Nakokaki koyoka kosimbama ya kimia mpe kondimisama ya Molimo Mosantu ntango tata na ngai akumisaki bolingo ya mobikisi mpo na biso.
Mobikisi ateyaki: “Mpe yango bokosala ntango nyonso na baye bayamboli mpe babatisami na nkombo na ngai; mpe bokosala yango na bokundoli ya makila na ngai, oyo nasopi mpo na bino, ete bokoka kotatola epai ya Tata ete bomikundoli ngai ntango nyonso. Mpe ntango nyonso bomikundoli ngai bokozala na molimo na ngai yango ekozala elongo na bino” (3 Nefi 18:11).
Nabengi biso banso kotala ba nzela mitano ya kokolisa bokasi mpe nguya ya kosangana mingimingi na bokuli ya elambo ebulisami, makuli moko oyo ekoki kosunga biso tokoma bansantu.
1. Komibongisa na Yambo
Tokoki kobanda libongisi na biso ya elambo mosika yambo liyangani ya elambo ebanda. Mokolo ya mposo ekoki kozala ntango moko malamu ya kokanisa bokobi mpe mabongisi na biso ya molimo.
Bokufi ezali likabo ya motuya na mobembo na biso ya kokoma lokola Tata na biso ya Lola. Na ya motuya koleka, ebakisami mitungisi mpe bitumba oyo emamaka mabaku mpo na biso kobongwana mpe kokola. Mokonzi Benjamin ateyaki ete “mpo moto ya mokili azali moyini ya Nzambe, … mpe akozala libela na libela, longola kaka soki amitiki na bobendi ya Molimo Monsantu, mpe abwaki mosika moto ya mokili mpe akomi moko mosantu na nzela ya bomikabi ya Klisto Nkolo” (Moziya 3:19). Kosangana na makuli ya elambo epesaka libaku ya komipesa mobimba mitema mpe milimo na biso na Nzambe.
Na komibongisa na biso, mitema na biso ebukani ntango tolakisi botondi na biso mpo na Bomikabi ya Klisto, toyamboli mabunga mpe mabebi na biso, mpe tosengi lisungi ya Tata na kokoba ya mobembo na biso mpo na kokoma koleka lokola Ye. Tokoki bongo kotala liboso libaku elambo epesi ya kokundolisa biso mbeka mpe kobandela babomipesi na biso na mayokani tosalaki.
2. Kokoma na Ngonga
Mayele na biso ya molimo ekoki kopusana ntango tokomi ngango ebele yambo ya liyangani mpe kokanisa lokola miziki ya yambo ekobetaka.
Mokambi Boyd K. Packer ateyaki: “Miziki ya libandela, eyembami na komikitisa, ezali bilei mpo na molimo. Yango ebengi lifuli.”1 “Ezali ntango te,” Mokambi Russell M. Nelson alimbolaki, “ya kosolola to kokabola baetinda kasi ntango moko ya komikotisa makasi na libondeli lokola bakambi mpe bandimi bamibongisi na molimo mpo na elambo.”2
3. Koyemba mpe Koyekola wuta na Maloba ya Loyembo ya Elambo.
Loyembo ya elambo ezali eteni moko ya motuya koleka ya mayele na biso na elambo. Miziki etombolaka makanisi mpe mayoki na biso. Loyembo ya elambo ezali kutu na botindiki ntango totie makanisi na biso na maloba mpe malongi ya nguya eteyami. Toyekolaka mingi na maloba lokola “Anyokwamaki, ayokaki mpasi, apasukaki mpo na biso,”3 “Tika biso tokundola mpe tondimisama ete mitema mpe maboko na biso ezali pembe mpe peto,”4 mpe “Esika bosolo, bolingo, mpe ngolu ekutani na bomoko ya bonzambe!”5
Ntango tozali koyemba loyembo na kobongisaka bokaboli ya bilembo, maloba ekoki kokoma eteni ya bomipesi na mayokani. Botala, na ndakisa: “Tolingi yo, Nkolo; mitema na biso etondi. Tokotambola na nzela yo oponi.”6
4. Kosangana na Molimo na Mabondeli ya Elambo (Tala na Moroni 4–5)
Na esika ya kolanda na bozangi bokebi maloba ya momesano ya mabondeli ya elambo, tokoki koyekola ebele mpe koyoka kutu koleka ntango tosangani na molimo na kotalaka babomipesi mpe kosangisa na mabondeli na kati ya mabondeli oyo ya bule.
Lipa mpe mayi epambolami mpe ebulisami mpo na milimo na biso. Yango ekundolisaka biso libonza ya Mobikisi mpe ete Ye akoki kosunga biso kokoma bansatu.
Mabondeli elimboli ete tozali kokabola lipa na kokanisaka nzoto ya Mwana, oyo Amikabaki lokola libonza mpo na kokokisa biso mpo na lisekwa, mpe tomelaka mayi na kokanisa ya makila ya Mwana, oyo Asopaki na bolingi na ye bongo ete biso tokoka kosikolama na nzela ya boyamboli.
