2010–2019
Ete Akoka Kokoma Makasi Lisusu
Sanza ya Zomi 2016


17:19

Ete Akoka Kokoma Makasi Lisusu

Nasambeli ete tokotombwama na libiangi na biso mpo na kotombola basusu mpo na kolengela bango na ntina ya lisalisi na bango ya nkembo.

Nayoki napambolami na kozala na bosangani oyo elongo na baye basimbi bonganganzambe ya Nzambe ya Nzambe. Bomipesi, bondimi, mpe lisalisi ya moyimi te ya lingomba oyo ya mibali mpe bana mibali ezali likamwa ya mikolo oyo. Nakoloba mpokwa ya lelo na basimbi bonganganzambe, ya bomoko na lisalisi ya motema mobimba na Nkolo Yesu Klisto.

Nkolo apesi nguya na Ye na baye na misala ya bonganganzambe nyonso oyo bazali kosalisa na bolongobani na balotomo na bango ya bonganganzambe.

Wilford Woodruff, lokola Mokambi ya Eklezia, alimbolaki mayele na ye na misala ya bonganganzambe:

“Nayokaki esakola ya yambo nayoka naino te na Eklezia. Mokolo elandaki nabatisamaki. … Bakulisaki ngai Moteyi. Misio na ngai mbala moko ebandaki. … Nakendeki na kati ya misio wana mobimba lokola Moteyi. … Na likita bakulisaki ngai Nganganzambe. … Nsima ya ngai kokulisama Nganganzambe batindaki ngai … na misio na mboka ya sudi. Yango ezalaki na eleko ya matiti kokweya ya 1834. Nazalaka na moninga moko elongo na ngai, mpe tokendeki na libenga te mpe mosolo te. Natambolaki ngai moko kaka ntango mosusu koteyaka Nsango malamu yambo bakulisa ngai Mpaka. …

“[Sikawa] nazali mwa mibu ntuku mitano na motoba moko ya Bapostolo Zomi na Mibale. Nasalaka mobembo elongo na bango mpe masanga makoki misusu sikawa mibu ntuku motoba; mpe nalingi koloba na lingomba oyo ete nasungamaki mingi na nguya ya Nzambe ntango nasimbaki mosala ya Moteyi, mpe mingimingi ntango nasalaki na elanga ya vinu lokola Nganganzambe, kaka lokola basungaki ngai lokola Apostolo. Ezali na bokaseni te na yango soki tosali lotomo na biso.”1

Likanisi wana ya kokamwa ya molimo ete ekoki kozala na bokeseni te epesami na ndimbola ya Nkolo ya Bonganganzambe ya Alona lokola “bobakisi” ya Bonganganzambe ya Melekisedeke.2 Liloba bobakisi elingi koloba yango mibale ekangana. Bokangani oyo ezali ya motuya mpo na bonganganzanzambe ekoma bokasi mpe lipamboli ekoki kozala, na mokili oyo mpe libela, mpo “ezali na ebandeli te ya mikolo to nsuka ya mibu.”3

Bokangani wana ezali ya pete. Bonganganzambe ya Alona ekolengela bilenge mibale mpo na kondimama kutu ya bule koleka.

“Nguya mpe likoki ya Bonganganzambe ya likolo koleka, to ya Melekisedeke, ezali mpo na kosimba bafungola ya mapamboli ya molimo nyonso ya eklezia—

“Mpo na kozala na litomba ya kozwa mabombami ya bokonzi ya lola, mpo na kozala na balola efungwanela bango, mpo na kozalana elongo na lingomba linene mpe eklezia ya Mobotami ya Yambo mpe mpo na kosepela liboso ya miso ya Nzambe Tata, mpe Yesu Klisto moyokanisi ya boyokani ya sika.”4

Bafungola wana ya bonganganzambe esalelami mobimba kaka na moto moko na ntango moko, Mokambi mpe nganganzambe monene kokambi ya Eklezia ya Nkolo. Nde, na ndingisa ya Mokambi, moto nyonso oyo asimbi Bonganganzambe ya Melikesedeke akoki kolatisama na likoki mpe litomba ya koloba mpe kosala na nkombo ya Oyo Aleki Bokasi. Ezali na nsuka te na nguya wana. Etali bomoi mpe liwa, elongo na libota mpe Eklezia, elongo na bozali bonene ya Nzambe Yemei mpe mosala na Ye ya seko.

