Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya nsambo 10–16. Misala 6–9: “Nini Okolinga Ngai Nasala?”


“Sanza ya nsambo 10–16. Misala 6–9: “Nini Okolinga Ngai Nasala?”,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya nsambo 10–16. Misala 6–9,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Paul akwei na mabele

Mbongwana na Nzela ya Damasi, na Michelangelo Merisi da Caravaggio

Sanza ya nsambo 10–16

Misala 6–9

“Nini Okolinga Ngai Nasala?”

Banda na kotanga Misala 6–9. Makanisi na kati ya mwango oyo ekoki kosunga yo okitola mabongi mosusu ya ntina na kati ya mikapo oyo, atako okoki kozwa mosusu na kati ya boyekoli na yo moko.

Koma Makanisi na Yo

Soki ezali na moto moko oyo amonanakii lokola mpasi mpo na kobongwana, ezalaki Saulo—Falisai oyo ayebanaki lokola mobomi ya Baklisto. Ntango Nkolo ayebisaki moyekoli moko na nkombo Anania mpo na koluka Saulo mpe kopesa ye lipamboli, Anania atatabanaki mpo na kondima. “Nkolo,” alobaki, “nayokaki makambo mingi na ntina ya moto oyo, mabe boni asalaki epai ya Basantu” (Misala 9:13). Kasi Nkolo ayebaki motema ya Saulo mpe makoki na ye, mpe azalaki na etinda na makanisi mpo na Saulo: “Azali sani oyo eponama mpo na ngai, mpo na komema nkombo na ngai liboso ya Bapagano, mpe bakonzi mpe bana ya Yisalaele” (Misala 9:15). Nsima Ananiya atosaki, mpe ntango akutanaki na mobomi oyo ya kala, abengaki ye “Ndeko mobali Saulo” (Misala 9:17). Soki Saulo akokaki kobongwana mobimba mpe Anania akokaki koyamba ye na boboto, nsima tosengelaki ata moke te koyeba moto oyo amonana kozala mpasi mpo na kobongwana—kotangaka mpe biso moko?

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Boyekoli Makomi Yo Moko

Misala 6–8

Motema na ngai esengi kozala “malamu na miso ya Nzambe.”

Bokoli ya Eklezia elimboli bokoli ya bosenga mpo na bayekoli basala kati na bokonzi. Engebene na Misala 6:1–5, malamu nini oyo Bapostolo zomi na mibale bazalaki koluka mpo na kati ya baye basalaki elongo na bango? Ntango ozali kotanga Misala 6–8, koma lolenge nini babolamu oyo, mpe mosusu, elakisamaki na kati ya moto lokola Stefano [Etiene] mpe Filipo. Nini ezalaki kozanga kati ya Simona, mpe nini tokoki koyekola uta na ye na ntina ya kozala na bolingi ya kobongwana?

Ezali na eloko songolo oyoki efuli yo mpo na kobongwana mpo na kolikia ete motema na yo ezali “malamu na miso ya Nzambe”? (Misala 8:21–22). Lolenge mbongwana oyo ekoki kopambola yo ntango ozali kosalela Nzambe?

Misala 6–7

Koyeisa motema makasi na Molimo Mosanto ekoki kokamba na koboya Mobikisi mpe basali na Ye.

Bakambi ya bayuda bazalaki na mokumba ya kolengela bato mpo na boyei ya Masiya. Mpe bazangaki koyeba Masiya mpe babwakisaki Ye. Lolenge nini yango esalemaki? Eteni ya eyano ekoki kozwama na maloba ya Setefano: “Yo otemelaka ntango nyonso Molimo Mosantu” (Misala 7:51). Nini okanisi elimboli kotemela Molimo Mosantu? Mpo na nini kotemela Molimo Mosantu oyo ekambaka na kobwakisa Mobikisi mpe basali na Ye?

Ntango ozali kotanga Misala 6–7, luka bansango mosusu oyo Setefano ateyaki Bayuda. Bizaleli nini azalaki kokebisa? Yo omoni bizaleli bikesena kati na yo moko? Maloba ya Setefano eteyi yo nini na ntina ya makama mayaka mpo na kotemelaka Molimo Mosantu? Lolenge nini okoki kozala na liyoki mpe koyanola na bitinda ya Molimo Mosantu kati na yo moko?

Tala lisusu “The Martyrdom of Stephen” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Misala 8:26–39

Molimo Mosantu akosunga ngai nakamba basusu epai ya Yesu Klisto.

Oyekoli nini na ntina ya kokabolaka nsango malamu uta na lisolo oyo na Misala 8:26–39? Lolenge nini Molimo Mosantu asungi Filipo? Lolenge nini kokabola nsango malamu na basusu ezali lokola mokambi? (tala Misala 8:31).

