Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya nsambo 3–9. Misala 1–5: “Bokozala Banzeneneke na Ngai”


“Sanza ya nsambo 3–9. Misala 1–5: ‘Bokozala Banzeneneke na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya nsambo 3–9. Misala 1–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Ebele ya bato na libongo mpe bazali kobatisama na ebale

Mokolo ya Pantekote, na Sidney King

Sanza ya nsambo 3–9

Misala 1–5

“Bokozala Banzeneneke na Ngai”

Ntango ozali kotanga Misala 1–5, Molimo Mosantu akoki kofula yo ozwa bosolo oyo ezali ntina mpo na bomoi na yo. Koma milongo oyo ekamwisi yo, mpe luka mabaku ya kokabola nini ozali koyekola.

Koma Makanisi na Yo

Bokoki komituna na ntina ya oyo Petelo akokaki kokanisa mpe koyoka ntango ye na Bapostolo mosusu, “batalaki ngw epai na likoloi” ntango Yesu amataki epai ya Tata na Ye? (Misala1:10). Eklezia oyo Mwana na Nzambe asalaki ezalaki sikawa na maboko ya Petelo. Mokumba ya kokamba makasi ya “koteya bikolo nyonso” ezalaki sikawa likolo na ye (Matai 28:19). Kasi soki akokaki te to abangaki, tomoni elembo na polele ya bosolo na yango te na kati ya buku ya Misala. Nini tomoni oyo ezali bandakisa ya litatoli ya bobangi mpe mbongwana, makamwisi ya kobikisa, banguya ya molimo, mpe bokoli ya ntina ya Eklezia. Oyo ezalaki kaka Eklezia ya Mobikisi, ekambamaka kino sikawa epai na Ye. Na yango, buku ya Misala ya Bapostolo ekokaki lisusu kobengama Misala ya Yesu Klisto na nzela ya Bapostolo na Ye. Kokambamaka na bosopi Molimo, Petelo azalaki lisusu molobi mbisi te oyo Yesu azwaki na libongo ya Mbu ya Galilea. Azalaki lisusu te moto oyo atungisamaki mingi oyo baposo moke nsima alelaki makasi mpo awanganaki ete ayebaki ata moke te Yesu ya Nazaleti.

Na kati ya buku ya Misala, bokotanga masakoli ya nguya na ntina ya Yesu Klisto mpe nsango malamu na Ye. Bokomona lisusu lolenge nini nsango malamu ekoki kobongola bato—kotangaka mpe yo—bokoma bilombe bayekoli oyo Nzambe ayebi bakoki kozala.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Boyekoli Makomi Yo Moko

Misala 1:1–8, 15–26; 2:1–42; 4:1–13, 31–33

Yesu Klisto akambaka Eklezia na Ye na nzela ya Molimo Mosantu.

Buku ya Misala ekomi makasi ya Bapostlo mpo na kotia Eklezia ya Yesu Klisto nsima ya Bomati ya Mobikisi. Atako Yesu Klisto azalaki lisusu te na mabele, Akambaki Eklezia na emoniseli na nzela ya Molimo Mosantu. Banza lolenge nini Molimo Mosantu akambaki bakambi ya sika ya Eklezia ya Klisto ntango otangi milongo oyo elandi: Misala 1:1–8, 15–26; 2:1–42; 4:1–13, 31–33.

Lokola bandimi ya Eklezia ya Klisto lelo, biso nyonso tozali na mokumba ya kosala mosala ya libiki mpe ya bonetoli—mpo na kosalela nsango malamu ya Yesu Klisto, kolengela baoyo bazali na bosenga, kobengisa basusu baya epai ya Klisto, mpe kosangisa mabota mpo na boseko (tala General Handbook1.2). Oyekoli nini uta na Bapostolo ya sikawa mpo na oyo etali lolenge nini bokoki kotalela Molimo Mosantu mpo na kokamba makoki na bino?

Tala lisusu Bible Dictionary, “Holy Ghost.”

Misala 2:36–47; 3:12–21

Mabongi mpe makuli ya nsango malamu esungaka ngai naya epai ya Klisto.

Osila koyoka ete “otutisami na motema na [yo],” lokola Bayuda na mokolo ya Pantekote? (Misala 2:37). Ntango mosusu osalaki eloko moko oyo eyokisi yo motema mpasi, to ntango mosusu olingi kaka kobongola bomoi na yo. Nini osengeli kosala ntango ozali na mayoki oyo? Toli ya Petelo epai ya Bayuda ezwami na kati ya Misala 2:38. Koma lolenge nini mabongi ya yambo mpe makuli ya nsango malamu (kobakisa na bondimi, boyamboli, libatisi mpe likabo ya Molimo Mosantu—to eloko nini ntango mosusu ekokani lokola malongi ya Klisto) esalemaki na babongwani oyo, lokola ekomami na kati ya Misala 2:37–47.

