Batoma mpo na Eklezia
Tozali kosenga bino lokola bateyi ya ndako na kozala bantoma ya Nzambe epai ya bana na Ye, kolinga mpe kolengela mpe kosambela mpo na bato oyo botindami.
Kala te ndeko moko ya mwasi ya monzemba, oyo nakobenga Molly, ayaki na ndako uta mosala mpo na kokuta 5 cm ya mai etondisaki na ndako na ye ya nse ya mabele. Mbala moko asosolaki ete bazalani na ye, na bango akabolaki nzela ya terase, basengelaki kosala motango moko ya komesana te ya kosukola bilamba mpe nzoto mpamba te azwaki mai oyo esopanaki.
Nsima Molly abengaki moninga moko mpo na koya kosalisa ye, bango mibale babandaki kopepa mpe kokausa. Kaka ntango wana ayokaki ngonga ebetaki. Moninga na ye agangaki, “Ezali bateyi batali na yo!”
Molly asekaki. “Yango ezali mokolo ya nsuka ya sanza,” azongisaki, “kasi nakoki koyebisa yo mpenza ezali te bateyi na ngai na ndako.”
Na makolo ngulu, patalo ya kopola, nsuki likolo na kitambala, mpe bagan moko mibale ya latex ya mikolo wana, Molly akendeki na ekuke. Kasi lolenge na ye ya bongo na bongo ekokanaki te na lolenge ya bato amonaki batelaki liboso ya miso na ye. bazalaki bateyi na ye ya ndako!
“Bokokaki kobetela ngai ekuke na moninga moko mosali ya bapompe! ” na nsima ayebisaki ngai. “Oyo ezalaki boteyi na ndako ya kokamwa—lolenge oyo Bandeko mibali bakabolaka na likita linene!” Akobaki: “Kasi nde, kaka ntango nazalaki kokana soki kopesa bango lipwepwe to kotandela bango kombo na loboko, ‘O, Molly, limbisa biso. Tokoki komona ozali na mosala. Tolingi kotungisa yo te; tokoya ngonga mosusu.” Mpe bakendeki.”
“Ezalaki banani?” moninga na ye abengaki ye uta na nse ya mabele.
“Nalingaki koloba, ‘Ezalaki mpenza te Banefi Misato,’” Molly andimaki, “kasi namikangaki mpe nalobaki na kimia, ‘ezalaki bateyi na ngai ya ndako, kasi bayokaki oyo ezalaki te ngonga elongobanaki mpe na kotika nsango na bango.’”1
Bandeko mibali, ekoka biso koyekola na bokuse lotomo ya bonganganzambe oyo elimbolami lokola bomengo ya yambo ya Eklezia mpo na kosalisa” bato mpe mabota.2 Bazamba mibimba ebonzami mpo na kopesa papie mpo na kobongisa yango mpe kobongisa lisusu yango. Bankoto ya masukulu ya kafukafu epesami mpo na komeka kolendisa yango. Na ntembe te bilo moko te ya mobembo ya Freud esika moko ekokaki ntango mosusu kobongisa motango ya mibembo moto oyo asengaki. Kasi tozali naino kobunda kokokisa esika nyonso ndelo endimami ya mosala etali motindo ya Nkolo mpo na “kokengela Eklezia ntango nyonso”3 na nzela ya boteyi ya bonganganzambe ya ndako.
Eteni ya momekani tozali kokutana na yango ezali mbongwana na motango ya bato ya Eklezia. Toyebi ete na bandimi na biso oyo sikawa bapanzani koleka bapalwasi 32.000 mpe bitape, ezali na mwa bikolo 188 mpe bingumba, ezali kpokoso mingi kotala bandako ya bandeko mibali mpe bandeko basi koleka ezalaki mikolo ya yambo ya Eklezia ntango mozalani azalaki koteya mozalani na eloko moko ebangamaki “koteya na liboke.”
Lisusu koleka, na bitonga mingi ya Eklezia, ezali na motango moke ya bamemi bonganganzambe mpo na koteya na bandako, kotikela baye bakoki kosalisa na mingi lokola mabota 18 to 20—to koleka—mpo na kobatela. Ekoki kozala lisusu na kpokoso ya nzela molai ya kotambola, ntalo monene mpe kozanga mituka, mpe bolai mingi ya mokolo ya mosala mpe mposo ya mosala. Bakisa na bikila ya boko bikolo etali kotala bato na kozanga kobengisama mpe kpokoso ya makama oyo ezali na mingi ya banzinganzinga ya mokili—malamu, tobandi komona kilikili ya kpokoso.
