Boyokani ya Sika 2023
Sanza ya nsambo 17–23. Misala 10–15: “Liloba ya Nzambe Ekolaki mpe Ebakisamaki”


“Sanza ya nsambo 17–23. Misala 10–15: ‘Liloba ya Nzambe Ekolaki mpe Ebakisamaki,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Boyokani ya Sika 2023 (2022)

“Sanza ya nsambo 17–23. Misala 10–15,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2023

Elilingi
Petelo azali kosolola na Koloneyi

Sanza ya nsambo 17–23

Misala 10–15

“Liloba ya Nzambe Ekolaki mpe Ebakisamaki”

Tanga Misala 10–15 sala keba, tikela Molimo ntango mpo ete apesa yo makanisi mpe mayoki. Nini ezali na kati mpo ete oyekola kati ya mikapo oyo?

Koma Makanisi na Yo

Na ntango ya mosala na Ye ya kufa, Yesu Klisto atiaki ntembe uta ntango molai na babonkoko mpe mimeseno ya bato. Yango esukaki te nsima ya komata na Ye na lola, ntango akobaki kokamba Eklezia na Ye na emoniseli. Ndakisa, na ntango ya bomoi ya Yesu bayekoli na Ye bateyaki nsango malamu bobele epai ya bandeko Bayuda. Kasi kala te Mobikisi akufaki mpe Petelo akomaki mokambi ya Eklezia na mabele, Yesu Klisto amonisaki epai ya Petelo ete ntango elongobanaki mpo ete nsango malamu esakolama epai ya baoyo bazalaki Bayuda te. Likanisi ya bokaboli nsango malamu na Bapagano emonisamaki kozala likambo ya kokamwa te lelo, na yango liteya nini na kati ya lisolo oyo ezali mpo na biso? Ntango mosusu liteya moko ezali na kati ya Eklezia nyonso mibale ya kala mpe ya sika oyo elobi ete, Mobikisi ya bolingo Akambaka bakambi na Ye baponama (tala Amose 3:7; Malongi mpe Mayokani 1:38). Bokobi ya emoniseli ezali elembo ya motuya ya Eklezia ya solo mpe ya bomoi ya Yesu Klisto. Lokola Petelo, tosengeli kozala na bolingi ya kondima bokobi ya emoniseli mpe kosalela “liloba nyonso ya Nzambe” (Luka 4:4), mpe lisusu “nyonso oyo [Ye] amonisaki, nyonso oyo Ye amonisi lelo,” mpe “makambo ya minene mpe ya ntina” Nzokande akobimisa maye “malongobani na Bokonzi ya Nzambe” (Biteni ya Bondimi 1:9).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Misala 10

Nzambe atalaka bato na bilongi te.”

Mpo na nkola, Bayuda bandimelaki ete kozalaka moko ya “nkona ya Abalayama,” to moko ya bakitani ya Abalayama, elakisi ete moto andimamaki mpe aponamaki na Nzambe (tala Luka 3:8). Batalaki bato mosusu lokola Bapagano “ya mbindo” oyo bandimamaki te na Nzambe. Na kati ya Misala 10, Nkolo ateyaki Petelo nini na ntina ya oyo “andimami epai na ye”? (Misala 10:35). Bosolo nini ozwi na kati ya mokapo oyo ete bomoi ya Koloneyi endimamaki epai ya Nkolo? Manyola lisakoli oyo elimboli nini “Nzambe atalaka bato na bilongi te” (molongo 34; tala lisusu 1 Nefi 17:35). Mpo na nini ezali ntina epai na yo oyeba bosolo oyo?

Lokola Bayuda oyo batiolaki baoyo bazalaki nkona ya Abalayama te, esili yo komimona kosalaka miango ya nkanda to kozala na makanisi ya mabe mpo na moto oyo azali lolenge moko na yo te? Lolenge nini okoki kolonga likambo oyo? Ekoki kozala malamu omeka likambo ya moke mpo na mikolo mike miye milandi: Ntango nyonso ozali kosala na moto songolo, meka kokanisa yo moko, “Moto oyo azali mwana ya Nzambe.” Ntango osali yango, mbongwana nini omoni na lolenge okanisaka na ntina ya mpe kosala na basusu?

Tala lisusu 1 Samwele 16:7; 2 Nefi 26:13, 33; Russell M. Nelson, “Tika Nzambe Akonza,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2020, 92–95; “Emoniseli ya Petelo ya Komema Nsango Malamu epai ya Bapagano” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Misala 10; 11:1–1815

Tata na Lola ateyaka ngai molongo moko moko na nzela ya emoniseli.

