Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya nsambo 31–Sanza ya mwambe 6. Misala 22–28: “Mosali mpe Nzeneneke”


“Sanza ya nsambo 31–Sanza ya mwambe 6. Misala 22–28: “Mosali mpe Nzeneneke,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya nsambo 31–Sanza ya mwambe 6. Misala 22–28,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Paulo na kati ya boloko

Sanza ya nsambo 31–Sanza ya mwambe 6

Misala 22–28

“Mosali mpe Nzeneneke”

Makanisi kowuta na Molimo Mosantu ezalaka mbala mingi ya kimia mpe mbala mosusu ya ntango mokuse. Kokomaka makanisi na yo epesaka yo ndingisa ya kosalela yango na bozindo mingi. Ntango ozali kotanga Misala 22–28, koma makanisi mpe mayoki oyo ekomeli yo mpe zwa ntango ya komanyola yango.

Koma Makanisi na Yo

“Ntango tozali na etinda ya Nkolo,” Mokambi Thomas S. Monson alakaki, “tozali na ntina ya lisungi ya Nkolo” (“Koyekola, Kosala, Kozala,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 62). Tozali te na ntina, bongo, ya nzela kitoko mpe elengelama na bolongi. Mpo na kondimela yango, tozali na ntina te ya koluka mosika lokola Apostolo Paulo. Etinda na ye ya Mobikisi ezalaki ya “komema nkombo na ngai liboso ya Bapagano, mpe bakonzi mpe bana ya Yisalaele” (Misala 9:15). Na kati ya mikapo 22–28 ya Misala, tomoni Paulo kokokisaka etinda oyo mpe kokutanaka na botemeli monene—minyololo, botiami na boloko, konyokwama na nzoto, botioli, mpe kutu na kobundisama na nyoka. Mpe tomoni lisusu ete Yesu “atelemaki pene na ye, mpe alobaki, Zala malamu, Paulo” (Misala 23:11). Baboyebi ya Paulo ezali bokundoli efulama oyo Nkolo abengaka mpo na “kosakola nsango malamu na [Ye] na mongongo ya esengo” eyei elongo na elaka: “Botombola mitema na bino mpe bozala na esengo, mpo ete nazali na kati na bino” (Malongi mpe Mayokani 29:4–5; tala lisusu Matai 28:19–20).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Boyekoli Makomi Yo Moko

Misala 22:1–21; 26:1–29

Bayekoli ya Yesu Klisto bakabolaka matatoli na bango na mpiko.

Ntango Paulo atatolaki matatoli ya nguya ekomami na kati ya Misala 22 mpe 26, ye akangamaki moto ya boloko na mampinga ya Baloma. Bato oyo azalaki kolobela bazalaki na nguya ya kopesa ye etumbu ya liwa. Kasi ye aponaki kotatola na mpiko nyonso etali Yesu Klisto mpe “limoni ya lola” (Misala 26:19) oyo azwaki. Nini efuli yo na ntina ya maloba na ye? Banza mabaku malamu oyo ozali na yango mpo na kokabola litatoli. Na ndakisa, baninga na yo bayebi lolenge nini oyokaka na ntina ya Yesu Klisto? To ntango nini ya suka oyebisaki libota na yo lolenge ozwaki litatoli na yo ya nsango malamu?

Ntango elenge Joseph Smith atiolamaki mpo na kolobelaka ntina ya Limoni na ye ya Yambo, ye afulamaki na lolenge Paulo atatolaki limoni na ye (tala Joseph Smith—History 1:24–25). Lolenge nini okoki kolimbola na bokuse oyo Joseph Smith ayekolaki uta na Paulo? Nini oyekoli uta na banzeneneke oyo mibale ya Yesu Klisto?

Tala lisusu Neil L. Andersen, “We Talk of Christ,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 88–91.

Misala 23:10–11; 27:13–25, 40–44

Nkolo akotelaka baoyo balukaka kosalela Ye.

Lokola mokumba ya Paulo elakisi polele, bampasi na babomoi na biso ezali te elembo elobi ete Nzambe aboyi biso to mosala oyo tozali kosala. Na yango, mbala mosusu ezalaka ntango ya bampasi nde toyokaka lisungi na Ye makasi koleka. Ekoki kozala ntina mingi kotala lisusu maye otangi kala te na ntina ya mosala ya Paulo mpe kokoma boko makambo ayikaki mpiko (tala, na ndakisa, Misala 14:19–20; 16:19–27; 21:31–34; 23:10–11; 27:13–25, 40–44). Lolenge nini Nkolo akotelaki ye? Lolenge nini akotelaki yo?