Nkolo azali kolengela mosimbi bonganganzambe ya Alona mpo na kokoma mpaka elongo na bondimi, nguya, mpe botondi na Bonganganzambe ya Melekisedeke.

Mpo na bampaka, botondi ya mozindo ekozala ya ntina mpenza mpo na kosala eteni na bino na lisalisi ya bonganganzambe mobimba. Bokomikundola mikolo na bino lokola diakona, moteyi, to nganganzambe ntango baoyo basimbi banganganzammbe ya likolo koleka bakotala nsima mpe na kotombola mpe kolendisa bino na mobembo na bino na bonganganzambe.

Mosimbi nyonso ya Bonganganzambe ya Melekisedeke azali na bokundoli ya boye, kasi mposa ya botondi ekoki kokita na mibu. Elikia na ngai ezali mpo na kopelisa lisusu liyoki wana m0e elongo na yango kopesa na banso bokoki lolenge moko ya lisalisi bozwaki kala.

Namikundoli episikopo oyo asalelaki ngai lokola soki nasilaki kozala nini nazalaki na likoki ya kokoma na nguya ya bonganganzambe. Abengaki ngai eyenga moko ntango nazalaki nganganzambe, Alobaki asengelaki na ngai mpo na kozala moninga na ye mpo na kotala book bandimi ya palwasi na biso. Alakisaki yango polele lokola soki nazalaki elikia na ye se moko mpo na elonga. Azalaki na mposa na mposa na ngai te. Azalaki bapesi toli ya malamu mpenza na boepisikopo na ye.

Tokendeki kotala basi bakufela mibali bazanga mbongo mpe ya nzala. Alingaki ngai nasunga ye kosimba motema na ye, kotindika ye asala mpe asalela mwango ya mosolo, mpe kolaka ye ete akoki kotombwana mpo na kozala na makoki ya kosunga basusu.

Tokendeki kolendisa bana basi mibale ya mike oyo bazalaki na kpokoso. Ntango tobimaki, alobaki na ngai na kimia, “Bana wana bakobosana mokolo moko te ete toyaki epai na bango.”

Na ndako elandaki, namonaki boni kobengisa moto moko ya bondimi moke mpo na kozonga na Nkolo na kondimisaka ye ete bandimi ya palwasi bazalaki na mposa na ye.

Episikopo wana azalaki mosimbi Bonganganzambe Ya Melekisedeke oyo azalaki kotombola bomoni na ngai mpe kopesa ngai mpiko na ndakisa. Ateyaki ngai kozala na nguya mpe mpiko ya kokende bisika nyonso na lisalisi mpo na Nkolo. Asili kokende kala epai ya mbano na ye, kasi namikundola ye mpamba te amikitisaki mpo na kotombola ngai likolo ntango nazalaki mosimbi bonganganzambe ya Alona moko ya sika. Nayekolaki nsima ete amonaki ngai na nzela ya bonganganzambe ekoya ya mikumba minene, na ntango wana mosika na emoneli na ngai.

Tata na ngai asalaki likambo wana moko kaka. Azalaki mosimbi bonganganzambe ya Melekisedeke akomela mpe ya bwania. Mbala moko basengaki ye na Apostolo moko akoma liyebisi moko etali bosolo ya bato ya mayele mpo na mibu ya mabele. Akomaki yango na lokengo, koyebaka ete basusu oyo bakokaki kotanga yango bazalaki na liyoki makasi ete mabele ezalaki na mibu moke koleka bosolo oyo bato ya mayele bakanisaki.

Namikundoli lisusu tata na ngai kopesaka ngai oyo akomaka mpe kolobaka na ngai, “Hal, ozali na bwania ya molimo mpo na koyeba soki nasengeli kotinda yango na bapostolo mpe baprofeta.” Nakoki komikundola te mingi oyo lokasa wana elobaki, kasi nakomela elongo na ngai libela botondi nayokaki mpo na mosimbi Bonganganzambe Ya Melekisedeke moko oyo amonaki na ngai bwania ya molimo oyo nakokaki te komona.

