Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya mwambe 7–13. Baloma1–6: “Nguya ya Nzambe mpo na Lobiko”


“Sanza ya mwambe 7–13. Baloma 1–6: ‘Nguya ya Nzambe mpo na Lobiko’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Kondimana na Sika 2023 (2022)

“Sanza ya mwambe 7–13. Baloma 1–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Paulo azali kokoma mokanda

Sanza ya mwambe 7–13

Baloma 1–6

“Nguya ya Nzambe mpo na Lobiko”

Koma mayoki oyo ekosunga yo omikundola maye Molimo azali koteya yo. Kanisa lisusu kokoma lolenge nini ozali kokanisa na ntina ya bitinda oyo.

Koma Makanisi na Yo

Na eleko Paulo akomaki mikanda na ye epai ya Bandimi ya Eklezia na Loma, baoyo bazalaki ya lingomba ya ndenge na ndenge ya Bayuda mpe Bapagano, Eklezia ya Yesu Klisto ekolaki koleka liboke moke ya bandimi ya Galilea. Mibu 20 pene nsima ya Bosekwi ya Mobikisi, ezalaki na masanga ya Baklisto esika nyonso Bapostolo bakokaki kosala mobembo—mpe lisusu na Loma, engumba mokonzi ya boyangeli moko ya nguya. Kaka, soki tomeki na etando monene ya boyangeli ya Loma, Eklezia ezalaki moke mpe mbala na mbala eloko ya monyokoli. Na makambo ya boye, bato basusu bakokaki koyoka “nsoni ya nsango malamu ya Klisto”—kasi, ya solo, Paulo te. Ayebaki mpe atatolaki nguya wana ya solo, “nguya ya Nzambe mpo na lobiko,” oyo ezwami kati na nsango malamu ya Yesu Klisto (Baloma 1:16).

elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na koyekola Makomi Yo Moko

Mikanda ezali nini, mpe ebongisami ndenge nini?

Mikanda ezali bankoma ekomami na bakambi ya Eklezia mpo na Basantu na bisika bikeseni ya mokili. Apostolo Paulo akomaki ebele ya mikanda na ye kati na Kondimana na Sika—kobanda na Baloma mpe kosukisa na Baebele. Mikanda na ye ebongisami na ndenge ya molai, longola se mpo na Bayuda (tala Bible Dictionary, “Epitres de Paul”). Atako Baloma ezali mokanda ya yambo kati na Boyokani ya Sika, ekomamaki soki totali malamu penepene na nsuka ya mibembo ya misionele Paulo.

Baloma 1–6

“Bayengebene bakobika na kondima.”

Bandimbola elandi ekoki kosunga yo ososola Mokanda na Baloma:

Mobeko.Ntango Paulo akomaki na ntina ya “mobeko,” azalaki kolobela mobeko na Mose. Liloba “misala” kati na makomi ya Paulo elobelaki misala emonisami libanda kosanganaka na mobeko ya Mose. Kanisa lolenge nini mobeko ya Mose mpe misala esengisamaki lokola eteni ya mobeko ezali na bokeseni na “mobeko ya bondimi” oyo elimbolami kati na Baloma 3:23–31.

Kokatama ngenga, Kozanga kokatama ngenga.Na ntango ya kala, kokatama ngenga ezalaki elembo ya boyokani Nzambe asalaki na Abalayama. Paulo asalelaki liloba “kokatama ngenga” mpo na kolobela Bayuda (bato ya boyokani) mpe “kozanga kokatama ngenga” mpo na kolobela Bapagano. Kanisa nini Baloma 2:25–29 eteyi na ntina na oyo elimboli solosolo kozala bato ya boyokani ya Nzambe. Yeba ete kokatama ngenga ezali lisusu te elembo ya boyokani na Nzambe na bato na Ye (tala Misala 15:23–29).

Kolongisama, kolongisa, molongisami.Maloba oyo elobeli bolimbisi, to kolimbisa, ya lisumu. Ntango tolongisami, tolimbisami, otangami kozanga ngambo, mpe kolongwa na boombo ya etumbu ya seko ya masumu na biso. Ntango omoni maloba oyo, yeba maye Paulo ateyaki na ntina ya oyo esalaka ete bolongisi ekokisama (tala lisusu Mokambi na Makomi , “Bolongisi, Kolongisa,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org; D. Todd Christofferson, “Justification and Sanctification,” Ensign, June 2001, 18–25). Kati na Baloma, maloba lokola “boyengebene” mpe “bosembo” ekoki komonana lokola ekokani na maloba lokola “sembo” mpe “kolongisama.”