Ntango Petelo amonaki emoniseli oyo elimbolami na kati ya Misala 10, amitungisaki yambo mpo na kososola yango mpe “amitiaki ntembe [yango] esengeli kolimbola nini” (molongo 17). Nsima Nkolo apesaki Petelo bososoli monene lokola Petelo alukaki yango. Ntango ozali kotanga Acts 10, 11, and 15, lolenge nini bososoli ya Petelo ya limoni elendisamaki mbala na mbala. Lolenge nini olukaki mpe ozwaki bososoli monene kowuta na Nzambe ntango ozalaki na mituna?

Misala 10, 11, mpe 15 beta lisusu lisolo ya makambo oyo Nkolo akambaki basali na Ye na nzela ya emoniseli. Ekoki kosunga kokoma maye oyekoli na ntina ya emoniseli ntango oyekoli mikapo miye. Na bandenge nini Molimo alobelaka yo?

Tala lisusu Gospel Topics, “Emoniseli,” topics.ChurchofJesusChrist.org; Quentin L. Cook, “Lipamboli ya Bokobi ya Emoniseli epai ya Baprofeta mpe Emoniseli na biso moko mpo na Kokamba Babomoi na Biso moko,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 96–100; “The Jerusalem Conference” (video), ChurchofJesusChrist.org.

Misala 11:16

Nazali Moklisto mpo ete nandimelaka mpe nalanda Yesu Klisto.

Nini ezali ntina na moto na kobengamaka Moklisto? (tala Misala 11:26). Nini elimboli epai na yo, koyebana lokola Moklisto? Banza ndimbola ya bankombo. Na ndakisa, nkombo na yo ya libota elimboli nini mpo na yo? Mpo na nini nkombo na yo ya Eklezia ezali ntina epai na yo? (tala Malongi mpe Mayokani 115:4). Nini elimboli epai na yo kozwa likolo na yo moko nkombo ya Yesu Klisto na liyokani? (tala Malongi mpe Mayokani 20:77).

Tala lisusu Moziya 5:7–15; Alma 46:13–15; 3 Nefi 27:3–8; Russell M. Nelson, “The Correct Name of the Church,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 87–90.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Boyekoli ya Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Misala 10:17, 20.Ekomela biso tozala na mayebi ya molimo mpe nsima kotia ntembe na oyo toyokaki mpe toyekolaki? Toli nini tokoki kopesana biso na biso oyo ekoki kosunga biso tolonga bantembe na biso? (Tala Neil L. Andersen, “Spiritually Defining Memories,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 18–22.)

Misala 10:34–35.Nini okoki koteya libota na yo ete “Nzambe azalaka motosi ya bato te”? (Misala 10:34). Ntango mosusu bokoki kotala bilili ya bato uta na bikolo ekesena mpe babonkoko ekesena ntango libota na yo ezali kotanga milongo oyo. Lolenge nini babosolo na kati ya milongo oyo ekoki kolendisa misala na biso? (tala na ndakisa, “I’ll Walk with You” [Children’s Songbook, 140–41]).

Misala 12:1–17.Libota na yo ekoki kobeta lisolo ya Petelo kotiamaka na boloko mpe bandimi ya Eklezia basangani mpe bazali kosambela mpo na ye. Ntango nini biso topambolamaki na nzela ya losambo? Ezali na moto moko oyo tofulami mpo na kosambela, lokola mokambi ya Eklezia to molingami songolo? Nini elimboli kosambela “na bozangi kotika”? (Misala 12:5; tala lisusu Alma 34:27).

Elilingi
Petelo abimi na boloko

Petelo Abimi na Boloko, na A. L. Noakes

Misala 14.Ntango ozali kotanga mokapo oyo elongo, bandeko mosusu ya libota bakoki kokoma mapamboli oyo ekomelaka bayekoli mpe Eklezia. Bandeko mosusu ya libota bakoki kokoma botemeli to mayebi ya mikakatano ya bayekoli. Mpo na nini Nzambe atikaka mpasi ekomela bayengebene?

Misala 15:1–21.Milongo oyo elimboli boboi na Eklezia na ntina ya oyo babongwani balingaki mpo na kobatela mobeko ya Mose, mpe lisusu bokati ngenga. Bapostolo basalaki nini na ntina ya bozangi kondima oyo? Nini tokoki koyekola uta na ndakisa oyo na lolenge nini bakambi ya Eklezia bakambaka mosala ya Eklezia?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo ekoki koyembama: “I’ll Walk with You,” Children’s Songbook, 140–41.

Kobongisaka Mateya na Biso

Yema elili moko. Bilili ekoki kosunga bandeko ya libota batala mateya ya makomi mpe masolo. Bokoki kobengisa bandeko ya libota bayema bilili ya oyo bozali kotanga, lokola limoni ya Petelo na kati ya Misala 10.

Elilingi
Petelo mpe Koloneyi

Maye Petelo mpe Koloneyi bakutanaki na yango elakisi ete “Nzambe azalaka motosi ya bato te” (Misala 10:34).

Bimisa na lokasa