Mpaka Ulisses Soares alobaki ete lisolo oyo “ezali bokundoli ya mokumba ya bonzambe oyo biso banso tosengeli koluka na koyekolisa mpe koteya moto mosusu nsango malamu ya Yesu Klisto. … Tozali ntango mosusu lokola moto ya Etiopia—tosengeli na lisungi ya moteyi ya boyengebene mpe afulama; mpe tozali ntango mosusu lokola Filipo—tosengeli koteya mpe kolendisa basusu na mbongwana na bango” (“Lolenge nini Nakoki Kososola?,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 6). Banza kotanga nsango oyo etikali ya Mpaka Soares mpe manyola lolenge nini Molimo Mosantu ekoki kosunga yo ozala moyekoli mpe moteyi malamu ya nsango malamu.

Misala 9

Ntango namikitisi na bolingi ya Nkolo, nakoki kokoma esalelo na kati ya maboko na Ye.

Mbongwana ya Saulo emonisamaki kozala ya mbalakaka mpenza; alekaki na lombango mpenza kowuta na boloko ya Baklisto kino na koteya na ntina ya Klisto na basinagoga. Ntango ozali kotanga lisolo na ye, manyola mpo na nini azalaki na bolingi ya kobongwana. (Mpo na kotanga ndimbola ya mbongwana ya Saulo ye moko, tala Misala 22:1–16 mpe 26:9–18. Yeba ete na kati ya masolo oyo, Saulo akomaki na nkombo ya Paulo [tala Misala 13:9].)

Soki ezali solo ete mbonwana ya Saulo ezalaki lokola ya bato banso te—mpo na bato ebele, mbongwana ezali likambo ezwaka ntango molai—ezali na eloko songolo okoki koyekola uta na Saulo na ntina ya mbongwana? Oyekoli nini uta na lolenge Anania mpe bayekoli mosusu bayanolaki mpo na mbongwana ya Saulo? NIni okosala mpo na kosalela mateya oyo na bomoi na yo? Okoki kobanda na kotunaka na losambo, lokola Paulo asalaki, “Nini okolinga ngai nasala?”

Ntango otangi Misala 9:36–42, banza lolenge nini Tabita azalaki esalelo na maboko ya Nzambe. Nini efuli yo na ntina ya ndakisa na ye?

Tala lisusu Dieter F. Uchtdorf, “Waiting on the Road to Damascus,” Liahona, Sanza ya mitano 2011, 70–77; “Nzela ya Damasi” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Boyekoli Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Misala 6:8; 7:51–60.Kokanisa masolo ya Stefano na kati ya Misala 6:8 mpe Misala 7:51–60 na masolo ya Mobikisi na kati ya Luka 23:1–46. Lolenge nini Stefano alandaki ndakisa ya Mobikisi?

Misala 7:51–60.Lolenge nini Molimo Mosantu apambolaki Stefano ntango atungisamaki? Ntango nini tozwaki bolendisi kowuta na Molimo Mosantu na ntango ya mpasi?

Misala 9:5.Moko likonga ezalaki nsonge eye basalelaki mpo na kokamba banyama. Mbala mingi banyama bazalaki kozonga nsima ntango likonga ezalaki kotiuba bango, yango ezalaki kosala ete nsonge wana ekota na mosuni ya nyama. Lolenge nini yango ekoki kozala ntango mosusu lisolo oyo esalemi epai na biso? Tokoki kosala nini mpo na kondima toli uta na Nkolo?

Elilingi
Petelo alamusaki Tabita uta na bawei

Tabita Asekwi, na Sandy Freckleton Gagon

Misala 9:32–43.Banza kobengisa bandeko ya libota na yo bayema bililingi ya masolo na kati ya Misala 9:32–43. Toyekoli nini na ntina ya kimoyekoli ya solo uta na masolo oyo? Lolenge nini moto songolo oyo “atondisami na misala malamu,” lokola Tabita azalaki, kosunga basusu bandimela Nkolo? (tala Misala 9:36; “Mokapo 60: Petelo Azongisi Tabita na Bomoi” (na kati ya Masolo ya Boyokani ya Sika, 156–57, to video ya ndenge moko na ChurchofJesusChrist.org).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “I’ll Go Where You Want Me to Go; Cantiques, no. 270.

Kobongisa Boyekoli Na Yo Moko

Kokanisa makomi na bomoi na yo. Ntango ozali kotanga, kanisa lolenge nini masolo mpe mateya ya makomi esalelami na bomoi na yo. Ndakisa, mabaku nini ozali na yango mpo na kosunga basusu, lokola Tabita azalaki na yango na Misala 9:36–39?

Elilingi
Stefano azali kobomama na mabanga

“Mpe babambaki Stefano mabanga, mpe ye, asengaki epai ya Nzambe, alobaki Nkolo Yesu, zwa molimo na ngai” (Joseph Smith Translation, Misala 7:59 [kati ya Misala 7:59, makomi ya nse c]).

Bimisa na lokasa