Ngolu.Ngolu ezali “lisalisi … mpe makasi ya bonzambe, epesami na nzela ya mawa mpe bolingo ya Yesu Klisto.” Na nzela ya ngolu, bato banso bakosekwa mpe bakozwa bozangi kufa. Na bobakisi, “ngolu ezali nguya ya bolendisi oyo epesi mibali mpe basi nzela ya kozwa bomoi ya seko mpe bonetwami nsima ya kosala makasi na bango moko koleka mpenza.” Tokozwa ngolu na nzela ya makasi na biso moko te, kutu, ezali ngolu oyo epesi biso “makasi mpe lisalisi ya kosala misala ya malamu oyo [biso] ntango mosusu tokokaki te kosala” (Bible Dictionary, “Ngolu”; tala lisusu 2 Nefi 25:23; Dieter F. Uchtdorf, “The Gift of Grace,” Liahona, May 2015, 107–10; Brad Wilcox, “His Grace Is Sufficient,” Liahona, Sept. 2013, 43–45). Ntango otangi Baloma, koma oyo oyekoli na ntina na ngolu ya Klisto.

Baloma 2:17–29

Misala na ngai esengeli kotalisa mpe kokolisa mbongwana na ngai.

Baklisto Bayuda mosusu na Loma bandimaki lisusu ete milulu mpe kosalema na molulu ya mobeko ya Mose ememaki lobiko. Oyo ezali likambo ya kosalela lisusu te mpo tozali kobika na mobeko ya Mose te. Kasi ntango otangi makomi ya Paulo, mingi mingi Baloma 2:17–29, kanisa na ntina ya makasi na yo moko ya kosalela nsango malamu. Misala na yo miye ya libanda, lokola kozwa elambo to kokende na tempelo, ekolisi mbongwana na yo mpe elendisi bondimi na yo na Klisto? (tala Alma 25:15–16). Ezali na eloko moko osengeli kobongola mpo ete misala na yo ya libanda emema na mbongwana ya motema?

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “The Challenge to Become,” Ensign, Nov. 2000, 32–34.

Baloma 3:10–315

Na nzela ya Yesu Klisto, masumu na ngai ekoki kolimbisama.

Bato mosusu bakoki kolemba nzoto mpo na liloba ya Paulo ete “moto ya sembo azali te, te, moko te” (Baloma 3:10). Kasi ezali lisusu na bansango ya elikya kati na Baloma. Luka yango kati na mikapo 3 mpe 5, mpe kanisa mpo na nini kukondola ete “bato nyonso babungi, mpe bazangi nkembo ya Nzambe” (Baloma 3:23) ezali eteni ya motuya na koyekola “kosepela na elikya” na nzela na Yesu Klisto (Baloma 5:2).

Baloma 6:4

Yesu Klisto abiangi ngai mpo na “kotambola na bomoi ya sika.”

Paulo ateyaki ete nsango malamu ya Yesu Klisto esengeli kobongola lolenge tozali kobika. Maloba nini kati na Baloma 6 elimboli lolenge nini kolanda Mobikisi esili kosalisa yo “otambola na bomoi ya sika”? (molongo 4).

elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekoli Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Baloma 1:16–17.Lolenge nini tokoki kolakisa ete tozangi nsoni mpo ya nsango malamu ya Klisto?

Baloma 3:23–28.Ntango ozali kotanga milongo oyo, okoki kolobela bokeseni kati na “kolonga” ngolu ya Nzambe, oyo tokoki kosala ata mokolo moko te, mpe kozwa yango, oyo tosengeli kosala. Ntango nini toyokaka ngolu ya Nzambe? Lolenge nini ekoki biso kozwa yango na mobimba mpenza?

Baloma 5:3–5.Mikakatano nini tokutani na yango? Lolenge nini mikakatano oyo esalisaki biso tokolisa bompikiliki, mayele, mpe elikya?

Baloma 6:3–6.Paulo ateyaki nini kati na milongo oyo na ntina ya elembo ya libatisi? Ntango mosusu libota na yo ekoki kobongisa kozala na libatisi ekoya nsima. To ndeko na yo moko ya mobali to mwasi ya libota akoki kokabola bafoto to makundoli mosusu uta na mokolo na ye ya libatisi. Lolenge nini kosala mpe kobatela mayokani na biso ya libatisi esalisaka biso totambola na bomoi ya sika”?

Mobali azali kobatisa mosusu kati na etima

Libatisi elakisi kobanda bomoi ya sika lokola molandi ya Klisto.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo ekoki koyembama: “When I Am Baptized,” Children’s Songbook, 103.

Kobongisa Boyekoli ya Makomi ya Moto Ye Moko

Tuna Mituna ntango ozali koyekola. Ntango ozali koyekola makomi, mituna ekoki koya na makanisi. Maniola mituna oyo mpe luka biyano. Ndakisa, kati na Baloma 1–6 okoki koluka biyano na motuna “Ngolu ezali nini?”

Klisto abimisi elenge mwasi na mai

Bobanga Te, na Greg K. Olsen