Bandeko mibali, na mokili ya malamu koleka mpe na bisika wana wapi ekoki kosalema, kotala moko ya sanza na ndako nyonso ezali naino lotomo Eklezia ekoki kobandela. Kasi kososolaka ete na bisika mingi na mokili mobimba kokokisa lotomo ya boye ekoki kosalema te mpe ete tokosala ete bandeko mibali wana bayoka lokola kozanga kolonga ntango tosengi bango basala oyo ekoki kosalema mpenza te, Bakambi ya Yambo bakomaki na bayangeli ya Eklezia na sanza ya zomi na mibale 2001, kopesaka toli oyo ya kofulama, ya kosalisa mpenza: “Ezali na bisika na Eklezia wapi ekoki te kosalema na ntina ya motango moke ya bandeko ya bonganganzambe ya makasi mpe mikakatano misusu.” Totangi misusu na yango. “ Ntango makambo ya boye eleki,” ekokobaka, “ bayangeli basengeli kosala nyonso bakoki mpo na kosalela biloko bazali na yango mpo na kokengela mpe kolendisa mondimi moko na moko.”4
Bandeko mibali, soki na palwasi to etape na bino bokutanaki na makambo ya kpokoso ya boye, moninga na ngai ya bonganzambe ya Alona mpe ngai tokosalela toli ya Bokambi ya Yambo (oyo ezali sikawa na buku ya mitindo) na lolenge oyo: Yambo, nzokande basanza mingi esengeli mpo na kokokisa yango, tokokoba na etinda ya makomi mpo na “kotala na ndako mondimi moko na moko,”5 Kotiaka manaka moko oyo ekoki kosala ekomisa biso na bandako wana na calandrier oyo ezalaki mibale na bosalami mpe na mosala. Botongi na manaka wana kozalaka ntina ya kokomisa makambo ya yambo mpenza ngonga ezwami mpe kokutana mingi na baye basengeli na biso mingi koleka—baluki bamisionele bazali koteya, babongwani babatisami sika, baye bazali na bokono, bango moko kaka, bandimi ya bolembu, mabota ya moboti moko na bana bazali naino na ndako, mpe bongo na bongo.
Na kosalaka na nzela ya manaka na biso ya kotala bandako, oyo ekoki kozwa mwa basanza mpo na kokokisa, tokosala kokutana ndenge mosusu na bato mpe mabota na bolingo na lisalisi ya banzela Nkolo apesi. Na ntembe te tosengeli kokengela mabota na eklezia mpe, lokola makomi elobi, “tokolobana etali bolamu ya milimo na biso.”6 Na kobakisa, tokobenga na telephone, tokotinda baemail mpe masolo na telephone, to kutu kotinda mbote na nzela ya ndenge mingi ya malaka ezwaki na biso. Mpo na kosalisa na kotalela bamposa ya kafukafu, tokoki kotinda matangi ya makomi to nzela moko ya masukulu ya likita linene to Nsango moko ya Mormon ezwami ebele ya makambo na LDS.org. Na elobeli ya Bokambi ya Yambo, tokosala malamu koleka tokoki na bisika tokutani na makoki tozwami.
Bandeko mibali, mbela nazali kopesa mpokwa ya lelo ezali mpo bino kotombola bomoni na bino ya mateya na ndako. Nasengi, na banzela ya sika mpe malamu koleka bomimona lokola bantoma ya Nkolo epai ya bana na Ye. Banzela wana kotikaka nsima momesano ya mobeko ya elikia te ya Mose, manaka ya nsuka ya sanza na yango towelisa mpo na kopesa nsango moko ekomama uta na bamagazini ya Eklezia oyo libota asilaki kotanga. Tokolikia, kutu, ete bokobanda eleko moko ya makanisi ya solo, ya nsango malamu mpo na bandimi, kokengelanaka mpe kobatelanaka, kosalelaka bamposa ya molimo mpe ya nzoto na lolenge kani oyo esalisaka.
Sikawa, lokola etali maye “mazali na ntina,” lokola mateya na ndako, malamu nyonso bokosala “ezali na ntina,” mpenza yango wana bopesa nsango na yango nyonso! Ya solo, nsango oyo eleki na ntina ezali boni bopamboli mpe babateli baye bazali na mokumba na bino, oyo ezali na eloko te na manaka moko songolo to esika moko pakala. Oyo ezali na motuya koleka ezali ete bozali kolinga bato mpe bozali kokokisa motindo ya “kokengela eklezia ntango nyonso.”7
Na sanza ya mitano 30 ya mobu eleki, moninga na ngai Troy Russell abendaki motuka na ye na malembe libanda ya ndako ya motuka na nzela na ye mpo na kopesa libonza biloko na Deseret Industries ya esika. Ayokaki pine na ye ya nsima ematelaki mwa ngomba. Kokanisaka mwa eloko ekweyaki uta na motuka, abimaki kaka mpo na kokuta mwana na ye ya mobali ya ntalo mingi ya mibu libwa, Austen, alalaki elongi na nse na mabele. Koganga, lipamboli ya bonganganzambe, minganga, basali ya lopitalo—bazalaki, na likambo wana, ezalaki na na ntina te. Austen akufaki.