Okoki kozala obatisama mpe ozwaki likabo ya Molimo Mosantu, na yango lolenge nini ozali kokoba kosalela malongi ya Klisto? Banza maloba oyo ya Mpaka Dale G. Renlund: “Tokoki kozala ya kobonga nie na kozongelaka … kosalela bondimi na [Klisto], koyambolaka, koliaka elambo mpo koyeisa sika mayokani mpe mapamboli ya libatisi, mpe kozwaka Molimo Mosantu lokola moninga ya ntango nyonso na ndelo monene. Ntango tosali bongo, tokomi koleka lokola Klisto mpe tokoki koyika mpiko kino nsuka, elongo na nyonso oyo yango esengi” (“Latter-day Saints Keep on Trying,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 56).

Misala 3:19–21

Nini ezali “bantango ya bopemi” mpe “bantango ya kozongisi makambo nyonso”?

“Bantango ya bopemi” elimboli Mileniume, ntango Yesu Klisto akozonga na mabele. “Bantango ya kozongisa makambo nyonso ” elimboli Bozongisi ya nsango malamu, oyo ezali kolengela mokili mpo na Mileniume.

Misala 3; 4:1–31; 5:12–42

Bayekoli ya Yesu Klisto bapesamaki nguya ya kosala makamwisi na nkombo na Ye.

Ebosono azalaki kolikya kozwa mbongo epai ya baoyo bazalaki koya na tempelo. Kasi basali ya Nkolo basalelaki ye ebele koleka. Ntango otangi Misala 3; 4:1–31 mpe 5:12–42, banza lolenge nini likamwisi oyo elandaki esalemaki epai ya bato oyo:

  • Ebosono

  • Petelo mpe Yoane

  • Banzeneneke na tempelo

  • Banganganzambe minene mpe bayangeli

  • Basantu Mosusu

Elilingi
Petelo azali kobikisa moto

Oyo Nazali na yango Napesi Bino, na Walter Rane

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Boyekoli Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Misala 1:21–26.Kotangaka Misala 1:21–26 ekoki kosunga libota na yo bosolola mapamboli oyo eyaka na kozalaka na Bapostolo na mabele lelo. Bandeko ya libota bakoki kokabola lolenge nini bazwaki litatoli ete bapostolo ya lelo mpe baprofeta babiangemaki na Nzambe. Mpo na nini kozala na litatoli oyo ezali ntina?

Misala 2:37.Nini liloba “etutisamaki na motema na bango” ekoki kolimbola? Ntango nini toyokaki eloko ya lolenge moko? Mpo na nini ezali ntina koloba “Tokosala nini?” ntango tozali na mayoki ya lolenge oyo?

Misala 3:1–10.Libota na yo ekoki kosepela kobeta lisolo oyo ezali na kati ya milongo oyo. To bokoki kotala video “Petelo mpe Yoane kobikisaka Ebosono Uta Mbotama” (ChurchofJesusChrist.org). Lolenge nini moto oyo azalaki na tempelo apambolamaki na lolenge ya bokeseni koleka ndenge azalaki kozela? Lolenge nini tomonaki mapamboli ya Tata na Lola koyelaka biso na ndenge oyo tozelaki te?

Misala 3:12–26; 4:1–21; 5:12–42.Nini ekamwisi yo na ntina ya bosembo ya Petelo mpe Yoane? (tala lisusu video “Petelo Azali koteya mpe Akangami” na ChurchofJesusChrist.org). Lolenge nini tokoki kolenda na matatoli na biso na Yesu Klisto? Banza kosungaka bilenge bana na lisano na bango bakabola matatoli na bango.

Misala 4:315:4.Lolenge nini tokoki kosunga libota, palwasi, to lingomba na biso ekoma mingi lokola oyo elimbolami na kati ya Misala 4:31–37? Nini elimboli kozala “motema moko mpe molimo moko”? Na ndenge nini ntango mosusu biso “[tobombaka] ndambo” ya likabo na biso? Mpo na nini kosalaka yango ezali lokola “[kokosa] Nzambe”? (Misala 5:2, 4). Lolenge nini bozangi bosembo esalaka kati na biso na molimo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Let the Holy Spirit Guide,” Hymns, no. 143.

Kobongisa Koteya na Biso

Pona liteya songolo. Bandeko ya libota basala boponi ya liteya moko nsima ya mosusu na kati ya Acts 1–5 mpo na koyekola elongo.

Elilingi
Bapostolo nzinga nzinga ya banzelu mibale kotalaka likolo

Bomati, na Harry Anderson

Bimisa na lokasa