Misala 24:24–27; 26:1–3, 24–2927

Ezali na bobatelami mpe kimia na kotosaka maloba ya basali ya Nzambe.

Na etinda na ye nyonso, Paulo atatolaki litatoli ya nguya ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Bato ebele bandimaki matatoli na ye, kasi bato mosusu te. Ntango otangi Misala 24:24–27 mpe Misala 26:1–3, 24–29, luka maloba mpe makomi oyo elakisi lolenge nini bayangeli ya Baloma oyo balandi na Yuda bayanolaki na mateya ya Paulo:

  • Felise

  • Fesitusi

  • Mokonzi Agilipa

Ntango bazalaki kokende na Loma mpo na kosambisama epai ya Kayisalo, Paulo asakolaki ete “mpasi mpe mabe” ekokomela masuwa mpe bato na yango (Misala 27:10). Tanga mokapo 27 mpo na koyeba lolenge nini baninga ya masuwa ya Paulo bayanolaki na makebisi na ye. Ozwi mateya na yo moko na kati ya boyebi na bango?

Eyano na yo ezali kutu lokola ya bato oyo ntango oyokaki mateya ya bakambi ya Eklezia? Makama nini ezali na boyanoli na ndenge ya boye kati na milongo oyo? Oyekoli nini uta na masolo maye na oyo etali kotosa toli ya Nkolo na nzela ya basali na Ye?

Tala lisusu 2 Nefi 33:1–2; D. Todd Christofferson, “Mongongo ya Likebisi,” Liahona, Sanza ya mitano 2017, 108–11; “Landa Profeta ya Bomoi,” Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Ezra Taft Benson (2014), 147–55.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Boyekoli Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Misala 24:16.Yambo ya mbongwana na ye, Paulo azalaki na lisolo molayi ya botuki epai ya Nzambe. Kasi lokola azalaki na bolingi ya koyambola, azalaki na makoki koloba “Awa nazali kosala ngai moko, mpo na kozala na makanisi ntango nyonso ya koboya botuki Nzambe, mpe bato” (tala lisusu Malongi mpe Mayokani 135:4–5). Lolenge nini tokoki koboya makanisi ya botuki Nzambe mpe basusu?

Misala 26:16–18.Na kati ya milongo oyo, nini Nkolo asengaki Paulo asala? Mabaku malamu nini tozali na yango mpo na kosala makambo ya ndenge moko?

Misala 28:1–9.Ezali na moto moko na kati ya libota na yo alingaka banyoka? Okoki kolinga kosenga moto yango to bandeko mosusu ya libota babeta masolo eye ezwami na Misala 28:1–9. Bana na yo bakoki kosepela koyema elili ya masolo maye to kosalelaka yango. Mateya nini tokoki koyekola uta na masolo oyo? Moto moko akoki kozala oyo Nkolo akokisi bilaka na Ye epai ya basali na Ye. Na ndakisa, bokoki kokokanisa bilaka oyo esalemaki na Malako 16:18 elongo na babokokisi na yango na mayebi ya Paulo. Bokoki lisusu kozwa na kati ya liteya ya likita linene ya kala te elaka oyo esalemaki na moto moko ya basali ya Nkolo—ntango mosusu moto oyo azali ntina na libota na yo—mpe botala yango na ndako na bino. Lolenge nini tokoki kolakisa bondimi na biso ete elaka oyo ekokokisama?

Elilingi
nyoka ya ngenge

Nzambe abatelaki Paulo ntango nyoka ya ngenge eswaki ye.

Misala 28:22–24.Lokola Eklezia na eleko ya Paulo (ebengamaki “lingomba” na molongo 22), Eklezia lelo mbala mingi “eboyi koloba bongo.” Ntango bato bazalaki kolobela mabe mpo na Mobikisi mpe Eklezia na Ye, lolenge nini Paulo ayanolaki? Nini tokoki koyekola uta na boyebi ya Paulo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Mosikoli na Ngai Azali na Bomoi,” Hymns, no. 135.

Kobongisa Mateya na Biso

Tia makanisi na mibeko oyo ekopambola libota na yo. Ntango oyekoli makomi, mituna yo moko, “Nini namoni awa oyo ekozala ntina mpo na libota na ngai?” (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi17.)

Elilingi
Paulo liboso ya Mokonzi Agilipa

Paulo liboso ya Mokonzi Agilipa. Elombe na Litatoli ya Yesu Klisto, na Daniel A. Lewis

Bimisa na lokasa