Lokola akoki te kolala, akokaki te kozwa kimia, Troy azangaki libondisi. Alobaki ezalaki na mingi koleka akokaki komema mpe ete akokaki te na pete kokoba. Kasi kati na mopepe wana ya liwa eyaki makasi ya kosikola misato.
Ya yambo ezalaki bolingo mpe molimo ya kolendisa ya Tata na biso ya Lola, bozali moko epesamaki na nzela ya Molimo Mosantu oyo elendisaki Troy, eteyaki ye, elingaki ye mpe elobaki na nungunungu ete Nzambe ayebi nyonso etali kobungisa Mwana Mobali ya kitoko mpe ya kobonga mpenza. Ya mibale ezalaki mwasi na ye, Deedra, oyo asimbaki Troy na maboko na ye mpe akundolisaki ye ete ye lokola abungisaka mwana mobali mpe ekanaki te kobungisa mobali lisusu. Ya mosato na lisolo oyo ezali John Manning, moteya ya ndako ya kafukafu.
Nayebi te solo na manaka kani John mpe moningi na ya ya moke basala batalaki Russel na ndako, to nsango kani epesamaki ntango bakendeki kuna, to lolenge nini bapeselaki nsango ya likambo yango. Oyo nayebi ezali ete eleki ya matiti kokweya eleki Ndeko mobali Manning amikitisaka mpe alokotaki Troy Russel mosika ya libomi wana ya motuka kaka lokola soki azalaki kolokota Austen ya moke ye moko. Lokola moteya ya ndako to sinzili to ndeko mobali na nsango malamu bakanisaki ye azalaki, John bobele amemaki bokengeli mpe bobobateli ya bonganganzambe ya Troy Russel, Abandaki na koloba, “Troy, Austen alingi ozonga ya kotelema—na libanda ya ndembo ya basket—yango wana nakozala awa ntongo nionso na 5:15 ya ntongo. Milengela mpamba te nalingi te nasengela kokota mpe na kotelemisa yo—mpe ngai nayebi Deedra alingi ngai nasala yango te lokola.”
“Nalingaki kokende te,” Troy ayebisaki ngai nsima, “mpamba te nazalaka komema Austen elongo na ngai bantongo wana mpe nayebaki makundoli elingaki kozala ya mpasi. Kasi John atiaki molende, yango wana nakendeki. Uta mokolo wana ya yambo nsima, tosololaka—to kutu nasololakimpe John ayokemelaki. Nasololaki na nzela ya motuka mobimba ya kokende na eklezia mpe nsima na kozonga ndako. Ntango mosusu nazalaki kosolola ntango tokangamaki na nzela mpe totalaki moi komata likolo ya Las Vegas. Yambo ezalaki mpasi, kasi na nsima ya ntango nasosolaki nazwaki makasi na ngai na lolenge ya mobeti ndembo ya malembe mpenza na metele 1.88 ya Eklezia, na mombombo moko ya kopumbwa ya kitoko mpenza, oyo alingaki ngai mpe ayokemelaki ngai kino moi na nsuka ebimaki lisusu na bomoi na ngai.”8
Bandeko na ngai mibali ya bonganganzambe bosantu, ntango tolobeli boteyi na ndako to bobateli to mosala moko ya moto na moto na bonganganzambe—bobengi yango ndenge bolingi—oyo ezali nini tozali kolobela. Tozali kosenga bino lokola bateyi ya ndako na kozala bantoma ya Nzambe epai ya bana na Ye, kolinga mpe kolengela mpe kosambela mpo na bato oyo botindami, mpo na kolinga mpe kobatela mpe kosambela mpo na bato na bino, lokola tobatelaka mpe kosambelaka mpo na bino. Ekoka bino kozala na bokebi na kozalaka na lisanga ya Nzambe na ndenge elongobani na bisika, nasambeli, na nkombo ya Mobateli pate Malamu na biso nyonso, oyo litatoli nazali, kutu Nkolo Yesu Klisto, amene.