Butu moko, mwa mibu mileki, nsima na ngai kokulisama lokola Apostolo, profeta ya Nzambe abengaki ngai mpe asengeki ngai natanga likambo moko oyo ekomamaka etali malongi ya Eklezia. Alekisaka butu na kotanga mikapo ya buku moko. Alobaki na litio, “Nakoki te kotanga nyonso oyo. Osengeli te kozala kopema ntango ngai nazali kosala.” Mpe nde asalelaki penepene lokola maloba wana kaka tata na ngai asalelaka mibu milekaki: “Hal, ozali oyo asengeli kotanga yango. Okoyeba soki ezali malamu kobimisa yango.”

Ndakisa wana kaka ya mosimbi ya Bonganganzambe Ya Melekisedeke moko kotombolaka bomoni mpe kopesaka bondimi eyaki butu moko na molulu ya masukulu elengelemaki na Eklezia. Na mibu 17, basengaki ngai koloba na bayoki mingi. Nazalaki na likanisi te nini basengaki ngai. Bapesaki ngai mama na likambo te, mpe boye nalengelaki lisukulu moko oyo ezalaki mosika mpenza na oyo nayebaki etali nsango malamu. Ntango nazalaki koloba, nasosolaki ete nasalaki mbeba. Nakoki lisusu komikundola, nsima ya koloba, liyoki na ngai ete nabungaki.

Molobi ya nsima mpe ya nsuka ezalaki Mpaka Matthew Cowley ya Lisanga Likoko ya Bapostolo Zomi na Mibale. Azalaki molobi ya monene—balingaki ye na Eklezia mobimba. Namikundoli lisusu kotalaka ye uta na kiti elandeki etando.

Abandaki na mongongo ya nguya. Alobaki ete lisukulu na ngai esalaka ye ayoka ete azalaki na likita moko ya monene. Asekaki ntango alobaki yango. Koyoka na ngai ete nabungaki elongwaki mpe elandaki bondimi ete nakoki mokolo moko kokoma oyo emonanaki akanisaki nasilaki kozala.

Bokundoli ya butu wana ekambaka ngai lisusu koyokemela na lokengo ntango mosimbi Bonganganzambe ya Alona akoloba. Na ntina ya maye Mpaka Cowley asalaki mpo na ngai, nazelaka ntango nyonso ete nakoyoka liloba ya Nzambe. Mbala mingi nazalaka na nkele mpe mbala na mbala nasepelaka, mpe nakoki kozanga koseka lokola Mpaka Cowley.

Makambo mingi ekoki kosunga kolendisa bandeko na biso bilenge mpo na kotombwana likolo na bonganganzambe, kasi eloki te ekozala na nguya mingi koleka biso kosalisa bango kokolisa bondimi mpe kondimama ete bakoki koyekama na nguya ya Nzambe na lisalisi na bango ya bonganganzambe.

Bondimi mpe elikia wana ekotikala te na bango uta na likambo moko kaka ya kotombolama ata na mosimbi ya Bonganganzambe ya Melekisedeke oyo aleki mayele. Kasi bokoki ya kobenda na banguya wana esengeli kokolisama na maloba kolakisaka mingi kondimama uta na baye bakomela na bongangazambe.

Basimbi Bonganganzambe ya Alona basengeli lisusu mokolo na mokolo mpe kutu ngonga na ngonga na bolendisi mpe bosemboli uta na Nkolo Yemei na nzela ya Molimo Mosantu. Yango ekopesamela bango ntango bango baponi kotikala ya kolongobana mpo na yango. Ekoyekama likolo ya maponi bango bakosala.

Yango ezali ntina oyo tosengeli koteya na ndakisa mpe na litatoli ete maloba ya moyangeli monene ya Bonganganzambe ya Melekisedeke Mokonzi Beniamini ezali ya solo.5 Ezali maloba ya bolingo elobama na nkombo ya Nkolo, mokolo ya bonganganzambe oyo. Mokonzi Beniamini ateyi oyo esengeli na biso mpo na kotikala peto ekoka mpo na kozwa bolendisi mpe bosemboli ya Nkolo:

“Mpe na nsuka, nakoki kolobela bino te makambo nyonso na yango bokoki kosala lisumu; mpo ezali na banzela mpe ndenge ekeseni, kutu mingi mpenza ete nakoki te kotanga yango.

