Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya nsambo 24–30. Misala 16–21: “Nkolo Abiangaki Biso mpo na Koteya Nsango Malamu”


“Sanza ya nsambo 24–30. Misala 16–21: ‘Nkolo Abiangaki Biso mpo na Koteya Nsango Malamu,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya nsambo 24–30. Misala 16–21,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Paulo azali koteya na ngomba

Sanza ya nsambo 24–30

Misala 16–21

“Nkolo Abiangaki Biso mpo na Koteya Nsango Malamu”

Ntango ozali kotanga na ntina ya bokasi ya Paulo mpo na koteya nsango malamu, Molimo akoki kopesa yo makanisi to mayoki. Koma makanisi oyo, mpe sala miango mpo na kosalela yango.

Koma Makanisi na Yo

Na kati ya maloba ya nsuka ya Nkolo epai ya Bapostolo na Ye ezalaki na motindo ete “Bokende, mpe boteya bikolo nyonso, bobatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu: boteyaka bango babatela makambo nyonso oyo natindi bino” (Matai 28:19–20). Atako Bapostolo balongaki kosala yango nyonso te bikolo nyonso, Misala 16–21 elakisi ete Paulo mpe baninga na ye bakokisaki mokumba monene na bozongisaka Eklezia. Bateyaki, babatisaki mpe bapesaki likabo ya Molimo Mosantu. Basalaki makamwisi, kutu basekwisaki moto uta na bawei, mpe basakolaki Bopengwi Monene (Misala 20:7–12, 28–31). Mpe mosala oyo babandaki ezali kokoba na Baprofeta ya bomoi lelo, mpe na bayekoli ya mpiko lokola bino, oyo basungaka kokokisa mokumba ya Mobikisi na ndenge Paulo akokaki kokanisa ata moke te. Ntango mosusu boyebi bato oyo bayebi Tata na bango na Lola to nsango malamu na Ye te. Ntango mosusu boyoki ete “molimo etutisamaki kati na [bino]” mpo na kokabola elongo na bango maye boyebi na ntina na Ye (Misala 17:16). Soki bolandi ndakisa ya Paulo ya bomikitisi mpe bokasi na kokabolaka nsango malamu, bokoki kozwa moto moko “oyo Nkolo [afungoli] motema” (Misala 16:14).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Misala 16–21

Molimo akokamba ngai na bokasi na ngai mpo na kokabola nsango malamu.

Profeta Joseph Smith asakolaki, “Moto moko te akoki koteya Nsango Malamu soki azangi Molimo Mosantu” (Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 332). Ntango ozali kotanga Misala 16–21, kanisa mpo na nini liloba ya Profeta ezali solo. Koma makambo maye Molimo asungaki Paulo mpe baninga na ye. Mapamboli nini bazwaki ntango balandaki Molimo? Ntango nini oyokaki Molimo kopusa yo na bokasi na yo mpo na kokabola nsango malamu?

Misala 16–21

Nakoki kosakola nsango malamu na mabaku nyonso.

Kobwakama na boloko mpo na koteyaka nsango malamu ekoki komonisama lokola ntina ya bososoli ya kosukisa mataya. Kasi mpo na Paulo mpe Silasi, ekomaki libaku malamu mpo na kobongola mokengeli ya boloko (tala Misala 16:16–34). Na kati ya Misala 16–21, luka bandakisa mosusu ya bolingi ya Paulo mpo na kokabola litatoli na ye na moto nyonso. Mpo na nini okanisi azalaki na mpiko mpe bozangi kobanga? Oyekoli nini uta na ndakisa ya Paulo?

Ezali na bansango mingi koleka etali kokabola nsango malamu na kati ya Misala 16–21. Ntango oyekoli mikapo oyo, luka ndambu oyo ekosalelama mingi mingi epai na yo.

Tala lisusu Dieter F. Uchtdorf, “Missionary Work: Sharing What Is in Your Heart,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 15–18.

Elilingi
basimbi bebe

Moko na moko na biso azali mwana ya Nzambe.

Misala 17:16–34

“Tozali bana ya Nzambe.”