Mabondeli ekotisaka mayokani na liloba oyo “ete bazali kolinga” (Moroni 4:3). Liloba oyo ezali na nguya ya likoki mingi mpo na biso. Ezali biso kolinga kosunga mpe kosangana? Ezali biso kolinga kobonguana? Ezali biso kolinga koloba bolembu na biso? Ezali biso kolinga kotanda loboko mpe kopambola basusu? Ezali biso kolinga kolikya na Mobikisi?
Lokola bilaka ezali kozala mpe lokola tokaboli, elakisi na mitema na biso ete tozali na bolingi:
-
Kotia likolo na biso moko nkombo ya Yesu Klisto.
-
Kosala makasi ya kobomba mitindo na Ye nyonso.
-
Ntango nyonso kokundola Ye.
Libondeli esukisami na mbela moko mpe elaka ya kitoko: “Ete bakoka ntango nyonso kozwa Molimo mpo na kozala elongo na bango” (Moroni 4:3).
Paulo akomaki, “Mbuma ya Molimo ezali bolingo, esengo, kimia, motema pete, boboto, malamu, kondima, bopolo, [mpe] komikanga motema” (Galate 5:22–23). Mapamboli mpe makabo kitoko ebongisami mpo na biso soki tobombi mayokani na biso.
5. Tia makanisi mpe Kundola Ye ntango Bilembo ya Elambo Ezali Koleka
Bantango ya komikisa ntango basimbi bonganganzambe balekisi elambo ekoki kokoma bule mpo na biso.
Ntango lipa ezali koleka, tokoki kokanisa ete, na ndakisa monene ya bolingo mpo na biso, Mobikisi akamataki “likolo na ye liwa, ete akoka kokangola nkanga ya liwa oyo ekangi bato na ye” (Alma 7:12).
Tokoki kokundola lipamboli ya nkembo ya Lisekwa oyo “ekoya epai na banso, … mowumbu mpe monsomi, babale mobali mpe mwasi, babale moto ya bolembo mpe ya bosembo; mpe kutu yango ekobunga koleka lokola nsuki moko ya mitu na bango; kasi eloko nyonso ekozonga na bobongi nie na yango lokola ezali sikawa” (Alma 11:44).
Ntango mayi ezali koleka, tokoki komikundola mbeka ya Mobikisi:
“Tala, Ngai, Nzambe, naniokwamaki biloko nyonso wana, ete bango bakoka koniokwama te soki bango bakoki koyambola; …
“Minioko wana esalaki moko, kutu Nzambe, monene koleka banso, koningana likolo ya mpasi, mpe kotanga makila na lidusu moko na moko ya nzoto, mpe konyokwama na nzoto mpe molimo—mpe nalingaki ete nakoka komela te kopo oyo ya bololo, naboyaki mpe kokima” (D&A 19:16, 18).
Tokundoli ete Ye akamati “likolo na ye [ya biso] bokono na biso, ete misopo na ye ekoka kotonda na ngolu, engebene na mosuni, ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kosalisa bato na ye engebene na ya [biso] bokono” (Alma 7:12).
Ntango totali mayele na biso ya elambo, tosengeli komituna biso moko:
-
Nini nakosala mposo oyo komibongisa malamu mpo na kosangana na elambo?
-
Ekoki ngai kosala mingi mpo na botosi mpe likoki oyo ekoki kotika ebandeli ya liyangani ya elambo?
-
Malongi nini eteyamaki na loyembo ya elambo?
-
Nini nayokaki mpe nasimbaki ntango nayokaki mabondeli ya elambo?
-
Nini nakanisaki na ntina na yango ntango elambo ezalaki kosalema?
Mpaka David A. Bednar ateyaki: “Makuli ya elambo ezali mbela moko ya molimo mpe ya kobandela koyambola na bosolo mpe kokoma ya sika na molimo. Elembo ya kosanganaka na elambo, na yangomoko, elongolaka masumu te. Kasi soki tomibongisi na makanisi na biso mobimba mpe tosangani makuli oyo ya bule elongo na motema ebukani mpe molimo etutami, boye elaka ezali ete tokoki ntango nyonso kozua Molimo na Nkolo kozala elongo na biso. Mpe na nzela ya nguya ya bopetolami ya Molimo Monsantu lokola moninga na biso ya ntango nyonso, biso tokoki ntango nyonso kozwa bolimbisi ya masumu.”7
Natatoli ete mapamboli ebele ezali mpo na biso lokola totomboli bomilengeli na biso mpo na mpe bosangani na biso na molimo na makuli ya elambo. Natatoli lisusu ete mapamboli wana ezali ya kobongisa mpo na biso na ntina ya bolingo ya Tata na Biso ya Lola mpe mbeka ezanga nsuka ya bomikabi ya Mwana na Ye ya Mobali ya Bolingo, Yesu Klisto. Na Nkombo na Ye ya bule, kutu Yesu Klisto, amene.