“Kasi oyo mingi nakoki kolobela bino, ete soki bokomikengela te, mpe makanisi na bino, mpe maloba na bino, mpe misala na bino, mpe bokobatela mitindo mya Nzambe, mpe kokoba na bondimi na bino ya nini boyokaki etali boyei ya Nkolo na biso te, kutu kina na nsuka ya bomoi na bino bosengeli kowa. Mpe sikawa, O moto, omikundola, mpe owa te.”6

Tozali banso na boyebi ya makonga ya moto ya monguna ya bosembo kotindamaka lokola mopepe moko ya nsomo epai ya bilenge basimbi bonganganzambe tolingaka mingi mpenza. Na biso, bazali lokola babundi ya bilenge, oyo bamibengaki bana mibali ya Elamani. Bakokaki kotikala na bomoi, lokola bilenge babundi wana basalaki, soki bamibateli na bozangi likama, lokola Mokonzi Beniamini atindaki bango basala.

Bana mibali ya Elamani batiaki ntemba te. Babundaki na mpiko mpe bakomaki balongi mpamba te bandimaki maloba ya bamama na bango.7 Tososoli nguya ya bondimi ya bamama na bango ya bolingo. Bamama bapesaka lisungi wana ya monene na bana na bango lelo. Biso basimbi bonganganzambe tokoki mpe tosengeli kosunga na mokano na biso mpe na koyanola mokumba ete ntango tobongwani, tosengeli komikitisa mpo na kolendisa bandeko na biso mibali.8

Losambo na ngai ezali ete mosimbi Bonganganzambe ya Melekisedeke nyonso akondima libaku epesameli na Nkolo:

“Mpe soki moko na kati na bino azali makasi na Molimo, tika akamata elongo na ye oyo azali motau, ete akoki kolendisama na bosekomi nyonso, ete akoka kokoma makasi lokola.

“Yango wana, bokamata elongo na bino baye bakulisami na bonganganzambe ya moke, mpe botinda bango kokamata bilaka, mpe kolengela nzela, mpe kokokisa bilaka oyo bino moko bokoki te kokokisa.

“Tala, oyo ezali lolenge oyo bapostolo na ngai, na ntango ya kala, batongaki eklezia mpo na ngai.”9

Bino bakambi ya bonganganzambe mpe batata ya basimbi bonganganzambe ya Alona bokoki kosala makamwisi. Bokoki kotondisa milongo ya bampaka ya bondimi na bilenge mibali oyo bandimi libiangi ya koteya nsango malamu mpe kosala yango na bondimi. Bokomona mingi botombolaki mpe bolendisaki bakotikala na bondimi, bakobala na bolongobani na tempelo, mpe na ntango na bango, bakotombola mpe bakolengela basusu.

Ekosenga pologalami ya milulu ya sika te, biloko ya koteya ebongisami te, to malaka ya bato banso ya malamu koleka te. Ekosenga te libiangi koleka oyo bazali na yango sikawa. Ndai mpe boyokani ya bonganganzambe epesaka bino nguya, likoki, mpe bokambami. Nasambeli ete bokokende na bandako mpe koyekola na lokengo ndai mpe boyokani ya bonganganzambe, ezwami na mokapo 84 ya Doctrine et Alliances.

Bato banso tolikii ete bilenge mibali mingi bakozwa mayele lokola Wilford Woodruff, oyo lokola mosimbi Bonganganzambe ya Alona, ateyaki nsango malamu ya Yesu Klisto na nguya ya kobongolisa.

Nasambeli ete tokotombwama na libiangi na biso mpo na kotombola basusu mpo na kolengela bango na ntina ya lisalisi na bango ya nkembo. Natondi na motema na ngai mobimba bato oyo ya kokamwa oyo batombolaki ngai mpe balakisaki ngai boni kolinga mpe kotombola basusu.

Natatoli ete Mokambi Thomas S. Monson asimbi bafungola nyonso ya bonganganzambe na mabele na ntango oyo. Napesi litatoli ete ye, likolo ya ngonga ya lisalisi, azali ndakisa mpo na biso banso ya kokende kotombola bango lokola mosimbi moko ya Bonganganzambe ya Melekisedeke. Nazali ngai moko na botondi mpo na lolenge atomboli ngai mpe alakisi ngai boni kotombola basusu.

Nzambe Tata azali na bomoi, Yesu azali Klisto. Oyo ezali Eklezia mpe bokonzi na Ye. Oyo ezali bonganganzambe na Ye. Nayebi yango na ngai moko na nguya ya Molimo Mosantu. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.