Na Atene, Paulo Amonaki bato oyo bazalaki na makanisi ya kokesena mpe boyebi ya ndenge na ndenge mpo na oyo etali boyambi. Bazalaki ntango nyonso koluka “koyoka eloko ya sika,” mpe oyo Paulo azalaki na yango asengelaki kopesa bango ezalaki ya sika epai na bango (tala Misala 17:19–21). Bakumbamelaki banzambe mingi, mpe lisusu moko oyo babengaki “Nzambe ayebana te” (Misala 17:23), kasi bandimelaki ete banzambe wana bazalaki nguya to bokasi, bato ya bomoi te, bato mpebte, mpe kutu Tata na biso te. Manyola oyo Paulo alobaki mpo na kosunga bango baya koyeba Nzambe. Nini yango nelingi koloba epai na yo kozala “bana ya Nzambe”? (Misala 17:29). Na likanisi na yo, lolenge nini kozala mwana ya Nzambe ezali na bokeseni na kozalaka bobele moko ya bokeli na Ye? Lolenge nini kososola bosolo oyo epesaka nguya na lolenge omimonaka yo moko mpe basusu?

Soki otelemaki pene ya Paulo ntango azalaki kotatola, nini okokaki kolobela Bamwela wana ya kala na ntina ya Tata na biso na Lola? Oyebi moto moko oyo akoki koyoka litatoli na yo?

Tala lisusu Baloma 8:16; 1 Yoane 5:2; “We Are the Offspring of God” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya koyekola na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Misala 16–21.Mpo na kolendisa bososoli ya libota na yo mpo na oyo etali Misala 16–21, bokoki koyekola kalati na nsuka ya nsango oyo, kolukaka bituka biye wapi Paulo ateyaki nsango malamu na mikapo oyo. Boyebi nini tozali na yango lelo mpo na kosunga koteya nsango malamu na bikolo nyonso?

Mpo na kofula libota na yo ekabola nsango malamu, okoki kolakisa moko to bavideo mingi oyo etali “Sharing the Gospel” eteni moko ya Applikasio ya Ebombelo ya Buku ya Nsango Malamu.

Misala 17:10–12; 18:24–28.Lolenge nini tokoki kozala mingi lokola Basantu na kati ya milongo miye? Nini ekoki kolimbola “[kozwa] liloba na bolengeli mayele”? (Misala 17:11). Nini tokoki kosala mpo na kozala “makasi na makomi”? (Misala 18:24).

Misala 19:1–7.Milongo oyo ekoki kosunga libota na yo esolola na ntina ya ntina monene ya kozala ya kobatisama mpe kokotisama. Mpo na kososola malamu bosolo na kati ya Misala 19:1–7, bokoki kosolola na ntina ya makambo maye ezanga ntina na kozangaka eloko mosusu, lokola telefone ezanga batterie. To bokoki kokabola liteya oyo uta na Profeta Joseph Smith: “Libatisi na mayi ezali libatisi ya ndambo, ezali ntina te soki mosusu te—elingi koloba, libatisi ya Molimo Mosantu” (Teachings: Joseph Smith95). Mpo na nini libatisi ezali “malamu mpo ntina te” na kozangaka kozwa likabo ya Molimo Mosantu? (tala 3 Nefi 27:19–20; Mose 6:59–61).

Misala 19:18–20.Ntango ozali kotanga Misala 19:18–20, yeba motuya ya bozwi oyo bato bazalaki na bolingi ya kotika mpo na koyamba nsango malamu (tala milongo 19). Ezali na makambo ya mokili to milulu miye biso tosengeli kotika mpo na kozwa mapamboli ya lola?

Misala 20:32–35.Ntango nini libota na yo eyebaki liteya ya Klisto liye elobi “lipamboli ezali na kopesa koleka na kozwa”? (Misala 20:35). Ezali na moto oyo akoki kosungama na lisalisi na yo, ntango to makabo oyo libota na yo ekoki kopesa? Lokola libota, bosolola na ntina ya mwa makanisi mpe bosala mwango mpo na kosunga moto songolo. Lolenge nini toyokaka ntango tosungaka basusu? Mpo na nini lipamboli ezali na kopesa koleka na kozwa?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “I Am a Child of God,” Children’s Songbook, 2–3.

Kobongisa Boyekoli ya Moto Ye Moko

Koma Makanisi. “Ntango ozali kokoma makanisi ya molimo, ozali kolakisa Nkolo ete opesi bakambi na Ye motuya, mpe Ye akopambola yo na mamonisi ya mingi mingi koleka” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi12; tala lisusu lokasa 30).

Elilingi
kalati ya mibembo ya etinda ya Paulo

Mibembo ya misionele ya Apostolo Paulo.

Bimisa na lokasa